Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt Misala 1:1-28:31
  • Misala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Misala
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Misala

MISALA YA BANTOMA

1 Na mokanda ya liboso oyo nakomelaki yo, Ee Teofile, nakomaki makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpe ateyaki banda na ebandeli+ 2 tii mokolo oyo Nzambe akamataki ye,+ ntango asilisaki kopesa bantoma oyo aponaki malako na nzela ya elimo santu.+ 3 Nsima ya komona mpasi, amimonisaki epai na bango na bilembeteli mingi mpo na kondimisa bango ete azalaki na bomoi.+ Bamonaki ye mikolo 40 mpe azalaki koyebisa bango makambo etali Bokonzi ya Nzambe.+ 4 Ntango azalaki elongo na bango, apesaki bango mitindo oyo: “Bólongwa na Yerusaleme te,+ kasi bókoba kozela eloko oyo Tata alakaki,+ oyo boyokaki epai na ngai; 5 mpo Yoane abatisaki na mai, kasi bino bokobatisama na elimo santu+ nsima ya mwa mikolo.”

6 Nzokande, ntango bayanganaki, batunaki ye: “Nkolo, ozali kozongisela Yisraele bokonzi na ntango oyo?”+ 7 Alobaki na bango ete: “Koyeba bantango mpe bileko oyo Tata atyá na nse ya bokonzi na ye moko etali bino te.+ 8 Kasi bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino,+ mpe bokozala batatoli+ na ngai na Yerusaleme+ mpe na Yudea mobimba, na Samaria+ mpe tii na esika eleki mpenza mosika na* mabele.”+ 9 Nsima ya koloba makambo yango, wana bazalaki kotala, atombwamaki mpe lipata ezipaki ye na miso na bango.+ 10 Mpe wana bazalaki kaka kotala likoló ntango azalaki komata, na mbala moko mibali mibale na bilamba ya mpɛmbɛ+ batɛlɛmaki pembeni na bango 11 mpe balobaki ete: “Mibali ya Galile, mpo na nini botɛlɛmi bozali kotala likoló? Yesu wana oyo azalaki na bino mpe oyo Nzambe akamati ye, akoya mpe bongo ndenge kaka bomonaki ye azali komata na likoló.”

12 Balongwaki na Ngomba ya Olive, bazongaki na Yerusaleme.+ Ngomba yango ezali pene na Yerusaleme, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki moko longwa na Yerusaleme.* 13 Ntango bakómaki, bamataki na shambrɛ ya likoló epai bazalaki kofanda. Ezalaki Petro elongo na Yoane ná Yakobo mpe Andre, Filipe ná Toma, Bartelemi ná Matai, Yakobo mwana ya Alfe mpe Simo moto ya molende, mpe Yudasi mwana ya Yakobo.+ 14 Na bomoko mpenza, bango nyonso batingamaki na mabondeli, elongo na basi mosusu+ ná Maria mama ya Yesu, ná bandeko ya Yesu ya mibali.+

15 Na mikolo yango, Petro atɛlɛmaki na katikati ya bandeko (motángo ya bato nyonso ezalaki soki 120) mpe alobaki: 16 “Mibali, bandeko, esengelaki maloba oyo ya Makomami ekokisama, oyo elimo santu esakolaki na nzela ya Davidi mpo na Yudasi,+ oyo akambaki baoyo bakangaki Yesu.+ 17 Mpo atángamaki na kati na biso+ mpe aponamaki mpo na kosala elongo na biso mosala oyo. 18 (Na bongo, mobali yango mpenza asombaki elanga na lifuti oyo azwaki mpo na mosala na ye ya mabe,+ mpe ntango akweaki motó na nse, apasukaki katikati mpe misɔpɔ na ye nyonso esopanaki.+ 19 Likambo yango eyebanaki na bato nyonso oyo bafandi na Yerusaleme, yango wana, na monɔkɔ na bango, bazalaki kobenga elanga yango Akeledama, elingi koloba, Elanga ya Makila.) 20 Mpo ekomamá na mokanda ya Nzembo ete: ‘Esika na ye ya kofanda etikala mpamba, mpe moto moko te afanda kuna’+ mpe, ‘Moto mosusu azwa mokumba na ye ya mokɛngɛli.’+ 21 Na yango esengeli kopona moto moko na kati ya mibali oyo bazalaki kotambola elongo na biso ntango nyonso oyo Nkolo Yesu azalaki kosala misala na ye* na kati na biso, 22 banda batisimo oyo azwaki epai ya Yoane+ tii mokolo oyo Nzambe akamataki ye na kati na biso.+ Mobali yango asengeli kokóma motatoli ya lisekwa na ye elongo na biso.”+

23 Bongo babimisaki mibali mibale: Yozefe oyo babengi Barsabasi, oyo bazalaki mpe kobenga Yusutusi, ná Matiasi. 24 Na nsima babondelaki mpe balobaki: “Ee Yehova,* yo moto oyebi mitema ya bato nyonso;+ na mibali oyo mibale, lakisá nani oponi 25 mpo na kozwa mosala oyo mpe kozala ntoma na esika ya Yudasi, oyo asundolaki mosala na ye mpo na kosala oyo alingi.”+ 26 Bongo babwakaki mbɛsɛ mpo na bango+ mpe mbɛsɛ elakisaki Matiasi. Na yango atángamaki esika moko na bantoma 11.*

2 Wana mokolo ya fɛti ya Pantekote+ ezalaki koleka, bazalaki bango nyonso elongo na esika moko. 2 Na mbala moko makɛlɛlɛ eutaki na likoló lokola oyo ya mopɛpɛ oyo ezali kopɛpa makasi, mpe makɛlɛlɛ yango etondaki na ndako mobimba epai bafandaki.+ 3 Mpe ndemo lokola nde ya mɔtɔ emonanaki epai na bango mpe ekabwanaki, efandaki likoló ya moto mokomoko kati na bango, 4 mpe bango nyonso batondaki na elimo santu+ mpe babandaki koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge, kaka ndenge elimo epesaki bango likoki ya koloba.+

5 Na ntango yango, Bayuda oyo bautaki na bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola, oyo bazalaki kotosa mpenza Nzambe, bazalaki kofanda naino na Yerusaleme.+ 6 Bongo, ntango lokito yango ebimaki, ebele ya bato bayanganaki mpe bakamwaki makasi, mpo moto na moto azalaki koyoka bango bazali koloba na monɔkɔ na ye mpenza. 7 Bakamwaki makasi mpe balobaki: “Talá, baoyo nyonso bazali koloba bazali bato ya Galile,+ boye te? 8 Kasi ndenge nini mokomoko na biso azali koyoka na monɔkɔ oyo abotamá na yango?* 9 Baparte, Bamede+ ná Baelame,+ bato oyo bafandaka na Mezopotamia, na Yudea ná Kapadosi, na Ponti ná etúká ya Azia,+ 10 Frigia ná Pamfilia, Ezipito ná biteni ya Libi oyo ezali na ngámbo ya Sirene, bato oyo bazali awa, oyo bautaki na Roma, Bayuda ná baprozelite,+ 11 bato ya Krɛtɛ ná Baarabe—tozali koyoka bango bazali koloba makambo kitoko ya Nzambe na minɔkɔ na biso.” 12 Ɛɛ, bango nyonso bakamwaki mpe babulunganaki, bazalaki koloba bango na bango: “Likambo oyo elingi koloba nini?” 13 Nzokande, bamosusu bazalaki kosɛka bango mpe koloba: “Batondi na vinyo ya elɛngi.”*

14 Kasi Petro atɛlɛmaki elongo na bantoma zomi na moko+ mpe alobaki na bato yango na mongongo makasi: “Mibali ya Yudea mpe bino nyonso bato oyo bofandi na Yerusaleme, bóyeba likambo oyo mpe bótya likebi na maloba na ngai. 15 Ya solo, bato oyo balangwe masanga te, ndenge bozali kokanisa, mpo oyo ezali ngonga ya libwa ya ntɔngɔ.* 16 Kasi oyo ezali nde makambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli Yoele ete: 17 ‘Nzambe alobi boye: “Mpe na mikolo ya nsuka, nakosopela bato ya ndenge nyonso ndambo ya elimo na ngai, mpe bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi bakosakola mpe bilenge na bino ya mibali bakomona bimonaneli mpe mibange na bino bakolɔta bandɔtɔ;+ 18 ata epai ya baombo na ngai ya mibali mpe baombo na ngai ya basi nakosopela bango ndambo ya elimo na ngai na eleko yango, mpe bakosakola.+ 19 Mpe nakosala makamwisi* kuna na likoló mpe bilembo na mabele awa na nse; ekozala na makila, mɔtɔ mpe londende ya milinga. 20 Moi ekobongwana molili mpe sanza ekobongwana makila liboso ete mokolo monene mpe ya nkembo ya Yehova* eya. 21 Mpe moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova* akobika.”’+

22 “Mibali ya Yisraele, bóyoka maloba oyo: Yesu Monazarete, azalaki moto oyo Nzambe atindelaki bino. Yango emonisamaki polele na nzela ya misala ya nguya, makamwisi* mpe bilembo oyo Nzambe asalaki na nzela na ye na kati na bino,+ ndenge bino moko boyebi. 23 Mobali yango, oyo akabami na kolanda mokano oyo ekanamá mpe boyebi oyo Nzambe azali na yango ya koyeba makambo liboso,+ bino bobakaki ye na nzete na lobɔkɔ ya bato oyo babukaka mibeko mpe bobomaki ye.+ 24 Kasi Nzambe asekwisaki ye+ na ndenge alongolaki ye na bampasi* ya liwa, mpo liwa ezalaki na nguya te ya kokoba kokanga ye makasi.+ 25 Mpo Davidi alobi mpo na ye ete: ‘Yehova* azali ntango nyonso na makanisi na ngai;* azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali mpo nakwea ata moke te. 26 Yango wana motema na ngai ekómaki na nsai mpe nalobaki na esengo mingi. Mpe nakofanda* na elikya; 27 mpo okotika ngai* na kati ya Nkunda* te, okotika te ete moto na yo ya sembo apɔla.+ 28 Osali ete nayeba banzela ya bomoi, okotondisa ngai na nsai makasi liboso na yo.’*+

29 “Mibali, bandeko, bótika nayebisa bino polele mpe na bosembo mpo na Davidi mokonzi ya libota: akufaki mpe akundamaki+ mpe lilita na ye ezali na kati na biso tii na mokolo ya lelo. 30 Lokola azalaki mosakoli mpe ayebaki ete Nzambe alapelaki ye ndai ete akofandisa moko ya bato ya libota na ye* na kiti na ye ya bokonzi,+ 31 amonaki liboso lisekwa ya Kristo mpe alobelaki yango, ete asundolamaki na kati ya Nkunda* te mpe nzoto na ye epɔlaki te.+ 32 Nzambe asekwisaki Yesu yango, mpe biso nyonso tozali batatoli ya likambo yango.+ 33 Na yango, lokola atombwamaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe+ mpe azwaki elimo santu oyo Tata alakaki,+ asopi oyo bino bozali komona mpe koyoka. 34 Ya solo Davidi amataki na likoló te, kasi ye moko alobi ete: ‘Yehova* alobaki na Nkolo na ngai ete: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali 35 tii nakotya banguna na yo lokola ebonga ya makolo na yo.”’+ 36 Na yango, tiká bato nyonso ya Yisraele báyeba malamumalamu ete Nzambe akómisi ye Nkolo+ mpe Kristo, Yesu yango oyo bino bobakaki na nzete.”*+

37 Nzokande ntango bayokaki bongo, mitema na bango etungisamaki makasi mpenza, mpe balobaki na Petro mpe na bantoma mosusu: “Mibali, bandeko, tosengeli kosala nini?” 38 Petro alobaki na bango: “Bóbongola mitema,+ mpe mokomoko na bino abatisama+ na nkombo ya Yesu Kristo mpo masumu na bino elimbisama,+ mpe bokozwa likabo ya ofele ya elimo santu. 39 Mpamba te elaka+ ezali mpo na bino ná bana na bino, mpe mpo na bato nyonso oyo bazali mosika, mpo na bato nyonso oyo Yehova* Nzambe na biso akobenga epai na ye.”+ 40 Na nzela ya maloba mosusu mingi apesaki litatoli malamumalamu mpe akobaki kolendisa bango na maloba oyo: “Bómibikisa na libota oyo etɛngamá.”+ 41 Na yango, baoyo bandimaki liloba na ye na motema mobimba babatisamaki,+ mpe na mokolo wana bato* soki 3 000 babakisamaki.+ 42 Mpe bakobaki kotya likebi na mateya ya bantoma, koyangana elongo,* kolya+ mpe kobondela.+

43 Ɛɛ, bantoma basalaki bilembo ná makamwisi* ebele. Moto nyonso amonaki yango mpe esalaki ete bábanga Nzambe.+ 44 Baoyo nyonso bakómaki bandimi bazalaki elongo, bazalaki kotya biloko nyonso esika moko, 45 bazalaki kotɛka biloko na bango,+ bozwi na bango mpe kokabola na moto nyonso mosolo oyo bazwaki, na kotalela bosɛnga ya moto mokomoko.+ 46 Mokolo na mokolo bazalaki ntango nyonso kosangana na tempelo na mokano moko, mpe bazalaki kolya bilei na bango na bandako ekeseni mpe bazalaki kokabola bilei na esengo monene mpe na bosembo ya motema, 47 bazalaki kosanzola Nzambe mpe bato nyonso bazalaki komonisela bango boboto. Na ntango yango, Yehova* akobaki kobakisela bango mokolo na mokolo baoyo bazalaki kobikisama.+

3 Mokolo moko Petro ná Yoane bazalaki komata na tempelo mpo na ngonga ya libondeli, na ngonga ya misato nsima ya midi,* 2 mpe bato bazalaki komema kuna moto moko oyo azalaki motɛngumi banda abotama. Mokolo na mokolo bazalaki kotya ye pene ya porte ya tempelo, porte oyo ebengamaki Kitoko, mpo asɛngaka makabo ya motema mawa epai ya baoyo bazalaki kokɔta na tempelo. 3 Ntango amonaki Petro ná Yoane balingi kokɔta na tempelo, abandaki kosɛnga bango makabo ya motema mawa. 4 Kasi Petro ná Yoane batalaki ye, mpe Petro alobaki: “Talá biso.” 5 Bongo atyaki likebi epai na bango, na elikya ya kozwa mwa eloko epai na bango. 6 Nzokande, Petro alobaki: “Palata mpe wolo, nazali na yango te, kasi nakopesa yo nde oyo nazali na yango. Na nkombo ya Yesu Kristo Monazarete, tambolá!”+ 7 Na yango asimbaki ye na lobɔkɔ ya mobali mpe atɛlɛmisaki ye.+ Na mbala moko makolo na ye mpe makɛsi na ye ekómaki makasi;+ 8 apumbwaki na makolo na ye+ mpe abandaki kotambola, mpe akɔtaki elongo na bango na tempelo, azali kotambola, kopumbwa mpe kosanzola Nzambe. 9 Mpe bato nyonso bamonaki ye azali kotambola mpe kosanzola Nzambe. 10 Bayebaki ete ezali ye moto oyo azalaki kofanda mpo na kosɛnga makabo ya motema mawa na Porte Kitoko ya tempelo,+ mpe bakamwaki mpenza mpe batondaki na nsɔmɔ mpo na likambo oyo ekómelaki ye.

11 Wana moto yango azalaki kokangama na Petro ná Yoane, bato nyonso bapotaki mbangu elongo epai na bango na esika oyo bazalaki kobenga veranda ya Salomo;+ bakamwaki mpenza. 12 Ntango Petro amonaki bongo, alobaki na bango ete: “Mibali ya Yisraele, mpo na nini bozali kokamwa na likambo oyo, mpe mpo na nini bozali kotalatala biso lokola nde na nguya na biso moko to na ezaleli na biso ya kokangama na Nzambe nde totambwisi ye? 13 Nzambe ya Abrahama, ya Yisaka mpe ya Yakobo,+ Nzambe ya bankɔkɔ na biso, apesi nkembo na Mosaleli na ye,+ Yesu,+ oyo bino bokabaki+ mpe bowanganaki liboso ya Pilate, atako akanaki kotika ye. 14 Ɛɛ, bowanganaki mosantu mpe moto wana ya sembo, mpe bosɛngaki mobali moko, oyo azalaki mobomi-bato, ete bápesa bino ye,+ 15 nzokande bobomaki Kapita ya bomoi.+ Kasi Nzambe alamwisaki ye uta na bakufi, likambo oyo biso tozali batatoli na yango.+ 16 Mpe na nzela ya nkombo na ye, mpe na nzela ya kondima na biso na nkombo na ye, mobali oyo bozali komona mpe boyebi akómisami makasi. Kondima oyo tozali na yango na nzela ya Yesu nde ekómisi moto oyo nzoto makasi na miso na bino nyonso. 17 Mpe sikoyo, bandeko, nayebi ete boyebaki te oyo bozalaki kosala,+ kaka ndenge bankumu na bino mpe basalaki.+ 18 Kasi na ndenge wana nde Nzambe akokisi makambo oyo asakolaki liboso na monɔkɔ ya basakoli nyonso, mpasi oyo Kristo na ye asengelaki kokutana na yango.+

19 “Na yango, bóbongola mitema+ mpe bóbongwana+ mpo masumu na bino ebomama,+ mpo bileko ya kopema euta epai ya Yehova ye moko* 20 mpe atinda Kristo oyo atyami mpo na bino, Yesu. 21 Yesu yango, likoló esengeli kobomba ye tii na bantango oyo Nzambe akozongisa makambo nyonso sika ndenge alobaki na monɔkɔ ya basakoli na ye basantu ya ntango ya kala. 22 Kutu, Moize alobaki ete: ‘Yehova* Nzambe na bino akobimisela bino na kati ya bandeko na bino, mosakoli moko lokola ngai.+ Bosengeli koyoka nyonso oyo akoloba na bino.+ 23 Ya solo, moto nyonso* oyo akoyoka te Mosakoli wana, akobomama mpenza na kati ya bato.’+ 24 Mpe basakoli nyonso banda na Samwele mpe baoyo bayaki nsima na ye, baoyo nyonso balobaki, basakolaki mpe mikolo oyo polelepolele.+ 25 Bino bozali bana ya basakoli mpe ya kondimana oyo Nzambe asalaki elongo na bankɔkɔ na bino,+ wana alobaki na Abrahama ete: ‘Mpe na nzela ya libota* na yo mabota nyonso ya mabele ekopambolama.’+ 26 Nsima ya kotɛlɛmisa Mosaleli na ye, Nzambe atindaki ye liboso+ epai na bino mpo na kopambola bino, kolongola mokomoko na bino na misala na ye ya mabe.”

4 Wana bango mibale bazalaki koloba na bato, banganga-nzambe, kapitɛni ya tempelo mpe Basadukai+ babimelaki bango. 2 Batungisamaki ndenge bantoma bazalaki koteya bato mpe kosakola polele ete Yesu asekwaki uta na bakufi.*+ 3 Bongo bakangaki bango mpe batyaki bango na bolɔkɔ+ tii na mokolo oyo elandaki, mpo mpokwa esilaki kokóma. 4 Nzokande, mingi ya baoyo bayokaki diskur yango bandimaki, mpe motángo ya mibali ekómaki soki 5 000.+

5 Mokolo oyo elandaki, bakonzi, bankulutu mpe bakomeli bayanganaki na Yerusaleme 6 ná Anasi+ nganga-nzambe mokonzi, Kaifa,+ Yoane, Alezandre mpe baoyo nyonso bazalaki bato ya libota ya nganga-nzambe mokonzi. 7 Batɛlɛmisaki Petro ná Yoane na katikati na bango mpe babandaki kotuna bango ete: “Na nguya nini to na nkombo ya nani bosali likambo oyo?” 8 Na yango, Petro, lokola atondaki na elimo santu,+ alobaki na bango ete:

“Bakonzi ya bato mpe bankulutu, 9 soki tozali lelo kosambisama mpo na likambo ya malamu oyo esalemi epai ya motɛngumi,+ mpe bolingi koyeba soki nani asali ete moto oyo akóma malamu, 10 eyebana na bino nyonso mpe na bato nyonso ya Yisraele ete na nkombo ya Yesu Kristo Monazarete,+ oyo bino bobakaki na nzete+ kasi oyo Nzambe alamwisaki uta na bakufi,+ na nzela na ye nde mobali oyo atɛlɛmi awa liboso na bino na nzoto malamu. 11 Yesu yango azali ‘libanga oyo bino batongi-ndako bomonaki mpamba, mpe oyo ekómi libanga monene ya ntina mingi ya ndako.’*+ 12 Lisusu, lobiko ekouta na moto mosusu te, mpo nkombo mosusu+ ezali te na nse ya lola, oyo epesami na kati ya bato, oyo tosengeli kobika na nzela na yango.”+

13 Nzokande ntango bamonaki elobeli ya polele* ya Petro ná Yoane, mpe basosolaki ete bazalaki bato batángá kelasi te* mpe bato mpamba,+ bakamwaki mpenza. Mpe bayaki koyeba ete bazalaki elongo na Yesu.+ 14 Kasi lokola bazalaki kotala moto oyo abikisamaki atɛlɛmi elongo na bango,+ bazalaki na eyano ya kopesa te.+ 15 Bongo bapesaki bango mitindo ete bábima na ndako ya Sanedrina, mpe babandaki kotunana bango na bango, 16 balobi: “Tokosala nini na bato oyo?+ Mpo, ya solo mpenza, elembo moko monene esalemi na nzela na bango, oyo emonani polele na bato nyonso oyo bafandi na Yerusaleme;+ mpe tokoki kowangana yango te. 17 Mpo likambo yango ekoba kopalangana te na kati ya bato, tókanela bango mpe tóyebisa bango ete báloba lisusu na moto ata moko te na nkombo yango.”+

18 Na yango, babengaki bango mpe bapesaki bango mitindo ete báloba to báteya ata eloko moko te na nkombo ya Yesu. 19 Kasi Petro ná Yoane bazongiselaki bango ete: “Soki ezali sembo na miso ya Nzambe ete tóyoka bino na esika ya koyoka Nzambe, bino moko bókata likambo. 20 Kasi biso, tokoki kotika te koloba makambo oyo tomoni mpe toyoki.”+ 21 Bongo nsima ya kokanela bango lisusu, babimisaki bango, mpamba te bazwaki ata likambo moko te ya kopesa bango etumbu mpe lisusu mpo na bato,+ mpo bango nyonso bazalaki kopesa Nzambe nkembo mpo na likambo oyo esalemaki. 22 Mpo moto oyo abikaki na likamwisi* yango azalaki na mbula koleka 40.

23 Nsima ya kobimisama, bakendaki epai ya bayekoli mosusu mpe bayebisaki bango makambo oyo banganga-nzambe bakonzi mpe bankulutu balobaki na bango. 24 Ntango bayokaki bongo, batombolaki mingongo na bango na bomoko epai ya Nzambe mpe balobaki ete:

“Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, yo ozali Oyo osalá likoló mpe mabele mpe mbu mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango.+ 25 Mpe na nzela ya elimo santu na yo, olobaki na monɔkɔ ya nkɔkɔ na biso Davidi,+ mosaleli na yo ete: ‘Mpo na nini bikólo ebulungani mpe bato ya bikólo bazali kokanisakanisa makambo ya mpambampamba? 26 Bakonzi ya mabele batɛlɛmi mpe bankumu bayangani lokola moto moko mpo na kotɛmɛla Yehova* mpe moto na ye oyo atyami mafuta.’*+ 27 Kutu, Erode ná Ponse Pilate+ ná bato ya bikólo, elongo na bato ya Yisraele, bayanganaki na kati ya engumba oyo mpo na kotɛmɛla mosaleli na yo mosantu Yesu, oyo yo otyaki mafuta,+ 28 mpo na kosala makambo oyo lobɔkɔ na yo mpe toli na yo ebongisaki liboso.+ 29 Mpe sikoyo, Yehova,* tyá likebi na makaneli na bango, mpe pesá baombo na yo likoki ya kokoba koloba liloba na yo na mpiko mpenza, 30 wana ozali kosembola lobɔkɔ na yo mpo na kobikisa mpe wana bilembo mpe makamwisi* ezali kosalema+ na nkombo ya mosaleli na yo mosantu Yesu.”+

31 Mpe ntango basilisaki kobondela na molende, esika oyo bayanganaki eninganaki; mpe bango nyonso batondaki na elimo santu+ mpe babandaki koloba liloba ya Nzambe na mpiko.+

32 Lisusu, ebele ya bato oyo bandimaki bazalaki na likanisi kaka moko* mpe moto moko te azalaki koloba ete eloko boye, na kati na biloko oyo azalaki na yango, ezali ya ye moko; kasi batyaki nde biloko nyonso lisangá.+ 33 Mpe na nguya monene bantoma bakobaki kopesa litatoli oyo etali lisekwa ya Nkolo Yesu,+ mpe boboto monene ezalaki mingi mpenza epai na bango nyonso. 34 Ya solo, moto moko te na kati na bango+ azalaki na bosɛnga, mpo baoyo nyonso bazalaki na bilanga to bandako bazalaki kotɛka yango mpe komema mosolo ya biloko oyo etɛkamaki, 35 mpe bazalaki kotya yango na makolo ya bantoma.+ Na nsima bazalaki kokabola yango na moto na moto, ndenge azalaki na bosɛnga.+ 36 Bongo Yozefe, oyo bantoma bazalaki mpe kobenga Barnabasi,+ (oyo soki babongoli, elakisi Mwana ya Libɔndisi), azalaki Molevi, mwana-mboka ya Shipre, 37 azalaki na eteni moko ya mabele, atɛkaki yango, amemaki mbongo mpe atyaki yango na makolo ya bantoma.+

5 Mobali moko boye, nkombo na ye Ananiasi ná mwasi na ye Safira batɛkaki elanga na bango. 2 Kasi na nkuku, abombaki ndambo ya mbongo, mwasi na ye mpe ayebaki yango, amemaki kaka ndambo mpe atyaki yango na makolo ya bantoma.+ 3 Kasi Petro alobaki ete: “Ananiasi, mpo na nini Satana apesi yo mpiko mpo na kokosa+ elimo santu+ mpe kobomba na nkuku ndambo ya mbongo ya elanga? 4 Liboso otɛka elanga, ezalaki ya yo te? Mpe nsima ya kotɛka elanga, okokaki te kosala na mbongo ndenge olingi? Mpo na nini okanaki likambo ya boye na motema na yo? Okosi bato te, kasi okosi nde Nzambe.” 5 Ntango ayokaki maloba wana, Ananiasi akweaki mpe akufaki. Mpe kobanga makasi ekangaki baoyo nyonso bayokaki yango. 6 Bilenge mibali batɛlɛmaki, balíngaki ye na bilamba, bamemaki ye libándá mpe bakundaki ye.

7 Nzokande nsima ya bangonga soki misato, mwasi na ye akɔtaki, ayebaki te likambo oyo eutaki kosalema. 8 Petro alobaki na ye ete: “Yebisá ngai, bino mibale botɛkaki elanga na ntalo oyo?” Alobaki ete: “Ɛɛ, na ntalo wana.” 9 Bongo Petro alobaki na ye ete: “Mpo na nini boyokanaki bino mibale mpo bómeka elimo ya Yehova?* Talá! Makolo ya baoyo bauti kokunda mobali na yo ezali na porte ya ndako, mpe bakomema yo libándá.” 10 Na mbala moko akweaki mpe akufaki. Ntango bilenge mibali yango bakɔtaki, bakutaki ye akufi, bamemaki ye libándá mpe bakundaki ye pembeni ya mobali na ye. 11 Na yango lisangá mobimba mpe baoyo nyonso bayokaki makambo yango, bakómaki kobanga makasi.

12 Lisusu, bantoma bazalaki kosala ebele ya bilembo mpe makamwisi* na kati ya bato;+ mpe bango nyonso bazalaki kokutana elongo na veranda ya Salomo.+ 13 Ya solo, moto mosusu te azalaki na mpiko ya kosangana elongo na bango; atako bongo, bato bazalaki koloba malamu mpo na bango. 14 Longola likambo wana, bato oyo bazalaki kondimela Nkolo bakobaki kobakisama, ebele ya mibali mpe ya basi.+ 15 Babimisaki kutu bato ya maladi ata na babalabala ya minene, balalisaki bango kuna na bambeto ya mike mpe na matɔkɔ, mpo ntango Petro akoleka, ata elili na ye mpamba ekoka koleka likoló ya bamosusu kati na bango.+ 16 Lisusu, ebele ya bato oyo bautaki na bingumba ya zingazinga ya Yerusaleme bakobaki koya, bazalaki komema bato ya maladi mpe baoyo bazalaki kotungisama na bilimo ya mbindo, mpe bango nyonso bazalaki kobikisama.

17 Kasi nganga-nzambe monene mpe baoyo nyonso bazalaki elongo na ye, mwa lingomba ya Basadukai oyo ezalaki na ntango wana, batɛlɛmaki mpe batondaki na zuwa. 18 Bakangaki bantoma mpe batyaki bango na bolɔkɔ ya bato nyonso.+ 19 Kasi na butu, anzelu ya Yehova* afungolaki baporte ya bolɔkɔ,+ abimisaki bango libándá mpe alobaki: 20 “Bókende, bótɛlɛma na tempelo, mpe bókoba koloba na bato maloba nyonso etali bomoi oyo.” 21 Mpo na kotosa malako yango, bakɔtaki na tempelo na ntɔngɔntɔngɔ mpe babandaki koteya.

Nzokande ntango nganga-nzambe monene mpe baoyo bazalaki elongo na ye bayaki, bayanganisaki Sanedrina mpe liyangani mobimba ya bankulutu ya bana ya Yisraele, mpe batindaki bato bákende kozwa bantoma na bolɔkɔ. 22 Kasi ntango bapolisi bakómaki kuna, bakutaki bango na bolɔkɔ te. Bongo bazongaki mpe bapesaki bango nsango, 23 balobi: “Tokuti bolɔkɔ ekangami malamu mpenza mpe bakɛngɛli batɛlɛmi na baporte, kasi ntango tofungoli yango tokuti moto na kati te.” 24 Ntango kapitɛni ya tempelo mpe banganga-nzambe bakonzi bayokaki maloba wana basilaki mayele mpo na makambo yango, bazalaki komituna soki ekosuka boni. 25 Kasi moto moko ayaki mpe ayebisaki bango: “Talá! Mibali oyo botyaki na bolɔkɔ bazali na tempelo, batɛlɛmi mpe bazali koteya bato.” 26 Bongo kapitɛni akendaki elongo na bapolisi na ye mpe bayaki na bantoma, kasi na mobulu te, mpo bazalaki kobanga bato bábamba bango mabanga.+

27 Bongo bayaki na bantoma mpe batɛlɛmisaki bango liboso ya Sanedrina. Mpe nganga-nzambe monene atunaki bango 28 mpe alobaki: “Topesaki bino mitindo polelepolele ete bóteya te na nkombo wana,+ kasi, talá! botondisi Yerusaleme na mateya na bino, mpe bozali na ekateli ya komemisa biso ngambo ya liwa ya moto wana.”*+ 29 Petro ná bantoma mosusu bazongisaki: “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.+ 30 Nzambe ya bankɔkɔ na biso alamwisaki Yesu, oyo bino bobomaki, ndenge bobakaki ye na nzete.+ 31 Nzambe atombolaki moto yango mpo azala Kapita+ mpe Mobikisi+ na lobɔkɔ na ye ya mobali,+ mpo na kopesa Yisraele libaku ya kobongola motema mpe ya kolimbisama masumu.+ 32 Mpe tozali batatoli ya makambo yango,+ ndenge moko mpe elimo santu,+ oyo Nzambe apesi na baoyo bazali kotosa ye mpo azali mokonzi.”

33 Ntango bayokaki bongo, basilikaki* makasi mpe balingaki koboma bango. 34 Kasi mofarisai moko na nkombo Gamaliele,+ atɛlɛmaki na Sanedrina; azalaki moteyi ya Mibeko oyo bato nyonso bazalaki komemya, mpe apesaki mitindo ete bábimisa bantoma mwa moke. 35 Bongo alobaki na bango: “Mibali ya Yisraele, bókeba mpenza na likambo oyo bozali kokana kosala na bato oyo. 36 Na ndakisa, eleki mwa mikolo Tedasi atɛlɛmaki, azalaki koloba ete ye mpenza azali moto monene, mpe etuluku ya mibali soki 400 bakɔtaki na lingomba na ye. Kasi abomamaki, baoyo nyonso bazalaki kolanda ye bapalanganaki mpe basilaki nyɛɛ. 37 Nsima na ye, Yudasi Mogalile atɛlɛmaki na ntango bato bazalaki kokomisa bankombo, mpe bato ebele balandaki ye. Moto yango akufaki, baoyo nyonso bazalaki kolanda ye bapalanganaki. 38 Yango wana mpo na makambo oyo ezali koleka sikoyo, nazali koloba na bino: Bókɔta na makambo ya bato oyo te, kasi bótika bango. Mpo soki liteya oyo to mosala oyo euti na bato, ekokweisama; 39 kasi soki euti na Nzambe, bokokoka kokweisa bango te.+ Bókeba mpo bómonana te ete bozali kobunda na Nzambe.”+ 40 Na yango bayokaki toli na ye, babengaki bantoma, babɛtaki bango fimbo,+ mpe bapesaki bango mitindo ete bátika koloba na nkombo ya Yesu, mpe batikaki bango bákende.

41 Na yango, balongwaki liboso ya Sanedrina, bazalaki kosepela+ mpo batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo na ye. 42 Mpe mikolo nyonso na tempelo mpe na ndako na ndako,+ kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Kristo, Yesu.+

6 Nzokande na mikolo yango, wana bayekoli bazalaki kobakisama, Bayuda oyo balobaka monɔkɔ ya Grɛki babandaki koimaima mpo na Bayuda oyo balobaka monɔkɔ ya Ebre, mpamba te bazalaki kobosana basi na bango oyo mibali bakufá na ntango ya kokabola biloko ya mokolo na mokolo.+ 2 Bongo bantoma zomi na mibale bayanganisaki ebele wana ya bayekoli mpe balobaki: “Ebongi te* ete biso tótika liloba ya Nzambe mpo na kokabola biloko ya kolya na bamesa.+ 3 Bongo, bandeko, bópona na kati na bino mibali+ nsambo ya lokumu malamu, oyo batondi na elimo mpe na bwanya,+ mpo tótya bango na mokumba oyo ya ntina;+ 4 kasi biso tokomipesa na mabondeli mpe na mosala ya liloba.” 5 Likambo oyo balobaki esepelisaki bato nyonso oyo bazalaki wana, mpe baponaki Stefano, mobali moko oyo atondi na kondima mpe na elimo santu, Filipe,+ Prokore, Nikanore, Timone, Parmenasi mpe Nikolausi, prozelite moko ya Antiokia. 6 Bamemaki bango epai ya bantoma, mpe, nsima ya kobondela, bantoma batyaki mabɔkɔ likoló na bango.+

7 Na yango, liloba ya Nzambe ekobaki kopalangana,+ mpe motángo ya bayekoli ekobaki kobakisama mingi mpenza+ na Yerusaleme; ebele ya banganga-nzambe babandaki kotosa kondima.+

8 Nzokande Stefano atondaki na ngɔlu ya Nzambe mpe na nguya, azalaki kosala makamwisi minene* mpe bilembo minene na kati ya bato. 9 Kasi bato mosusu ya etuluku ebengami Sinagoga ya Basikwami, bayaki elongo na bato ya Sirene ná ya Alezandria mpe na baoyo bautaki na Silisia ná Azia, mpo na kotyana ntembe ná Stefano. 10 Kasi bakokaki kotɛlɛma te liboso ya bwanya mpe ya elimo oyo ye azalaki koloba na yango.+ 11 Bongo bandimisaki bato na nkuku mpo báloba ete: “Toyoki ye azali koloba maloba ya kofinga Moize ná Nzambe.” 12 Batombokisaki bato, mikóló mpe bakomeli; babimelaki ye na mbalakaka, bakangaki ye na makasi mpe bamemaki ye na Sanedrina. 13 Babimisaki mpe batatoli ya lokuta, oyo balobaki: “Moto oyo azali kotika te koloba makambo ya mabe mpo na esika mosantu oyo mpe mpo na Mibeko. 14 Na ndakisa, toyokaki ye azali koloba ete Yesu Monazarete wana akokweisa esika oyo mpe akobongola mimeseno oyo Moize apesaki biso.”

15 Mpe wana baoyo nyonso bafandaki na Sanedrina bazalaki kotala ye mpenza, bamonaki ete elongi na ye ezali lokola elongi ya anzelu.

7 Kasi nganga-nzambe monene atunaki: “Makambo wana ezali bongo?” 2 Stefano alobaki: “Mibali, bandeko mpe batata, bóyoka. Nzambe ya nkembo abimelaki nkɔkɔ na biso Abrahama ntango azalaki na Mezopotamia, liboso abanda kofanda na Harane,+ 3 mpe alobaki na ye ete: ‘Longwá na mokili na yo, tiká bandeko na yo mpe yaká na mokili oyo nakolakisa yo.’+ 4 Bongo abimaki na mokili ya Bakaladea mpe afandaki na Harane. Mpe kuna, nsima ya liwa ya tata na ye,+ Nzambe alongolaki ye na esika oyo azalaki kofanda mpo akende na mokili oyo bino bofandi sikoyo.+ 5 Nzokande, kuna apesaki ye libula moko te, ɛɛ, ata mabele oyo ekokani na lokolo na ye te; kasi alakaki nde kopesa ye yango mpo ezala eloko na ye, mpe ya bana*+ na ye oyo bakoya nsima na ye, atako na ntango wana azalaki naino na mwana te. 6 Lisusu, Nzambe alobaki na ye ete bato ya libota* na ye bakozala bapaya na mokili oyo ezali ya bango te mpe bato yango bakokómisa bango baombo mpe bakomonisa bango mpasi* mbula 400.+ 7 Nzambe alobaki ete: ‘Nakosambisa ekólo wana oyo bango bakosalela lokola baombo+ mpe nsima ya makambo wana, bakobima mpe bakosalela ngai mosala mosantu na esika oyo.’+

8 “Apesaki ye mpe kondimana ya kokatama ngenga;+ Abrahama abotaki* Yisaka,+ akataki ye ngenga na mokolo ya mwambe,+ mpe Yisaka abotaki Yakobo, mpe Yakobo abotaki bakonzi 12 ya libota. 9 Bakonzi yango ya libota bakómaki na zuwa mpo na Yozefe+ mpe batɛkaki ye na Ezipito.+ Kasi Nzambe azalaki elongo na ye,+ 10 asikolaki ye na bampasi na ye nyonso, apesaki ye bwanya mpe asalaki ete andimama epai ya Farao mokonzi ya Ezipito. Mpe Farao atyaki ye mpo na koyangela Ezipito mpe ndako na ye mobimba.+ 11 Kasi nzala ekɔtaki na Ezipito mobimba mpe na Kanana, ɛɛ mpasi moko monene; mpe bankɔkɔ na biso bazalaki na eloko ya kolya te.+ 12 Kasi Yakobo ayokaki ete biloko ya kolya* ezalaki na Ezipito mpe atindaki bankɔkɔ na biso mbala ya liboso.+ 13 Na mbala ya mibale, Yozefe amilakisaki epai ya bandeko na ye; mpe libota ya Yozefe eyebanaki epai ya Farao.+ 14 Bongo Yozefe atindaki bákende kozwa Yakobo tata na ye mpe bato nyonso ya libota na ye na mokili ya Kanana,+ bango nyonso bazalaki bato 75.*+ 15 Yakobo akitaki na Ezipito+ mpe akufaki kuna;+ bankɔkɔ na biso mpe bakufaki kuna.+ 16 Bamemaki mikuwa na bango na Shekeme mpe balalisaki yango na lilita oyo Abrahama asombaki na motuya ya mbongo ya palata epai ya bana ya Hamore na Shekeme.+

17 “Wana ntango ezalaki kokóma pene mpo elaka oyo Nzambe asakolaki polele epai ya Abrahama ekokisama, bato babotamaki mingi mpe bakómaki ebele na Ezipito. 18 Nsima mokonzi mosusu abimaki na Ezipito, oyo ayebaki Yozefe te.+ 19 Ye asalelaki ekólo na biso mayele mabe mpe apusaki batata na biso na makasi nyonso básundola bana na bango ya mike, mpo bákoka kotikala na bomoi te.+ 20 Na ntango wana, Moize abotamaki, azalaki kitoko mpenza.* Mpe babatelaki* ye sanza misato na ndako ya tata na ye.+ 21 Kasi ntango basundolaki ye,*+ mwana mwasi ya Farao azwaki ye mpe abɔkɔlaki ye lokola mwana na ye mpenza.+ 22 Na yango, Moize ateyamaki na bwanya nyonso ya Baezipito. Ɛɛ, azalaki na nguya na maloba mpe na misala na ye.+

23 “Ntango akokisaki mbula 40, azwaki ekateli* ya kokende kotala bandeko na ye, bana ya Yisraele.+ 24 Ntango amonaki Moezipito moko azali kosalela Moyisraele makambo na ndenge ebongi te, asalisaki ndeko na ye, azongisaki mabe mpe abomaki Moezipito yango. 25 Akanisaki ete bandeko na ye bakososola ete Nzambe nde alingi abikisa bango na nzela na ye, kasi basosolaki yango te. 26 Na mokolo oyo elandaki, akómaki wana mibale kati na bango bazalaki kobunda, mpe amekaki kozongisa kimya kati na bango, alobaki: ‘Mibali, bozali bandeko. Mpo na nini bozali kosalana mabe?’ 27 Kasi oyo azalaki kosala mozalani na ye mabe apusaki ye, alobaki ete: ‘Nani atye yo mokonzi mpe mosambisi na biso? 28 Olingi nde koboma ngai ndenge obomaki Moezipito lobi?’ 29 Ntango Moize ayokaki bongo, akimaki mpe akómaki kofanda mopaya na mokili ya Midiane, epai abotaki bana mibali mibale.+

30 “Nsima ya mbula 40, anzelu moko abimelaki ye na esobe ya Ngomba Sinai na kati ya lolemo ya mɔtɔ ya mwa nzete ya nzubɛ.+ 31 Ntango Moize amonaki yango, akamwaki likambo oyo amonaki. Kasi wana azalaki kopusana mpo na kotala malamumalamu, ayokaki mongongo ya Yehova,* elobi: 32 ‘Nazali Nzambe ya bankɔkɔ na yo, Nzambe ya Abrahama, ya Yisaka mpe ya Yakobo.’+ Moize abandaki kolɛnga, mpe amekaki lisusu kotala te. 33 Yehova* alobaki na ye ete: ‘Longolá basandale na yo, mpo esika oyo otɛlɛmi ezali mabele mosantu. 34 Ya solo, namoni konyokwama ya bato na ngai oyo bazali na Ezipito, mpe nayoki kolelalela* na bango+ mpe nakiti mpo na kobikisa bango. Sikoyo yaká, nakotinda yo na Ezipito.’ 35 Kaka Moize yango oyo bawanganaki, ntango balobaki ete: ‘Nani atye yo mokonzi mpe mosambisi?’+ moto yango nde Nzambe atindaki+ lokola mokonzi mpe mosikoli na nzela ya anzelu oyo abimelaki ye na mwa nzete wana ya nzubɛ. 36 Mobali yango abimisaki bango na Ezipito,+ asalaki makamwisi* mpe bilembo na Ezipito,+ na Mbu Motane+ mpe na esobe mbula 40.+

37 “Moize yango nde alobaki na bana ya Yisraele ete: ‘Nzambe akobimisela bino na kati ya bandeko na bino, mosakoli moko lokola ngai.’+ 38 Ye nde azalaki ná lisangá na esobe elongo na anzelu+ oyo alobaki na ye+ na Ngomba Sinai mpe elongo na bankɔkɔ na biso, mpe azwaki maloba mosantu ya bomoi mpo na kopesa biso.+ 39 Bankɔkɔ na biso baboyaki kotosa ye, kasi batombokelaki ye+ mpe na mitema na bango bazongaki na Ezipito,+ 40 balobaki na Arona ete: ‘Salelá biso banzambe oyo bakotambola liboso na biso. Mpo toyebi te nini ekómeli Moize yango, moto oyo abimisaki biso na mokili ya Ezipito.’+ 41 Bongo basalaki mwana-ngɔmbɛ na mikolo wana mpe bamemelaki ekeko yango mbeka mpe babandaki kosepela na misala ya mabɔkɔ na bango.+ 42 Bongo Nzambe atikaki bango mpe akabaki bango básalela limpinga ya likoló mosala mosantu,+ ndenge ekomamá na mokanda ya basakoli ete: ‘Ezali epai na ngai te nde bopesaki banyama oyo ebomami mpe bambeka na boumeli ya mbula 40 oyo bolekisaki na esobe, boye te, Ee bato ya Yisraele? 43 Kasi ezalaki hema ya Moloke+ mpe monzoto ya nzambe Refane nde bozwaki, bikeko oyo bosalaki mpo na kosambela yango. Yango wana nakomema bino mosika koleka Babilone.’+

44 “Bankɔkɔ na biso bazalaki na hema ya litatoli na esobe, kaka ndenge apesaki mitindo ntango azalaki koloba na Moize asala yango na kolanda modɛlɛ oyo amonaki.+ 45 Mpe bankɔkɔ na biso bazwaki yango libula mpe, elongo na Yosua bakɔtisaki yango na mokili oyo ezalaki ya bikólo+ oyo Nzambe abenganaki liboso ya bankɔkɔ na biso.+ Eumelaki kuna tii na mikolo ya Davidi. 46 Ye azwaki boboto na miso ya Nzambe mpe asɛngaki libaku malamu ya kozwela Nzambe ya Yakobo esika ya kofanda.+ 47 Kasi, Salomo nde atongelaki ye ndako.+ 48 Atako bongo, Oyo-Aleki-Likoló afandaka na bandako oyo esalemi na mabɔkɔ te;+ kaka ndenge mosakoli azali koloba ete: 49 ‘Likoló ezali kiti ya bokonzi na ngai,+ mpe mabele ezali ebonga ya makolo na ngai.+ Ndako ya ndenge nini bokotongela ngai? Yehova* alobi bongo. To wapi esika na ngai ya kopema? 50 Lobɔkɔ na ngai esalaki biloko oyo nyonso, boye te?’+

51 “Bino bato ya mitó makasi, baoyo bokangaka matoi na bino mpe bolingi te kobongisa makanisi na bino,* bozali ntango nyonso kotɛmɛla elimo santu; ndenge bankɔkɔ na bino basalaki, bino mpe bozali kosala kaka bongo.+ 52 Nani na kati ya basakoli bankɔkɔ na bino banyokolaki te?+ Ɛɛ, babomaki baoyo basakolaki liboso na ntina etali koya ya Moto ya sembo,+ oyo bino botɛki mpe bobomi ye,+ 53 bino bato bozwaki Mobeko oyo epesamaki na nzela ya baanzelu+ kasi botosaki yango te.”

54 Bongo ntango bayokaki maloba wana, basilikaki makasi* mpe babandaki kolyela ye mino. 55 Kasi Stefano, lokola atondaki na elimo santu, atalaki likoló mpe amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe,+ 56 mpe alobaki: “Talá! Namoni likoló efungwami mpe Mwana ya moto+ atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe.”+ 57 Na yango, bagangaki na mongongo makasi, batyaki mabɔkɔ na matoi na bango mpe bango nyonso bakwelaki ye. 58 Nsima ya kobwaka ye na libándá ya engumba, babandaki kobamba ye mabanga.+ Batatoli+ oyo bafundaki ye, batyaki bilamba na bango ya likoló na makolo ya elenge mobali moko oyo babengi Saulo.+ 59 Wana bazalaki kobamba Stefano mabanga, abelelaki: “Nkolo Yesu, yambá elimo na ngai.” 60 Na nsima afukamaki, agangi na mongongo makasi: “Yehova,* kotángela bango lisumu oyo te.”+ Mpe nsima ya koloba bongo, alalaki na kati ya liwa.

8 Nzokande Saulo andimaki kobomama ya Stefano.+

Na mokolo wana, monyoko moko monene ekómelaki lisangá oyo ezalaki na Yerusaleme; bango nyonso, longola kaka bantoma, bapalanganaki na bitúká ya Yudea mpe ya Samaria.+ 2 Kasi mibali oyo babangaka Nzambe bamemaki Stefano mpo na kokunda ye, mpe balelaki ye mingi. 3 Nzokande, Saulo abandaki konyokola lisangá. Azalaki kokɔta na ndako mokomoko mpe kobimisa mibali ná basi, azalaki kokangisa bango na bolɔkɔ.+

4 Kasi baoyo bapalanganaki, bakatisaki mokili yango mobimba wana bazalaki kosakola nsango malamu ya liloba ya Nzambe.+ 5 Filipe akitaki na engumba ya Samaria+ mpe abandaki kosakola Kristo epai na bango. 6 Na bomoko mpenza, ebele ya bato bazalaki kotya likebi na makambo oyo Filipe azalaki koloba, wana bazalaki koyoka mpe kotala makamwisi oyo azalaki kosala. 7 Mpo bato mingi bazalaki na bilimo ya mbindo, mpe bilimo yango bazalaki koganga na mongongo makasi mpe kobima.+ Lisusu, bato mingi oyo bazalaki kotambola te mpo na maladi mpe batɛngumi babikisamaki. 8 Bongo esengo monene ezalaki na engumba yango.

9 Nzokande na engumba yango, ezalaki na mobali moko, nkombo na ye Simo, azalaki kosala misala ya maji mpe azalaki kokamwisa ekólo ya Samaria, azalaki koloba ete azali moto moko monene. 10 Bango nyonso, banda na oyo aleki moke tii na oyo aleki monene, bazalaki kotyela ye likebi mpe koloba: “Moto oyo azali Nguya ya Nzambe, oyo ebengami Monene.” 11 Bongo bazalaki kotyela ye likebi mpo abandá kokamwisa bango banda kala mpenza na misala na ye ya maji. 12 Kasi ntango bandimaki Filipe, oyo azalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe+ mpe ya nkombo ya Yesu Kristo, babandaki kobatisama, mibali ná basi.+ 13 Simo ye moko mpe akómaki mondimi, mpe nsima ya kobatisama, azalaki ntango nyonso ná Filipe;+ azalaki kokamwa na komona ndenge bilembo mpe misala minene ya nguya ezalaki kosalema.

14 Ntango bantoma na Yerusaleme bayokaki ete Samaria eyambi liloba ya Nzambe,+ batindelaki bango Petro ná Yoane; 15 ntango bakómaki, babondelaki mpo na bango mpo bázwa elimo santu.+ 16 Mpo ekitelaki naino moto ata moko te na kati na bango, kasi babatisamaki kaka na nkombo ya Nkolo Yesu.+ 17 Bongo batyelaki bango mabɔkɔ,+ mpe babandaki kozwa elimo santu.

18 Nzokande ntango Simo amonaki ete elimo ezali kopesama ntango bantoma batyeli bato mabɔkɔ, alingaki kopesa bango mbongo, 19 alobi: “Bópesa ngai mpe nguya oyo, mpo moto nyonso oyo nakotyela ye mabɔkɔ azwa elimo santu.” 20 Kasi Petro alobaki na ye: “Palata na yo ebeba elongo na yo, mpo okanisi kozwa likabo ya ofele ya Nzambe na mbongo.+ 21 Ozali na likabo te mpe na libula te na likambo oyo, mpo motema na yo ezali sembo te na miso ya Nzambe. 22 Na yango, bongolá motema na mabe na yo oyo, mpe bondelá Yehova* mpo, soki likoki ezali, makanisi mabe ya motema na yo elimbisama; 23 mpo namoni ete ozali pwazɔ ya mabe mpenza* mpe moombo ya makambo ya kozanga bosembo.” 24 Simo azongisaki: “Bóbondela Yehova* mpo na ngai ete ata likambo moko te ya makambo oyo bolobi ekómela ngai.”

25 Na yango, ntango basilisaki kopesa litatoli malamumalamu mpe basilisaki kolobela liloba ya Yehova,* bazongaki na Yerusaleme, mpe bazalaki kosakola nsango malamu na bamboka mingi ya Basamaria.+

26 Nzokande, anzelu ya Yehova*+ asololaki na Filipe, alobi: “Tɛlɛmá mpe kende na sudi, na nzela oyo ezali kokita uta na Yerusaleme tii na Gaza.” (Ezali nzela ya mokili ekauká.) 27 Na yango atɛlɛmaki mpe akendaki, mpe talá! mokube moko moto ya Etiopi, moto monene oyo azalaki kosalela Kandase mokonzi mwasi ya bato ya Etiopi, mpe ye nde azalaki kotalela mosolo na ye nyonso. Akendaki na Yerusaleme mpo na kosambela,+ 28 mpe azalaki kozonga, afandaki na likalo na ye, azalaki kotánga na mongongo makasi makomi ya mosakoli Yisaya. 29 Bongo elimo elobaki na Filipe ete: “Kende mpe pusaná pene na likalo wana.” 30 Filipe akendaki mbangu pembeni na yango mpe ayokaki ye azali kotánga na mongongo makasi makomi ya mosakoli Yisaya, mpe atunaki ye ete: “Ozali mpenza kokanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga?” 31 Ye ayanolaki ete: “Ndenge nini nakoki kokanga ntina soki moto alakisi ngai te?” Mpe asɛngaki Filipe amata mpe afanda elongo na ye. 32 Nzokande eteni ya Likomami oyo azalaki kotánga elobaki boye: “Lokola mpate, bamemaki ye na esika ya kobomama, mpe lokola mwana-mpate oyo efandaka kimya liboso ya mokati-nsuki na yango, ye mpe afungolaki monɔkɔ na ye te.+ 33 Na boumeli ya kokitisama na ye basambisaki ye na bosembo te.+ Nani akolobela molɔngɔ ya bankɔkɔ na ye? Mpo bomoi na ye elongolami na mabele.”+

34 Bongo mokube atunaki Filipe ete: “Nabondeli yo, mosakoli azali koloba likambo oyo mpo na nani? Mpo na ye moko to mpo na moto mosusu?” 35 Filipe abandaki koloba, kobanda na Likomami wana asakolelaki ye nsango malamu oyo etali Yesu. 36 Nzokande wana bazalaki kotambola na nzela, bakómaki na esika oyo mai ezalaki, mpe mokube alobaki: “Talá! mai yango oyo; nini ezali kopekisa ngai kobatisama?” 37 *—— 38 Na yango, apesaki mitindo ete likalo etɛlɛma, Filipe ná mokube bango mibale bakitaki na mai, mpe Filipe abatisaki ye. 39 Ntango babimaki na mai, elimo ya Yehova* ememaki Filipe nokinoki epai mosusu, mpe mokube amonaki ye lisusu te, kasi akobaki nzela na ye, azali kosepela. 40 Filipe ayaki komona ete azali na Ashedode, mpe akatisaki teritware yango mobimba mpe akobaki kosakola nsango malamu na bingumba nyonso tii akómaki na Kaisaria.+

9 Kasi Saulo, lokola azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo,+ akendaki epai ya nganga-nzambe monene 2 mpe asɛngaki ye mikanda mpo na basinagoga oyo ezali na Damasi, mpo akanga na minyɔlɔlɔ mpe amema na Yerusaleme, moto nyonso oyo ye akokuta, oyo azali moto ya Nzela,+ mibali ná basi.

3 Nzokande ntango azalaki kosala mobembo, mpe akómaki pene na Damasi, na mbala moko pole moko eutaki na likoló engɛngaki zingazinga na ye,+ 4 akweaki na nse mpe ayokaki mongongo moko elobi na ye: “Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai?” 5 Atunaki: “Yo nani, Nkolo?” Alobaki ete: “Ngai Yesu,+ oyo yo ozali konyokola.+ 6 Tɛlɛmá mpe kɔtá na engumba, mpe bakoyebisa yo oyo osengeli kosala.” 7 Nzokande mibali oyo bazalaki kosala mobembo elongo na ye batɛlɛmaki wana nyɛɛ, bayokaki mpenza lokito ya mongongo moko boye, kasi bamonaki moto te.+ 8 Kasi Saulo atɛlɛmaki, mpe atako miso na ye ezalaki ya kofungwama azalaki komona eloko te. Bongo basimbaki ye na lobɔkɔ mpe bamemaki ye na Damasi. 9 Mpe mikolo misato azalaki komona te,+ azalaki kolya te mpe komɛla te.

10 Na Damasi ezalaki na moyekoli moko nkombo na ye Ananiasi,+ mpe Nkolo alobaki na ye na emonaneli ete: “Ananiasi!” Ye alobaki: “Ngai oyo, Nkolo.” 11 Nkolo alobaki na ye: “Tɛlɛmá, kende na balabala oyo ebengami Alima, luká moto moko nkombo na ye Saulo, moto ya Tarse,+ na ndako ya Yudasi. Mpo, talá! azali kobondela, 12 mpe amoni na emonaneli mobali moko nkombo na ye Ananiasi akɔti mpe atyeli ye mabɔkɔ mpo akóma komona lisusu.”+ 13 Kasi Ananiasi ayanolaki: “Nkolo, nayoki nsango ya mobali wana epai ya bato mingi, mpe mabe nyonso oyo asalaki basantu na yo na Yerusaleme. 14 Mpe awa azali na bokonzi oyo banganga-nzambe bakonzi bapesi ye ya kokanga* baoyo nyonso babelelaka nkombo na yo.”+ 15 Kasi Nkolo alobaki na ye: “Kende, mpo mobali wana azali mbɛki oyo naponi+ mpo na komema nkombo na ngai epai ya bikólo,+ epai ya bakonzi+ mpe epai ya bana ya Yisraele. 16 Mpo nakolakisa ye polele ebele ya makambo oyo asengeli konyokwama na yango mpo na nkombo na ngai.”+

17 Bongo Ananiasi akendaki mpe akɔtaki na ndako yango, atyelaki ye mabɔkɔ mpe alobaki: “Saulo, ndeko na ngai, Nkolo Yesu oyo abimelaki yo na nzela oyo ozalaki koya, atindi ngai, mpo omona lisusu mpe otonda na elimo santu.”+ 18 Mpe na mbala moko biloko moko lokola ekayi* ya mbisi eutaki na miso na ye ekwei, mpe akómaki komona; atɛlɛmaki mpe abatisamaki, 19 alyaki mwa biloko mpe azwaki makasi.

Alekisaki mwa mikolo elongo na bayekoli oyo bazalaki na Damasi,+ 20 mpe na mbala moko na basinagoga abandaki kosakola mpo na Yesu, ete azali Mwana ya Nzambe. 21 Kasi baoyo nyonso bazalaki koyoka ye bakamwaki mpe bazalaki koloba: “Oyo ezali te mobali oyo abimiselaki bato oyo babelelaka nkombo ya Yesu na Yerusaleme mpasi mingi?+ Ayaki awa te na mokano ya kokanga bango* mpe komema bango epai ya banganga-nzambe bakonzi?”+ 22 Kasi Saulo akobaki kozwa nguya mingi lisusu mpe azalaki kosukisa Bayuda oyo bazalaki kofanda na Damasi wana azalaki komonisa makambo na molɔngɔ mpenza ete moto yango azali Kristo.+

23 Nsima ya mwa mikolo, Bayuda basalaki likita mpo na koboma ye.+ 24 Nzokande, likambo yango eyebanaki epai ya Saulo. Bazalaki mpe kokɛngɛla baporte na likebi mpenza butu moi mpo na koboma ye. 25 Bongo bayekoli na ye bazwaki ye mpe bakitisaki ye na butu na nzela ya lidusu moko oyo ezalaki na efelo, bakitisaki ye na kati ya kitunga.+

26 Ntango akómaki na Yerusaleme,+ asalaki makasi mpo na kosangana esika moko na bayekoli; kasi bango nyonso bazalaki kobanga ye, mpo bandimaki te ete azali moyekoli. 27 Bongo Barnabasi+ ayaki kosalisa ye mpe akambaki ye epai ya bantoma, ayebisaki bango likambo mokomoko ndenge Saulo amonaki Nkolo na nzela+ mpe asololaki na ye, mpe ndenge alobaki na mpiko mpenza na nkombo ya Yesu na kati ya Damasi.+ 28 Afandaki elongo na bango, azalaki kotambola* na Yerusaleme mobimba, azalaki koloba na mpiko mpenza na nkombo ya Nkolo; 29 azalaki kosolola mpe kotyana ntembe ná Bayuda ya monɔkɔ ya Grɛki. Kasi bango bazalaki koluka koboma ye.+ 30 Ntango bandeko bayebaki likambo yango, bakitisaki ye na Kaisaria mpe batindaki ye na Tarse.+

31 Ya solo mpenza, lisangá na Yudea mobimba, na Galile mpe na Samaria+ ekɔtaki na eleko moko ya kimya, ezalaki kotongama; mpe lokola ezalaki kotambola na kobanga Yehova* mpe na libɔndisi ya elimo santu,+ ekobaki kokola.

32 Nzokande wana Petro azalaki kosala mobembo na etúká yango mobimba, akitaki mpe epai ya basantu oyo bazalaki kofanda na Lida.+ 33 Kuna akutaki moto moko nkombo na ye Eneasi, oyo asalaki mbula mwambe alalaka kaka na mbeto, mpo azalaki kotambola te mpo na maladi. 34 Mpe Petro alobaki na ye: “Eneasi, Yesu Kristo azali kobikisa yo.+ Tɛlɛmá mpe bongisá mbeto na yo.”+ Mpe atɛlɛmaki na mbala moko. 35 Ntango baoyo nyonso bazalaki kofanda na Lida mpe na mokili patatalu ya Sharone bamonaki ye, bandimelaki Nkolo.

36 Na Yope, ezalaki na moyekoli moko nkombo na ye Tabita, oyo soki babongoli, elakisi Dorkasi.* Azalaki kosala makambo mingi ya malamu mpe kopesa makabo mingi epai ya babola. 37 Kasi na mikolo wana abɛlaki mpe akufaki. Bongo basukolaki ye mpe balalisaki ye na shambrɛ ya likoló. 38 Lokola Lida ezalaki pene na Yope, ntango bayekoli bayokaki ete Petro azalaki na engumba yango batindelaki ye mibali mibale mpo na kobondela ye ete: “Tobondeli yo, yaká nokinoki epai na biso.” 39 Na yango, Petro atɛlɛmaki mpe akendaki elongo na bango. Mpe ntango akómaki, bamemaki ye na shambrɛ ya likoló; mpe basi nyonso oyo mibali bakufá bayaki epai na ye bazali kolela mpe kolakisa bakazaka ebele mpe bilamba mosusu oyo Dorkasi asalaki ntango azalaki na bomoi. 40 Na nsima Petro abimisaki moto nyonso libándá,+ afukamaki mpe abondelaki, abalukaki epai nzoto ezalaki, alobi: “Tabita, tɛlɛmá!” Afungolaki miso mpe, ntango amonaki Petro, afandaki.+ 41 Petro apesaki ye lobɔkɔ, atɛlɛmisaki ye, abengaki basantu ná basi wana oyo mibali bakufá, mpe alakisaki bango ye na bomoi.+ 42 Likambo yango eyebanaki na Yope mobimba, mpe mingi bandimelaki Nkolo.+ 43 Petro atikalaki mwa mikolo na Yope elongo na Simo, mobongisi-mposo ya nyama.+

10 Nzokande na Kaisaria ezalaki na mobali moko nkombo na ye Korneyi, azalaki mokonzi ya etuluku ya basoda 100 oyo bazalaki kobenga limpinga ya Itali. 2 Azalaki moto oyo amipesá na losambo, oyo azalaki kobanga Nzambe elongo na bato nyonso ya ndako na ye; azalaki kopesa makabo mingi epai ya babola mpe azalaki ntango nyonso kosala libondeli* epai ya Nzambe. 3 Pene na ngonga ya misato nsima ya midi,*+ amonaki polele na emonaneli anzelu moko ya Nzambe akɔti epai na ye mpe alobi na ye ete: “Korneyi!” 4 Korneyi abangaki, atalaki ye mpenza mpe atunaki ete: “Likambo nini, Nkolo?” Anzelu alobaki na ye ete: “Mabondeli na yo mpe makabo oyo opesaka epai ya babola emati liboso ya Nzambe mpe akanisi yango.+ 5 Sikoyo tindá mibali na Yope mpe bengisá mobali moko na nkombo Simo, oyo babengaka Petro. 6 Mobali yango azali kofanda epai ya Simo, mobongisi-mposo ya nyama, oyo azali na ndako pene na mbu.” 7 Ntango kaka anzelu oyo asololaki na ye akendaki, abengaki basaleli na ye mibale ná soda moko oyo amipesá na losambo kati na baoyo bazalaki kosalela ye, 8 ayebisaki bango makambo nyonso mpe atindaki bango na Yope.

9 Na mokolo oyo elandaki, wana bazalaki kokoba mobembo na bango mpe kopusana pene na engumba, Petro amataki likoló ya ndako pene na midi* mpo na kobondela. 10 Kasi ayokaki nzala makasi mpe azalaki na mposa ya kolya. Wana bazalaki kolamba, azwaki emonaneli,+ 11 amonaki likoló efungwami mpe eloko moko lokola eteni monene ya elamba ya lini* ezali kokita na mabele ekangami na nsɔngɛ minei; 12 na kati na yango ezalaki na mitindo nyonso ya banyama ya makolo minei mpe ya banyama oyo ebendanaka na libumu mpe ya bandɛkɛ ya likoló. 13 Mpe mongongo moko elobaki na ye ete: “Tɛlɛmá, Petro, bomá mpe lyá!” 14 Kasi Petro alobaki ete: “Soki moke te, Nkolo, mpo nalyá naino eloko ata moko te ya bosɔtɔ to ya mbindo.”+ 15 Mpe mongongo yango elobaki na ye lisusu, na mbala ya mibale ete: “Tiká kobenga bosɔtɔ biloko oyo Nzambe apɛtoli.” 16 Mongongo yango eyokanaki lisusu mpo na mbala ya misato, mpe na mbala moko oyo Petro amonaki ezongaki na likoló.

17 Wana Petro abulunganaki mpenza mpo na koyeba soki emonaneli oyo amonaki elakisi nini, mbala moko mibali oyo Korneyi atindaki batunaki mpo na koyeba epai ndako ya Simo ezalaki mpe batɛlɛmaki wana na porte.+ 18 Babelelaki mpe batunaki soki Simo oyo babengaka Petro azalaki kofanda wana. 19 Wana Petro azalaki naino kokanisa mpo na emonaneli yango, elimo+ elobaki na ye ete: “Talá! Mibali misato bazali koluka yo. 20 Na yango, tɛlɛmá, kitá mpe kende elongo na bango, kotya ntembe ata moke te, mpo ngai nde natindi bango.” 21 Bongo Petro akitaki na nse epai ya mibali yango mpe alobaki ete: “Talá, ngai nde moto oyo bozali koluka. Ndenge nini nakoki kosalisa bino?” 22 Balobaki ete: “Korneyi,+ mokonzi moko ya basoda, moto moko ya sembo mpe moto oyo abangaka Nzambe, oyo ekólo mobimba ya Bayuda elobelaka na ndenge ya malamu, azwaki malako ya Nzambe na nzela ya anzelu moko mosantu mpo na kobengisa yo na ndako na ye mpe mpo na koyoka makambo oyo ozali na yango ya koloba.” 23 Na yango, Petro asɛngaki bango bákɔta mpe ayambaki bango lokola bapaya na ye.

Na mokolo oyo elandaki atɛlɛmaki mpe akendaki elongo na bango, mpe bandeko mosusu ya Yope bakendaki elongo na ye. 24 Na mokolo mosusu oyo elandaki, akɔtaki na Kaisaria. Korneyi azalaki mpenza kozela bango mpe asilaki koyanganisa bato ya libota na ye mpe baninga na ye ya motema. 25 Wana Petro azalaki kokɔta, Korneyi ayaki kokutana na ye, akweaki na nse na makolo na ye mpe agumbamelaki ye.* 26 Kasi Petro atɛlɛmisaki ye, alobi: “Tɛlɛmá; ngai mpe nazali kaka moto.”+ 27 Ntango azalaki kosolola na ye, akɔtaki mpe akutaki bato ebele bayangani. 28 Alobaki na bango: “Boyebi malamu ndenge epekisami ete Moyuda asangana to apusana pene na moto ya ekólo mosusu,+ mpe atako bongo Nzambe amonisi ngai ete nasengeli kobenga moto ata moko te bosɔtɔ to mbindo.+ 29 Yango wana nayei, kozanga kotya ntembe, ntango bobengaki ngai. Na yango, bóyebisa ngai mpo na nini bobengi ngai.”

30 Bongo, Korneyi alobaki: “Eleki sikoyo mikolo minei, kaka na ngonga oyo, nazalaki kobondela na ndako na ngai na ngonga ya misato nsima ya midi,* ntango mobali moko na bilamba ya kongɛnga atɛlɛmaki liboso na ngai 31 mpe alobaki ete: ‘Korneyi, Nzambe ayoki libondeli na yo mpe akanisi makabo oyo opesaka epai ya babola. 32 Na yango, tindá bato na Yope bábenga Simo, oyo babengaka Petro. Moto yango azali kofanda epai ya Simo, mobongisi-mposo ya nyama, oyo ndako na ye ezali pene na mbu.’+ 33 Bongo natindaki bato bábenga yo nokinoki, mpe osali malamu ndenge oyei awa. Sikoyo tozali biso nyonso awa liboso ya Nzambe mpo na koyoka makambo nyonso oyo Yehova* apesi yo mitindo oloba.”

34 Na yango, Petro abandaki koloba: “Sikoyo nasosoli mpenza ete Nzambe aponaka bilongi te,+ 35 kasi andimaka moto nyonso oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya bosembo, ata soki azali na ekólo nini.+ 36 Atindelaki bana ya Yisraele liloba mpo na kosakwela bango nsango malamu ya kimya+ na nzela ya Yesu Kristo, ye azali Nkolo ya bato nyonso.+ 37 Boyebi likambo oyo bato bazalaki kolobela bipai nyonso na kati ya Yudea mobimba, kobanda na Galile+ nsima ya batisimo oyo Yoane asakolaki, 38 oyo etali Yesu moto ya Nazarete, ndenge Nzambe atyaki ye mafuta na elimo santu+ mpe na nguya, mpe ndenge akatisaki mokili yango mobimba, azalaki kosala malamu mpe kobikisa baoyo nyonso banyokwami na Zabolo,+ mpo Nzambe azalaki elongo na ye.+ 39 Mpe tozali batatoli ya makambo nyonso oyo ye asalaki na mokili ya Bayuda mpe na Yerusaleme; kasi babakaki ye na nzete mpe babomaki ye. 40 Nzambe asekwisaki* ye na mokolo ya misato+ mpe apesaki ye likoki ya komonana, 41 epai ya bato nyonso te, kasi epai ya batatoli oyo baponamá na Nzambe liboso, epai na biso, bato tolyaki mpe tomɛlaki elongo na ye nsima ya kosekwa na ye na bakufi.+ 42 Lisusu, apesaki biso mitindo ya kosakwela bato mpe kopesa litatoli+ malamumalamu ete ye azali moto oyo Nzambe atye mpo na kozala mosambisi ya bato ya bomoi mpe ya bakufi.+ 43 Basakoli nyonso bazali kopesa litatoli oyo mpo na ye,+ ete moto nyonso oyo akondimela ye, akolimbisama masumu na nkombo na ye.”+

44 Wana Petro azalaki naino kolobela makambo yango, elimo santu ekitelaki baoyo nyonso bazalaki koyoka liloba yango.+ 45 Mpe bandimi* oyo bakatamá ngenga oyo bayaki elongo na Petro bakamwaki, mpo likabo ya ofele ya elimo santu ezalaki kosopama likoló ya bato ya bikólo. 46 Mpo bayokaki bango bazali koloba na minɔkɔ ya bapaya* mpe bazali kokumisa Nzambe.+ Bongo Petro atunaki: 47 “Lokola bato oyo bazwi elimo santu ndenge moko na biso, nani akoki kopekisa bango bábatisama na mai?”+ 48 Mpe apesaki mitindo ete bábatisama na nkombo ya Yesu Kristo.+ Nsima na yango, basɛngaki ye afanda mwa mikolo.

11 Nzokande bantoma mpe bandeko oyo bazalaki na Yudea bayokaki ete bato ya bikólo mpe bayambaki liloba ya Nzambe. 2 Bongo ntango Petro amataki na Yerusaleme, bato oyo bakangamá na mobeko ya kokatama ngenga+ babandaki koloba mabe mpo na ye,* 3 balobi: “Okendaki na ndako ya bato oyo bakatamá ngenga te mpe olyaki elongo na bango.” 4 Na yango, Petro abandaki kolimbwela bango likambo mokomoko, alobaki:

5 “Nazalaki kobondela na engumba Yope, mpe nazwaki emonaneli moko, eloko moko* lokola eteni monene ya elamba ya lini ezalaki kokitisama na bansɔngɛ na yango minei uta na likoló, mpe eyaki tii epai na ngai.+ 6 Ntango natalaki malamumalamu na kati, namonaki banyama ya makolo minei ya mabele, banyama ya zamba, banyama oyo ebendanaka na libumu* mpe bandɛkɛ ya likoló. 7 Nayokaki mpe mongongo moko elobi na ngai ete: ‘Tɛlɛmá, Petro, bomá mpe lyá!’ 8 Kasi nalobaki ete: ‘Soki moke te, Nkolo, mpo eloko ya bosɔtɔ to ya mbindo ekɔtá naino na monɔkɔ na ngai te.’ 9 Mongongo yango oyo eutaki na likoló eyokanaki mpo na mbala ya mibale ete: ‘Tiká kobenga bosɔtɔ biloko oyo Nzambe apɛtoli.’ 10 Mongongo yango eyokanaki mpe mpo na mbala ya misato, mpe biloko yango nyonso ezongaki lisusu na likoló. 11 Lisusu, kaka na ntango yango, mibali misato batɛlɛmaki na ndako oyo tozalaki kofanda, bautaki na Kaisaria, batindaki bango báya koluka ngai.+ 12 Bongo elimo eyebisaki ngai ete nakende elongo na bango, natya ntembe ata moke te. Bandeko oyo motoba mpe bakendaki elongo na ngai, mpe tokɔtaki na ndako ya mobali yango.

13 “Ayebisaki biso ndenge amonaki anzelu atɛlɛmi na ndako na ye mpe alobaki ete: ‘Tindá bato na Yope mpe bengisá Simo oyo babengaka Petro,+ 14 mpe akoyebisa yo makambo oyo yo ná bato ya ndako na yo bosengeli kosala mpo bóbika.’ 15 Kasi ntango nabandaki koloba, elimo santu ekitelaki bango ndenge mpe ekitelaki biso na ebandeli.+ 16 Na yango, nakanisaki lisusu liloba ya Nkolo, ntango azalaki koloba ete: ‘Yoane abatisaki na mai,+ kasi bino bokobatisama na elimo santu.’+ 17 Na yango, soki Nzambe apesi bango likabo ya ofele ndenge apesaki mpe biso baoyo tondimelaki Nkolo Yesu Kristo, ngai nani mpo nakoka kopekisa Nzambe?”*+

18 Ntango bayokaki makambo yango, batikaki kotya ntembe,* mpe bakumisaki Nzambe, balobi: “Ya solo, Nzambe apesi mpe bato ya bikólo libaku ya kobongola motema mpo bázwa bomoi.”+

19 Baoyo bapalanganaki+ mpo na monyoko* oyo ebimaki nsima ya liwa ya Stefano bakatisaki tii na Fenisia, na Shipre mpe na Antiokia, kasi bazalaki kosakola liloba kaka epai ya Bayuda.+ 20 Nzokande, mibali mosusu ya Shipre mpe ya Sirene oyo bayaki na Antiokia mpe babandaki kosolola na bato oyo balobaka monɔkɔ ya Grɛki, bazalaki kosakola nsango malamu ya Nkolo Yesu. 21 Lisusu, lobɔkɔ ya Yehova* ezalaki elongo na bango, bato mingi bakómaki bandimi mpe babandaki kolanda Nkolo.+

22 Nsango na bango ekómaki na matoi ya lisangá oyo ezalaki na Yerusaleme, mpe batindaki Barnabasi+ tii na Antiokia. 23 Ntango akómaki mpe amonaki boboto monene ya Nzambe, asepelaki mpe abandaki kolendisa bango nyonso ete bákangama na Nkolo na motema moko;+ 24 mpo azalaki moto malamu mpe atondá na elimo santu mpe na kondima. Mpe ebele mpenza ya bato bandimelaki Nkolo.+ 25 Bongo akendaki na Tarse mpo na kolukaluka Saulo bipai nyonso.+ 26 Nsima ya komona ye, amemaki ye na Antiokia. Yango wana na boumeli ya mbula mobimba, bazalaki koyangana elongo na bango na lisangá mpe bateyaki ebele mpenza ya bato, mpe ezalaki nde na Antiokia bayekoli babengamaki mpo na mbala ya liboso bakristo na litambwisi ya Nzambe.+

27 Na mikolo yango, basakoli+ bautaki na Yerusaleme bakitaki na Antiokia. 28 Moko na bango nkombo na ye Agabusi,+ atɛlɛmaki mpe asakolaki na nzela ya elimo ete nzala moko monene ekoya na mabele mobimba oyo bato bafandi;+ nzala yango eyaki na ntango ya Klode. 29 Bongo bayekoli bazwaki mokano ya kotindela bandeko oyo bazalaki kofanda na Yudea biloko ya lisungi,*+ moto na moto na kolanda oyo azalaki na yango;+ 30 mpe basalaki bongo, batindaki yango epai ya bankulutu na nzela ya Barnabasi ná Saulo.+

12 Na eleko wana mpenza, mokonzi Erode abandaki konyokola bandeko na lisangá.+ 2 Abomaki Yakobo ndeko ya Yoane+ na mopanga.+ 3 Ntango amonaki ete yango ezalaki kosepelisa Bayuda, akangaki mpe Petro. (Yango esalemaki na eleko ya Fɛti ya mampa ezangá levire.)+ 4 Akangaki ye mpe atyaki ye na bolɔkɔ;+ apesaki ye na mabɔkɔ ya bituluku minei ya basoda mineiminei oyo bazalaki kokɛngɛla ye, etuluku mokomoko na ngala na yango, mpo akanaki kobimisa ye* liboso ya bato nsima ya Elekeli. 5 Na yango, Petro akangamaki kaka na bolɔkɔ, kasi lisangá ekobaki kobondela Nzambe makasi mpo na ye.+

6 Ntango Erode alingaki kobimisa ye liboso ya bato, na butu wana Petro alalaki mpɔngi na kati ya basoda mibale, akangami na minyɔlɔlɔ mibale, mpe bakɛngɛli liboso ya porte bazalaki kokɛngɛla bolɔkɔ. 7 Kasi, talá! Anzelu ya Yehova* atɛlɛmaki wana,+ mpe pole engɛngaki na bolɔkɔ yango. Asimbaki Petro na mopanzi, alamwisaki ye, alobi: “Tɛlɛmá noki!” Mpe minyɔlɔlɔ oyo ekangaki mabɔkɔ na ye ekweaki.+ 8 Anzelu alobaki na ye: “Latá bilamba* mpe basandale na yo.” Asalaki bongo. Na nsuka anzelu ayebisaki ye: “Latá elamba na yo ya likoló mpe landá ngai.” 9 Abimaki mpe akobaki kolanda ye, kasi ayebaki te ete oyo ezalaki kosalema na nzela ya anzelu wana ezalaki likambo ya solo. Kutu, akanisaki nde ete azalaki komona emonaneli. 10 Nsima ya koleka etuluku ya bakɛngɛli ya liboso mpe ya mibale, bakómaki na porte ya ebende ya kobimela na engumba, mpe efungwamaki liboso na bango kaka yango moko. Nsima ya kobima, bapusanaki na balabala moko boye, mpe na mbala moko anzelu wana atikaki ye. 11 Ntango Petro ayaki kososola makambo oyo ezalaki kosalema, alobaki: “Sikoyo nayebi mpenza ete Yehova* atindaki anzelu na ye mpe abikisi ngai na lobɔkɔ ya Erode mpe na nyonso oyo Bayuda bazalaki kozela.”+

12 Nsima ya kososola likambo yango, akendaki na ndako ya Maria, mama ya Yoane oyo babengaka Marko,+ epai bayekoli ebele bayanganaki mpe bazalaki kobondela. 13 Ntango abɛtaki kɔkɔkɔ na porte, mwana mwasi moko ya mosala, nkombo na ye Roda ayaki kotala soki ezali nani. 14 Ntango ayokaki ete ezali mongongo ya Petro, lokola azalaki na esengo makasi, na esika afungola porte azongaki mbangu na kati mpe ayebisaki bango ete Petro atɛlɛmi liboso ya porte. 15 Balobaki na ye: “Obɛli motó?” Kasi ye akobaki koloba ete ezali mpenza bongo. Babandaki koloba: “Ezali anzelu na ye.” 16 Kasi Petro atikalaki kaka wana kobɛta kɔkɔkɔ. Ntango bafungolaki, bamonaki ye mpe bakamwaki. 17 Kasi asalaki bango elembo na lobɔkɔ na ye ete bázala nyɛɛ mpe ayebisaki bango likambo mokomoko ndenge Yehova* abimisaki ye na bolɔkɔ, mpe alobaki: “Bóyebisa Yakobo+ mpe bandeko makambo oyo.” Na nsima abimaki mpe akendaki esika mosusu.

18 Ntango ntɔngɔ etanaki, yikiyiki monene ezalaki na kati ya basoda mpo na koyeba nini ekómeli Petro. 19 Erode alukaki ye bipai nyonso kasi amonaki ye te, atunatunaki bakɛngɛli mpe apesaki mitindo ete bázwa etumbu;+ bongo autaki na Yudea akiti na Kaisaria mpe alekisaki mwa ntango kuna.

20 Nzokande azalaki na nkanda mpo na* bato ya Tire mpe ya Sidone. Bongo bayaki epai na ye na likanisi moko mpe nsima ya kosolola na Blasitusi, oyo azalaki na mokumba ya kotambwisa makambo na ndako ya mokonzi,* babandaki kosɛnga bázongisa kimya ná mokonzi, mpo mokili na bango ezalaki kozwa biloko ya kolya na mokili ya mokonzi. 21 Na mokolo oyo etyamaki, Erode alataki bilamba ya bokonzi, afandaki na kiti ya kosambisa mpe abandaki kosalela bango diskur. 22 Bongo bato oyo bayanganaki babandaki koganga: “Mongongo ya nzambe, kasi ya moto te!” 23 Na mbala moko anzelu ya Yehova* abɛtaki ye, mpo apesaki Nzambe nkembo te; nkusu elyaki ye mpe akufaki.

24 Kasi liloba ya Yehova* ekobaki kopalangana mpe bato mingi bakómaki bandimi.+

25 Nzokande Barnabasi+ ná Saulo, nsima ya kokokisa malamumalamu mosala ya kopesa biloko ya lisungi na Yerusaleme,+ bazongaki mpe bamemaki elongo na bango Yoane,+ oyo babengaka mpe Marko.

13 Na Antiokia, basakoli ná bateyi bazalaki na lisangá ya mboka yango.+ Ezalaki Barnabasi, Simeone oyo bazalaki kobenga Nigere, Lukiusi ya Sirene, Manaene oyo atángaki kelasi esika moko ná Erode moyangeli ya etúká, mpe Saulo. 2 Wana bazalaki kosalela* Yehova* mpe kokila bilei, elimo santu elobaki: “Bótyela ngai pembeni Barnabasi ná Saulo+ mpo na mosala oyo nabengi bango mpo na yango.”+ 3 Bongo nsima ya kokila bilei mpe kobondela, batyelaki bango mabɔkɔ mpe batikaki bango bákende.

4 Bongo mibali yango, oyo batindamaki na elimo santu, bakitaki na Selukia, mpe balongwaki kuna bakei na masuwa na Shipre. 5 Ntango bakómaki na Salamisi, babandaki kosakola liloba ya Nzambe na basinagoga ya Bayuda. Yoane azalaki mosungi* na bango.+

6 Ntango basilisaki kokatisa esanga wana mobimba tii na Pafosi, bakutanaki na Moyuda moko, nkombo na ye Bara-Yesu oyo azalaki nganga-nkisi mpe mosakoli ya lokuta. 7 Azalaki elongo na prokonsule* Sergiusi Paulusi, mobali moko ya mayele. Abengaki Barnabasi mpe Saulo epai na ye, mpo azalaki na mposa makasi ya koyoka liloba ya Nzambe. 8 Kasi nganga-nkisi yango oyo babengaka ye mpe Elimasi (oyo elakisi nganga-nkisi) abandaki kotɛmɛla bango, azalaki koluka kopɛngwisa prokonsule na kondima. 9 Bongo Saulo, oyo babengaka mpe Paulo, lokola atondaki na elimo santu, atalaki ye na likebi mpenza 10 mpe alobaki: “Ee moto atondi na bokosi ya ndenge nyonso mpe na bizaleli mabe ya ndenge nyonso, yo mwana ya Zabolo,+ yo monguna ya makambo nyonso ya bosembo, okotika te kotɛngisa banzela ya sembo ya Yehova?* 11 Talá! Lobɔkɔ ya Yehova* ezali kokitela yo, okokufa miso, okomona pole ya moi te mpo na mwa ntango.” Na ntango wana kaka, londende moko ya makasi mpe molili ekwelaki ye, mpe akómaki kobalukabaluka mpo na koluka moto atambwisa ye na lobɔkɔ. 12 Na yango ntango prokonsule amonaki likambo oyo esalemi, akómaki mondimi, mpo mateya ya Yehova* ekamwisaki ye.

13 Paulo ná baninga na ye ya mosala bazwaki nzela ya mbu banda na Pafosi mpe bakómaki na Perga na kati ya Pamfilia. Kasi Yoane+ atikaki bango mpe azongaki na Yerusaleme.+ 14 Nzokande, balongwaki na Perga, bakómaki na Antiokia ya Pisidia. Bakɔtaki na sinagoga+ na mokolo ya sabata, mpe bafandaki. 15 Nsima ya kotánga Mibeko+ mpe Basakoli liboso ya bato nyonso, bakambi ya sinagoga batindelaki bango maloba: “Mibali, bandeko, soki bozali na mwa liloba ya kolendisa bato, bóloba yango.” 16 Bongo Paulo atɛlɛmaki, mpe asalaki elembo na lobɔkɔ na ye, alobi:

“Mibali, Bayisraele mpe bino bamosusu oyo bobangaka Nzambe, bóyoka. 17 Nzambe ya bato oyo, Yisraele, aponaki bankɔkɔ na biso, mpe akómisaki bato oyo ekólo ya nguya* ntango bafandaki bapaya na mokili ya Ezipito mpe abimisaki bango kuna na lobɔkɔ oyo etombwani.+ 18 Mpe na eleko ya mbula soki 40 akangaki motema na etamboli na bango na esobe.+ 19 Nsima ya koboma bikólo nsambo na mokili ya Kanana, apesaki mokili na bango libula epai ya bankɔkɔ na biso.+ 20 Nyonso wana eumelaki mbula soki 450.

“Nsima na yango apesaki bango basambisi tii na mosakoli Samwele.+ 21 Kasi na nsima, basɛngaki mokonzi,+ mpe Nzambe apesaki bango Saulo mwana ya Kishe, mobali moko ya libota ya Benyamina,+ oyo ayangelaki bango mbula 40. 22 Nsima ya kolongola ye, aponelaki bango Davidi mpo azala mokonzi,+ oyo apesaki litatoli mpo na ye ete: ‘Namoni Davidi mwana ya Yese,+ moto oyo azali kosepelisa motema na ngai;+ akosala makambo nyonso oyo nalingi.’ 23 Kaka ndenge alakaki, uta na bana* ya moto yango, Nzambe abimiselaki Yisraele mobikisi, Yesu.+ 24 Liboso moto yango aya, Yoane asakolaki polele epai ya bato nyonso ya Yisraele batisimo oyo ezali elembo ya kobongola motema.+ 25 Kasi wana Yoane akómaki pene ya kosilisa mosala na ye, azalaki koloba ete: ‘Bino bokanisi ete nazali nani? Ngai nazali ye te. Kasi, talá! Moto moko azali koya nsima na ngai oyo nabongi te kofungola basandale ya makolo na ye.’+

26 “Mibali, bandeko, bino bana ya libota ya Abrahama mpe baoyo mosusu bazali na kati na bino oyo babangaka Nzambe, biso nde batindeli liloba ya lobiko oyo.+ 27 Mpo bato oyo bafandi na Yerusaleme mpe bankumu na bango bayebaki moto yango te, kasi ntango basambisaki ye, bakokisaki makambo oyo Basakoli balobaki,+ oyo etángamaka na mongongo makasi sabata nyonso. 28 Atako bamonaki likambo moko te ya koboma ye,+ basɛngaki Pilate ete abomama.+ 29 Mpe nsima ya kokokisa makambo nyonso oyo ekomamá mpo na ye, bakitisaki ye na nzete mpe balalisaki ye na lilita.*+ 30 Kasi Nzambe asekwisaki* ye uta na bakufi;+ 31 mpe na boumeli ya mikolo mingi akómaki komonana epai ya baoyo bamataki elongo na ye uta na Galile tii na Yerusaleme, baoyo bazali sikoyo batatoli na ye epai ya bato.+

32 “Na yango, tozali kosakwela bino nsango malamu ya elaka oyo epesamaki epai ya bankɔkɔ na biso. 33 Nzambe akokisi yango na mobimba mpenza epai na biso bana na bango ndenge asekwisaki Yesu;+ kaka ndenge ekomamá na nzembo ya mibale ete: ‘Yo ozali mwana na ngai; lelo ngai nakómi Tata na yo.’+ 34 Nzambe asekwisaki ye uta na bakufi mpe akozala lisusu ata moke te na nzoto oyo ekoki kokufa mpe kopɔla. Nzambe andimisaki ete ezali ya solo ntango alobaki ete: ‘Nakomonisela bino bolingo ya sembo oyo nalakaki Davidi, oyo ebongi kotyelama motema.’*+ 35 Yango wana azali mpe koloba na nzembo mosusu ete: ‘Okotika te ete moto na yo ya sembo apɔla.’+ 36 Nzokande Davidi, nsima ya kosalela Nzambe* na eleko na ye mpenza alalaki na liwa, alalisamaki elongo na bankɔkɔ na ye mpe apɔlaki.+ 37 Kasi, moto oyo Nzambe asekwisaki* apɔlaki te.+

38 “Yango wana, bandeko, bóyeba ete na nzela ya moto yango kolimbisama ya masumu ezali kosakolama epai na bino,+ 39 mpe ete na makambo nyonso oyo bokokaki te kotángama bato bazangi ngambo na nzela ya mibeko ya Moize,+ moto nyonso oyo azali kondima atángami moto azangi ngambo na nzela ya moto wana.+ 40 Na yango, bókeba ete oyo elobami na Basakoli ekómela bino te: 41 ‘Bótala yango, bino batyoli, mpe bókamwa, mpe bólimwa, mpo nazali kosala mosala moko na mikolo na bino, mosala oyo bokondima yango soki moke te ata soki moto ayebisi bino yango mokomoko.’”+

42 Ntango bazalaki kobima, bato babondelaki bango mpo bálobela bango makambo wana na sabata oyo ekolanda. 43 Na nsuka ya likita na sinagoga, mingi na kati ya Bayuda mpe baprozelite oyo bazalaki kosambela Nzambe balandaki Paulo ná Barnabasi, oyo basololaki na bango, mpe balendisaki bango ete bátikala na kati ya boboto monene ya Nzambe.+

44 Na sabata oyo elandaki, pene na engumba mobimba eyanganaki mpo na koyoka liloba ya Yehova.* 45 Ntango Bayuda bamonaki ebele wana ya bato, batondaki na zuwa mpe babandaki kotɛmɛla na kofinga mpenza makambo oyo Paulo azalaki koloba.+ 46 Na yango, Paulo ná Barnabasi balobaki na bango na mpiko nyonso: “Esengelaki liloba ya Nzambe esakolama liboso epai na bino.+ Lokola bozali kobwaka yango mpe komona ete bobongi te na bomoi ya seko, talá! tobaluki epai ya bikólo.+ 47 Mpo Yehova* apesi biso mitindo na maloba oyo: ‘Natye yo mpo ozala pole ya bikólo, mpo ozala lobiko tii na bansuka ya mabele.’”+

48 Ntango bato ya bikólo bayokaki yango, babandaki kosepela mpe kokumisa liloba ya Yehova,* mpe baoyo nyonso bazalaki na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko bakómaki bandimi. 49 Lisusu, liloba ya Yehova* ekobaki kopalangana na mokili wana mobimba. 50 Kasi Bayuda batombokisaki basi ya lokumu oyo bazalaki kobanga Nzambe mpe bato minene ya engumba, mpe babimiselaki Paulo ná Barnabasi monyoko+ mpe babwakaki bango libándá ya bandelo ya mboka na bango. 51 Bapupolelaki bango putulu ya makolo na bango mpe bakendaki na Ikoniumu.+ 52 Mpe bayekoli bakobaki kotonda na esengo+ mpe na elimo santu.

14 Na Ikoniumu, bakɔtaki elongo na sinagoga ya Bayuda mpe bateyaki malamu mpenza, bongo ebele ya Bayuda mpe ya Bagrɛki bakómaki bandimi. 2 Kasi Bayuda oyo bandimaki te batombokisaki bato* ya bikólo mpe basalaki ete báyina bandeko.+ 3 Na yango, Paulo ná Barnabasi balekisaki ntango mingi mpenza kuna, bazalaki koloba na mpiko na lisalisi ya bokonzi oyo euti na Yehova,* oyo apesaki litatoli mpo na liloba ya boboto monene na ye na ndenge apesaki nzela ete bilembo mpe makamwisi* esalema na nzela na bango.+ 4 Nzokande, ebele yango ya bato ya engumba bakabwanaki: ndambo bazalaki na ngámbo ya Bayuda mpe bamosusu na ngámbo ya bantoma. 5 Ntango bato ya bikólo mpe Bayuda ná bankumu na bango balukaki kosambwisa bango mpe kobamba bango mabanga,+ 6 bayebisaki Paulo ná Barnabasi likambo yango, mpe bakimaki na bamboka ya Likaonia, Listra mpe Derbe mpe na mokili ya zingazinga.+ 7 Kuna bakobaki kosakola nsango malamu.

8 Mobali moko oyo makolo esalaka te, azalaki kofanda na Listra. Azalaki motɛngumi banda na libumu ya mama na ye, mpe atambolá naino te. 9 Mobali yango azalaki koyoka ntango Paulo azalaki koloba, Paulo atalaki ye na likebi mpenza mpe amonaki ete azali na kondima mpo akóma malamu.+ 10 Alobaki na ye na mongongo makasi: “Tɛlɛmá na makolo na yo.” Mobali yango apumbwaki mpe abandaki kotambola.+ 11 Ntango ebele wana ya bato bamonaki likambo oyo Paulo asalaki, bagangaki na monɔkɔ ya Likaonia: “Banzambe bakómi lokola bato mpe bakiteli biso!”+ 12 Mpe babandaki kobenga Barnabasi Zeusi, kasi Paulo Hermesi, mpo ye azalaki moto ya liboso mpo na koloba. 13 Bongo nganga-nzambe ya Zeusi, oyo tempelo na ye ezalaki na ekɔtelo ya engumba yango, amemaki bangɔmbɛ-mibali mpe mitole ya bafololo na baporte mpe alingaki kopesa bambeka, ye ná ebele yango ya bato.

14 Nzokande, ntango bantoma Barnabasi ná Paulo bayokaki yango, bapasolaki bilamba na bango mpe bapumbwaki na kati ya ebele wana ya bato, mpe bagangaki: 15 “Mibali, mpo na nini bozali kosala makambo oyo? Biso mpe tozali bato oyo bazali na bolɛmbu ndenge moko na bino,+ mpe tozali kosakola nsango malamu epai na bino, mpo bótika makambo wana ya mpamba mpe bóya epai ya Nzambe ya bomoi, oyo asalaki likoló ná mabele ná mbu mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango.+ 16 Na bileko oyo eleká apesaki nzela ete bikólo nyonso básala oyo balingi,+ 17 atako bongo apesaki mpenza litatoli mpo na ye moko+ na ndenge asalaki malamu: apesaki bino bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma.+ Atondisaki bino na biloko ya kolya mpe atondisaki mitema na bino na nsai.”+ 18 Kasi atako balobaki makambo yango, ezalaki pɛtɛɛ te kopekisa ebele wana ya bato bápesa bango bambeka.

19 Kasi Bayuda oyo bautaki na Antiokia mpe na Ikoniumu bayaki, bandimisaki ebele wana ya bato,+ mpe babambaki Paulo mabanga mpe babendaki ye libándá ya engumba, bakanisi ete akufi.+ 20 Nzokande, ntango bayekoli bazingaki ye, atɛlɛmaki mpe akɔtaki na engumba. Na mokolo oyo elandaki, alongwaki elongo na Barnabasi mpo na kokende na Derbe.+ 21 Nsima ya kosakola nsango malamu na engumba yango mpe ya kokómisa bato mingi bayekoli, bazongaki na Listra, na Ikoniumu mpe na Antiokia. 22 Kuna bapesaki bayekoli* makasi,+ bazalaki kolendisa bango ete bátikala na kati ya kondima, na maloba oyo: “Tosengeli kokɔta na Bokonzi ya Nzambe na nzela ya malɔzi mingi.”+ 23 Lisusu, batyelaki bango bankulutu na lisangá mokomoko,+ babondelaki mpe bakilaki bilei,+ mpe bapesaki bango na mabɔkɔ ya Yehova* oyo bango bandimelaki.

24 Na nsima, bakatisaki Pisidia mpe bakómaki na Pamfilia,+ 25 mpe nsima ya kosakola na Perga, bakitaki na Atalia. 26 Balongwaki kuna, bazwi masuwa bakei na Antiokia, epai batyamaki na mabɔkɔ ya boboto monene ya Nzambe mpo na mosala oyo bautaki kosilisa.+

27 Ntango bakómaki mpe bayanganisaki lisangá, bayebisaki ebele ya makambo oyo Nzambe asalaki na nzela na bango, mpe ndenge afungolelaki bikólo porte ya kondima.+ 28 Bongo balekisaki ntango mingi elongo na bayekoli.

15 Sikoyo mibali mosusu bautaki na Yudea mpe babandaki koteya bandeko: “Soki bokatami ngenga te na kolanda momeseno ya Moize,+ bokoki kobikisama te.” 2 Kasi ntango bokabwani mpe ntembe moko makasi ebimaki kati na bango ná Paulo mpe Barnabasi, ebongiseli ezwamaki ete Paulo ná Barnabasi mpe bamosusu na kati na bango bámata epai ya bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme+ mpo na likambo yango.*

3 Na yango, lisangá ekendaki kotika bango na nzela, mpe bato yango bakobaki mobembo na bango, bakatisaki Fenisia ná Samaria, bazalaki koyebisa likambo mokomoko oyo etali kobongwana ya bato ya bikólo, mpe bazalaki kopesa bandeko nyonso esengo monene. 4 Ntango bakómaki na Yerusaleme, lisangá, bantoma mpe bankulutu bayambaki bango na boboto, mpe bayebisaki ebele ya makambo oyo Nzambe asalaki na nzela na bango. 5 Kasi, bato mosusu ya mwa lingomba ya Bafarisai oyo bakómaki bandimi, batɛlɛmaki na bakiti na bango mpe balobaki: “Esengeli kokata bango ngenga mpe kopesa bango mitindo ete bátosa mibeko ya Moize.”+

6 Na yango bantoma ná bankulutu bayanganaki mpo na kotalela likambo yango. 7 Nsima ya ntembe makasi oyo ebimaki, Petro atɛlɛmaki mpe alobaki na bango: “Mibali, bandeko, boyebi malamu ete banda mikolo ya liboso Nzambe aponaki ngai na kati na bino ete na monɔkɔ na ngai bato ya bikólo báyoka liloba ya nsango malamu mpe bándima.+ 8 Mpe Nzambe, oyo ayebaka motema,+ atatolaki na ndenge apesaki bango elimo santu,+ ndenge asalaki yango mpe epai na biso. 9 Mpe asalaki bokeseni ata moke te kati na biso mpe bango,+ kasi apɛtolaki nde mitema na bango na nzela ya kondima.+ 10 Na yango, mpo na nini bozali sikoyo komeka Nzambe na ndenge bozali kosala ete bayekoli bámema ekanganeli oyo,+ ezala ata bankɔkɔ na biso to biso moko tokokaki te komema?+ 11 Kutu, tozali nde kondima ete tokobika na nzela ya boboto monene ya Nkolo Yesu,+ ndenge moko mpe mpo na bango.”+

12 Na yango, etuluku wana ya bato bafandaki nyɛɛ, mpe babandaki koyoka Barnabasi ná Paulo ntango bazalaki koyebisa ebele ya bilembo mpe ya makamwisi* oyo Nzambe asalaki na nzela na bango na kati ya bikólo. 13 Ntango basilisaki koloba, Yakobo alobaki: “Mibali, bandeko, bóyoka ngai. 14 Simeone+ ayebisi malamumalamu ndenge Nzambe atyaki likebi na ye mpo na mbala ya liboso epai ya bikólo mpo na kobimisa uta na yango ekólo moko mpo na nkombo na ye.+ 15 Mpe yango ezali na boyokani na maloba ya Basakoli, kaka ndenge ekomamá ete: 16 ‘Nsima ya makambo yango, nakozonga mpe nakotonga lisusu hema* ya Davidi oyo ekweá; nakotɛlɛmisa lisusu bisika na yango oyo ebebá mpe nakobongisa yango lisusu, 17 mpo baoyo batikali báluka mpenza Yehova,* elongo na bato ya bikólo nyonso, bato oyo babengami na nkombo na ngai, Yehova* alobi bongo, ye oyo akosala makambo yango,+ 18 oyo eyebaná banda kala.’+ 19 Yango wana ekateli* na ngai ezali te ya kotya na mobulu bato ya bikólo oyo bazali kobaluka epai ya Nzambe,+ 20 kasi ya kokomela bango ete báboya biloko oyo ekómisami mbindo na bikeko,+ pite,*+ banyama oyo ekamolamá* mpe makila.+ 21 Mpo banda na ntango ya kala, Moize azali na bato oyo basakolaka maloba na ye* na engumba nyonso, mpo na sabata nyonso mikanda na ye etángamaka* na mongongo makasi na basinagoga mpo bato báyoka.”+

22 Bongo bantoma mpe bankulutu elongo na lisangá mobimba bazwaki ekateli bátinda mibali oyo baponami na kati na bango bákende na Antiokia elongo na Paulo mpe Barnabasi. Batindaki Yudasi oyo bazalaki kobenga Barsabasi ná Silasi,+ bato oyo bazalaki na mikumba minene na kati ya bandeko. 23 Mokanda oyo batindaki na nzela na bango yango oyo:

“Biso, bantoma mpe bankulutu, bandeko na bino, tozali kokomela bino, bandeko na biso oyo bozali Bayuda te oyo bofandi na Antiokia,+ na Siri mpe na Silisia: bóyamba mbote na biso! 24 Lokola toyoki ete bamosusu oyo bautaki epai na biso batye bino na mobulu na makambo oyo balobaki,+ balukaki kobulunganisa bino,* atako topesaki bango malako te, 25 biso nyonso toyokani mpe tozwi ekateli ya kopona mibali mpo na kotindela bino bango elongo na bandeko na biso ya bolingo, Barnabasi ná Paulo, 26 bato oyo bakabi bomoi na bango* mpo na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Kristo.+ 27 Na yango tozali kotinda Yudasi mpe Silasi, mpo bango mpe báyebisa makambo yango na monɔkɔ.+ 28 Mpo elimo santu+ mpe biso moko tomoni malamu kobakisela bino kilo mosusu te, longola kaka makambo oyo ya ntina: 29 bókoba koboya biloko oyo epesami mbeka na bikeko,+ makila,+ banyama oyo ekamolamá*+ mpe pite.*+ Soki bomibateli malamumalamu na makambo wana, bokozala malamu. Bótikala malamu!”

30 Na yango, bato yango bakendaki, mpe bakitaki na Antiokia. Bayanganisaki etuluku yango ya bato mpe bapesaki bango mokanda yango. 31 Nsima ya kotánga yango, basepelaki na elendiseli yango. 32 Lokola Yudasi ná Silasi bazalaki mpe basakoli, balendisaki bandeko yango na badiskur mingi mpe bapesaki bango makasi.+ 33 Nsima ya kolekisa mwa ntango kuna, bandeko batikaki bango bázonga na kimya epai ya baoyo batindaki bango. 34*⁠—— 35 Kasi, Paulo ná Barnabasi batikalaki na Antiokia. Elongo na bato mosusu mingi, bazalaki koteya mpe kosakola nsango malamu ya liloba ya Yehova.*

36 Nsima ya mwa mikolo Paulo alobaki na Barnabasi: “Sikoyo* tózonga kotala bandeko na engumba mokomoko epai tosakolaki liloba ya Yehova* mpo na komona soki bazali ndenge nini.”+ 37 Barnabasi azalaki na mokano ya komema Yoane, oyo bazalaki kobenga Marko.+ 38 Kasi Paulo asepelaki te komema ye elongo na bango, mpo atikaki bango na Pamfilia mpe akendaki te elongo na bango na mosala.+ 39 Na yango, baswanaki makasi, mpe bakabwanaki, moto na moto akendaki na nzela na ye. Barnabasi+ amemaki Marko mpe azwaki masuwa akei na Shipre. 40 Paulo aponaki Silasi, mpe bandeko babondelaki ete Yehova* amonisela ye boboto monene na ye, na nsima akendaki.+ 41 Akatisaki Siri mpe Silisia, azalaki kolendisa masangá.

16 Bongo akómaki na Derbe mpe lisusu na Listra.+ Moyekoli moko azalaki kuna nkombo na ye Timote,+ mwana ya mwasi moko Moyuda oyo azalaki mondimi kasi tata na ye Mogrɛki. 2 Bandeko na Listra mpe na Ikoniumu bazalaki koloba malamu mpo na ye. 3 Paulo asepelaki ete Timote akende elongo na ye. Azwaki ye mpe akataki ye ngenga mpo na Bayuda oyo bazalaki na etúká wana,+ mpo bango nyonso bayebaki ete tata na ye azalaki Mogrɛki. 4 Wana bazalaki koleka na bingumba, bazalaki kopesa baoyo bazalaki kuna mitindo oyo bantoma ná bankulutu oyo bazalaki na Yerusaleme bazwaki mpo bátosa yango.+ 5 Yango wana, masangá ekobaki mpenza kokóma makasi na kondima mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.

6 Bakatisaki Frigia mpe mokili ya Galatia,+ mpo elimo santu epekisaki bango báloba liloba na etúká ya Azia. 7 Mpe ntango bakómaki na Misia balukaki kokɔta na Bitinia,+ kasi elimo ya Yesu epesaki bango nzela te. 8 Bongo balekaki pene na* Misia mpe bakitaki na Troase. 9 Mpe na butu, Paulo amonaki emonaneli moko: moto moko ya Masedonia atɛlɛmaki mpe azalaki kobondela ye mpe koloba: “Leká na Masedonia kosalisa biso.” 10 Ntango kaka amonaki emonaneli wana, tolukaki nzela ya kokende na Masedonia, toyaki komona mpenza ete Nzambe abengi biso mpo na kosakwela bango nsango malamu.

11 Na yango, uta na Troase tozwaki nzela ya mbu, mpe totamboli alima tii tokómi na Samotrase, kasi na mokolo oyo elandaki, tokómaki na Neapolisi. 12 Tolongwaki kuna, mpe tokendaki na Filipi,+ engumba ya Baroma,* oyo eleki ntina na etúká ya Masedonia. Totikalaki na engumba yango mpo na mwa mikolo. 13 Na mokolo ya sabata, tobimaki na libándá ya porte ya engumba pembeni ya ebale, esika oyo tokanisaki ete ezali esika ya mabondeli. Tofandaki mpe tobandaki koloba na basi oyo bayanganaki. 14 Mwasi moko nkombo na ye Lidia, motɛki bilamba ya motane-bulé, moto ya engumba Tyatire+ mpe mosambeli ya Nzambe, azalaki koyoka. Mpe Yehova* afungolaki motema na ye mpo atya likebi na makambo oyo Paulo azalaki koloba. 15 Ntango ye ná bato ya ndako na ye babatisamaki,+ abondelaki biso: “Soki bomoni mpenza ete nazali sembo na miso ya Yehova,* bóya kofanda na ndako na ngai.” Mpe atyaki biso mbamba tii tondimaki.

16 Mokolo moko ntango tozalaki kokende na esika ya mabondeli, mwana mwasi moko ya mosala oyo azalaki na elimo moko, demo moko ya kosakola makambo oyo ebombaná,+ akutanaki na biso. Azalaki kokɔtisela bankolo na ye mosolo mingi na mosala ya kosakola makambo oyo ekoya. 17 Mwana mwasi yango akobaki kolanda biso ná Paulo mpe koganga: “Bato oyo bazali baombo ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló,+ mpe bazali kosakwela bino nzela ya lobiko.” 18 Akobaki kosala bongo mikolo mingi. Nsukansuka likambo yango elɛmbisaki Paulo, abalukaki mpe alobaki na elimo yango ete: “Napesi yo mitindo na nkombo ya Yesu Kristo ete obima na nzoto na ye.” Mpe elimo yango ebimaki kaka na ngonga wana.+

19 Ɛɛ, ntango bankolo na ye bamonaki ete elikya na bango ya kozwa mosolo ekei,+ bakangaki Paulo ná Silasi mpe babendaki bango na zando epai ya bakonzi.+ 20 Bakendaki na bango epai ya bakambi-mboka, balobi: “Bato oyo bazali kokɔtisa mobulu makasi na engumba na biso.+ Bazali Bayuda, 21 mpe bazali kosakola mimeseno oyo epekisami tóndima to tósalela yango, mpo tozali Baroma.” 22 Ebele wana ya bato batombokelaki bango, mpe bakambi-mboka, nsima ya kopasola bango bilamba, bapesaki mitindo ete bábɛta bango mangenda.+ 23 Nsima ya kobɛta bango mangenda mingi, babwakaki bango na bolɔkɔ mpe bapesaki mokɛngɛli ya bolɔkɔ mitindo ete akɛngɛla bango malamumalamu.+ 24 Lokola azwaki mitindo wana, abwakaki bango na bolɔkɔ ya kati mpenza mpe akangaki makolo na bango makasi na bikanga-makolo.

25 Kasi pene na katikati ya butu, Paulo ná Silasi bazalaki kobondela mpe kosanzola Nzambe na nzembo,+ mpe bato ya bolɔkɔ bazalaki koyoka bango. 26 Na mbala moko koningana monene ya mabele esalemaki, mpe miboko ya bolɔkɔ eninganaki. Lisusu, baporte nyonso efungwamaki na ntango wana kaka, mpe minyɔlɔlɔ ya bato nyonso efungwamaki.+ 27 Ntango mokɛngɛli ya bolɔkɔ alamukaki mpe amonaki ete baporte ya bolɔkɔ efungwami, abendaki mopanga na ye mpe alingaki amiboma, mpo akanisaki ete bato ya bolɔkɔ bakimi.+ 28 Kasi Paulo abelelaki na mongongo makasi: “Komisala mabe te, mpo biso nyonso tozali awa!” 29 Bongo asɛngaki miinda mpe akɔtaki noki na kati; lokola azalaki kolɛnga, afukamaki liboso ya Paulo ná Silasi. 30 Abimisaki bango libándá mpe alobaki ete: “Batata, nasala nini mpo nabika?” 31 Balobaki na ye: “Ndimelá Nkolo Yesu mpe okobika, yo ná bato ya ndako na yo.”+ 32 Bongo basakwelaki ye ná bato nyonso ya ndako na ye liloba ya Yehova.* 33 Na butu wana kaka amemaki bango mpe asukolaki bampota na bango. Ye ná bato ya ndako na ye babatisamaki kozanga koumela.+ 34 Akɔtisaki bango na ndako na ye, atandaki mesa liboso na bango mpe asepelaki mingi, ye ná bato ya ndako na ye mpo sikoyo andimeli Nzambe.

35 Ntango ntɔngɔ etanaki, bakambi-mboka batindaki bapolisi bákende koloba: “Bimisá bato wana.” 36 Mokɛngɛli ya bolɔkɔ ayebisaki Paulo maloba na bango ete: “Bakambi-mboka batindi bato mpo bino mibale bóbima. Sikoyo bóbima mpe bókende na kimya.” 37 Kasi Paulo alobaki na bango: “Babɛti biso fimbo na miso ya bato nyonso kozanga ete tókweisama na likambo,* biso Baroma,+ mpe babwaki biso na bolɔkɔ. Sikoyo bazali kobimisa biso na kobombana? Te, ekosalema bongo te! Bango moko báya kobimisa biso.” 38 Bapolisi bayebisaki bakambi-mboka maloba yango. Babangaki makasi ntango bayokaki ete bato yango bazali Baroma.+ 39 Na yango, bayaki mpe babondelaki bango, mpe nsima ya kobimisa bango, basɛngaki ete bálongwa na engumba wana. 40 Kasi babimaki na bolɔkɔ mpe bakendaki na ndako ya Lidia; mpe ntango bamonaki bandeko, balendisaki bango+ mpe bakendaki.

17 Balekaki sikoyo na Amifipolisi mpe na Apolonia mpe bakómaki na Tesaloniki,+ epai sinagoga moko ya Bayuda ezalaki. 2 Bongo Paulo akɔtaki kuna, epai na bango, ndenge amesanaki kosala,+ mpe na boumeli ya sabata misato azalaki kosalela Makomami mpo na kosolola na bango,+ 3 azalaki kolimbola mpe kopesa bilembeteli na makomi ete esengelaki Kristo anyokwama+ mpe asekwa uta na bakufi,+ mpe azalaki koloba ete: “Ye azali Kristo, Yesu oyo ngai nazali kosakwela bino.” 4 Na yango, bamosusu na kati na bango bakómaki bandimi mpe basanganaki elongo na Paulo ná Silasi,+ mpe ebele mpenza ya Bagrɛki oyo bazalaki kosambela Nzambe mpe basi mingi ya lokumu basalaki mpe bongo.

5 Kasi Bayuda, lokola bayokaki zuwa,+ bazwaki elongo na bango bato ya mabe na kati ya bawayawaya ya zando, basalaki etuluku moko mpe babandaki kokɔtisa engumba na yikiyiki. Bakɔtaki na makasi na ndako ya Yasona, balukaki Paulo ná Silasi mpo na komema bango liboso ya etuluku yango. 6 Lokola bamonaki bango te, babendaki Yasona ná bandeko mosusu epai ya bakonzi ya engumba mpe bagangaki ete: “Bato oyo batye mobulu esika nyonso,* bakómi mpe awa,+ 7 mpe Yasona ayambi bango epai na ye. Bato yango nyonso bazali kosala makambo na kotɛmɛla mibeko ya Kaisala, balobi ete mokonzi mosusu azali, Yesu.”+ 8 Ntango ebele wana ya bato mpe bakonzi ya engumba bayokaki makambo yango, batungisamaki; 9 mpe kaka nsima ya kozwa ndanga oyo ekoki epai ya Yasona mpe bamosusu nde batikaki bango bákende.

10 Nokinoki na butu, bandeko batindaki Paulo ná Silasi na Beroya. Ntango bakómaki kuna, bakɔtaki na sinagoga ya Bayuda. 11 Bayuda ya Beroya bazalaki na makanisi ya malamu koleka baoyo ya Tesaloniki, mpo bayambaki liloba na mposa makasi mpenza, bazalaki kotalela Makomami malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango ezali bongo. 12 Na yango, mingi na bango bakómaki bandimi, ndenge moko mpe basi Bagrɛki mingi ya lokumu ná mibali mosusu. 13 Kasi ntango Bayuda ya Tesaloniki bayokaki ete Paulo asakoli mpe liloba ya Nzambe na Beroya, bayaki mpo na kopusa mpe kotombokisa ebele ya bato.+ 14 Bongo na mbala moko bandeko batindaki Paulo akende na nzela ya mbu,+ kasi Silasi ná Timote batikalaki kuna. 15 Nzokande, baoyo bakendaki kotika Paulo bamemaki ye tii na Atene, mpe bazongaki nsima ya kozwa malako ya koyebisa Silasi ná Timote+ ete báya nokinoki epai ya Paulo.

16 Nzokande ntango Paulo azalaki kozela bango na Atene, ayokaki nkanda ndenge amonaki ete engumba yango etondi na bikeko. 17 Na yango, na sinagoga, abandaki kokanisa elongo na Bayuda mpe na bato mosusu oyo bazalaki kosambela Nzambe, mpe mokolo na mokolo na zando, elongo na baoyo bazalaki wana. 18 Kasi bato mosusu ya filozofi, Baepikire ná Basetoa, babandaki kotyana ntembe na ye, mpe bamosusu bazalaki koloba ete: “Moto ya bilobaloba oyo alingi koloba nini?” Bamosusu: “Emonani lokola ete azali mosakoli ya banzambe ya bapaya.” Balobaki bongo mpo azalaki kosakola nsango malamu ya Yesu mpe lisekwa.+ 19 Bongo basimbaki ye mpe bamemaki ye na Areopaje, balobi ete: “Tokoki koyeba soki liteya ya sika oyo ozali kolobela ezali nini? 20 Mpo ozali koloba makambo mosusu oyo toyoká naino te na matoi na biso. Na yango, tolingi tóyeba soki makambo yango elingi koloba nini.” 21 Ya solo, bato nyonso ya Atene mpe bapaya oyo bazalaki kofanda* kuna bazalaki kolekisa ntango na bango ya kozwa mopɛpɛ na eloko mosusu te kaka na koloba to na koyoka mwa likambo moko ya sika. 22 Bongo Paulo atɛlɛmaki na katikati ya Areopaje+ mpe alobaki ete:

“Mibali ya Atene, namoni ete na makambo nyonso bomonani ete bomipesá na kobanga banzambe* koleka bato mosusu.+ 23 Na ndakisa, ntango nazalaki koleka mpe kotala na likebi mpenza biloko na bino ya losambo, namonaki kutu etumbelo moko oyo likoló na yango ekomamá ete: ‘Epai ya Nzambe oyo ayebani te.’ Na yango, ye oyo bino bozali kosambela kozanga koyeba, ye nde nazali kosakwela bino. 24 Nzambe oyo asalá mokili mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango, Ye azali Nkolo ya likoló mpe ya mabele,+ afandaka te na batempelo oyo esalemi na mabɔkɔ,+ 25 azali na mposa ya mabɔkɔ ya bato te ete esalela ye mpo azangi eloko te,+ mpamba te ye moko nde apesaka bato nyonso mpema,+ bomoi mpe biloko nyonso. 26 Mpe na nzela ya moto moko+ abimisi bikólo nyonso ya bato, mpo báfanda na etando mobimba ya mabele.+ Atyaki mpe bantango oyo etyamá mpe bandelo oyo etyamá na esika oyo bato bakofanda,+ 27 mpo báluka Nzambe, soki esengeli báluka ye na komekameka epai na epai mpe bázwa ye mpenza,+ atako, ya solo, azali mosika te na mokomoko na biso. 28 Mpo na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali, ndenge bamosusu kati na bapowɛti na bino balobá: ‘Mpo tozali mpe bana* na ye.’

29 “Na yango, lokola tozali bana* ya Nzambe,+ tosengeli kokanisa te ete Nzambe azali lokola wolo to palata to libanga, to eloko moko oyo esalemi* na mayele mpe na makanisi ya bato.+ 30 Ya solo, Nzambe akangaki miso mpo na bantango wana ya kozanga boyebi,+ nzokande sikoyo azali koyebisa bato nyonso na bisika nyonso ete basengeli kobongola motema. 31 Mpo atye mokolo moko oyo akosambisa+ na bosembo mabele oyo bato bafandi na nzela ya moto moko oyo ye aponi, mpe apesi bato nyonso ndanga ndenge asekwisi ye uta na bakufi.”+

32 Ntango bayokaki likambo ya lisekwa ya bakufi, bamosusu babandaki kotyola,+ wana bamosusu balobaki ete: “Tokoyoka yo na likambo wana mbala ya nsima.” 33 Na yango, Paulo atikaki bango, 34 kasi bato mosusu basanganaki elongo na ye mpe bakómaki bandimi. Na kati na bango ezalaki Dionisiusi, oyo azalaki mosambisi moko ya tribinale ya Areopaje, ná mwasi moko nkombo na ye Damarise, mpe bato mosusu.

18 Nsima na yango, alongwaki na Atene mpe akendaki na Korinti. 2 Akutaki Moyuda moko nkombo na ye Akila,+ mwana-mboka ya Ponti oyo autaki na Itali kala mingi te, ná mwasi na ye Prisile, mpo Klode apesaki mitindo ete Bayuda nyonso bálongwa na Roma. Bongo Paulo akendaki epai na bango 3 mpe lokola bazalaki kosala mosala moko, afandaki na ndako na bango, mpe azalaki kosala elongo na bango,+ mpo mosala na bango ezalaki ya kotonga bahema. 4 Sabata nyonso,+ Paulo azalaki kosala diskur* na sinagoga+ mpe azalaki kondimisa Bayuda ná Bagrɛki.

5 Ntango Silasi+ ná Timote+ bautaki na Masedonia bakiti, Paulo abandaki komipesa mingi na mosala oyo etali liloba, azalaki kopesa Bayuda litatoli mpo na komonisa ete Yesu azali Kristo.+ 6 Kasi lokola bakobaki kotɛmɛla ye mpe kolobela ye mabe, apupolaki bilamba na ye+ mpe alobaki na bango: “Makila na bino ezala na mitó na bino moko.+ Ngai nazali pɛto.+ Banda sikoyo nakokende epai ya bato ya bikólo.”+ 7 Na yango, alongwaki kuna* mpe akendaki kokɔta na ndako ya moto moko nkombo na ye Titiusi Yusutusi, mosambeli moko ya Nzambe, oyo ndako na ye ekangamá na sinagoga. 8 Kasi Krispusi+ mokambi ya sinagoga andimelaki Nkolo, ezala mpe bato nyonso ya ndako na ye. Mpe Bakorinti mingi oyo bayokaki, bakómaki bandimi mpe bazwaki batisimo. 9 Lisusu, na butu Nkolo alobaki na Paulo na emonaneli: “Kobanga te, kasi kobá koloba; kokanga monɔkɔ te, 10 mpo nazali elongo na yo+ mpe moto moko te akoyela yo mpo na kosala yo mabe; mpo nazali na bato ebele na engumba oyo.” 11 Bongo afandaki kuna mbula moko na sanza motoba, azalaki koteya liloba ya Nzambe na kati na bango.

12 Wana Galio azalaki prokonsule* ya Akaya, Bayuda bayokanaki mpo na kosala Paulo mabe, mpe bamemaki ye na esika ya kosambisa, 13 balobi: “Moto oyo azali kondimisa bato básambela Nzambe na ndenge oyo eyokani na mibeko te.” 14 Kasi, ntango Paulo alingaki koloba, Galio alobaki na Bayuda: “Ya solo, soki ezalaki na mbeba moko to na likambo moko ya mabe mpenza, Ee Bayuda, elingaki kozala malamu mpo na ngai koyoka bino ntango molai. 15 Kasi lokola ezali nde ntembe mpo na maloba, bankombo mpe mibeko na bino moko,+ bino moko bosengeli kotala yango. Nalingi te kozala mosambisi ya makambo wana.” 16 Na yango, abenganaki bango liboso ya esika ya kosambisa. 17 Bongo bango nyonso bakangaki Sostene+ mokambi ya sinagoga mpe babandaki kobɛta ye liboso ya esika ya kosambisa. Kasi Galio akɔtaki ata moke te na makambo yango nyonso.

18 Nzokande, nsima ya kofanda mwa mikolo mingi lisusu, Paulo ayebisaki bandeko ete asengeli kokende. Azwaki masuwa mpo na kokende na Siri, azalaki elongo na Prisile mpe Akila. Akatisaki nsuki na Kenkrea,+ mpo asalaki elako. 19 Bakómaki na Efese, mpe atikaki bango kuna; akɔtaki na sinagoga mpe azalaki kokanisa na Bayuda.+ 20 Atako bazalaki kosɛnga ye ete aumela lisusu mwa ntango molai, andimaki te 21 mpe ayebisaki bango ete asengeli kokende, alobaki: “Nakozongela bino lisusu, soki Yehova* alingi.” Mpe alongwaki na Efese na nzela ya mbu 22 mpe akitaki na Kaisaria. Amataki* kopesa lisangá mbote, mpe na nsima akitaki na Antiokia.+

23 Nsima ya kolekisa mwa ntango kuna, alongwaki mpe alekaki na esika moko tii na esika mosusu na mokili wana ya Galatia mpe na Frigia,+ azalaki kolendisa bayekoli nyonso.+

24 Moyuda moko nkombo na ye Apolosi,+ mwana-mboka ya Alezandria, akómaki na Efese; azalaki molobi moko malamu, mpe ayebaki Makomami malamu mpenza. 25 Moto yango ateyamaki na mateya ya* Yehova,* mpe lokola azalaki kopela na elimo, azalaki koloba mpe koteya na ndenge ya sikisiki mpenza makambo oyo etali Yesu, kasi ayebaki kaka batisimo ya Yoane. 26 Abandaki koteya na mpiko nyonso na sinagoga. Ntango Prisile ná Akila+ bayokaki ye, bazwaki ye elongo na bango mpe balimbolelaki ye malamumalamu mateya* ya Nzambe. 27 Lisusu, lokola azalaki na mposa ya kokatisa na Akaya, bandeko bakomelaki bayekoli mokanda mpo na kolendisa bango ete báyamba ye na boboto. Bongo ntango akómaki kuna, asalisaki mpenza baoyo bakómaki bandimi na nzela ya boboto monene ya Nzambe; 28 mpo na esengo mpe na molende mpenza azalaki komonisa polele ete mateya ya Bayuda ezalaki ya lokuta, wana azalaki komonisa na nzela ya Makomami ete Yesu azali Kristo.+

19 Na nsima, wana Apolosi+ azalaki na Korinti, Paulo akatisaki na nzela oyo eleki na kati ya mokili mpe akitaki na Efese,+ kuna amonaki bayekoli mosusu; 2 mpe atunaki bango: “Bozwaki elimo santu ntango bokómaki bandimi?”+ Bayanolaki ye: “Kutu, naino toyoká te ete elimo santu ezalaka.” 3 Alobaki: “Bozwaki batisimo ya ndenge nini?” Bayanolaki: “Batisimo ya Yoane.”+ 4 Paulo alobaki: “Yoane apesaki batisimo oyo ezali elembo ya kobongola motema,+ azalaki koyebisa bato ete bándimela moto oyo azalaki koya nsima na ye,+ elingi koloba kondimela Yesu.” 5 Ntango bayokaki bongo, babatisamaki na nkombo ya Nkolo Yesu. 6 Mpe ntango Paulo atyelaki bango mabɔkɔ, elimo santu ekitelaki bango,+ mpe babandaki koloba na minɔkɔ ya bapaya mpe kosakola.+ 7 Bango nyonso bazalaki mibali soki 12.

8 Ntango akɔtaki na sinagoga,+ alobaki na mpiko na boumeli ya sanza misato, azalaki kosala badiskur mpe kosalela mayele ya kondimisa na oyo etali Bokonzi ya Nzambe.+ 9 Kasi lokola bamosusu na motó makasi nyonso bazalaki koboya kondima,* mpe bazalaki koloba mabe mpo na Nzela+ liboso ya ebele wana ya bato, alongwaki epai na bango+ mpe azwaki bayekoli elongo na ye, azalaki kosala badiskur mokolo na mokolo na ndako ya eteyelo ya Tiranusi. 10 Asalaki bongo mbula mibale, mpe baoyo nyonso bazalaki kofanda na etúká ya Azia bayokaki liloba ya Nkolo, Bayuda ná Bagrɛki.

11 Mpe Nzambe akobaki kosala misala minene ya nguya na mabɔkɔ ya Paulo.+ 12 Bazalaki komemela baoyo bazalaki kobɛla ata biteni ya bilamba mpe bilamba ya mosala oyo etutaki nzoto na ye,+ na yango maladi na bango ezalaki kosila, mpe bilimo mabe bazalaki kobima.+ 13 Kasi Bayuda mosusu oyo bazalaki kotambolatambola mpo na kobimisa bademo, bamekaki mpe kosalela nkombo ya Nkolo Yesu epai ya baoyo bazalaki na bilimo mabe, bazalaki koloba: “Nazali kopesa bino mitindo na nkombo ya Yesu oyo Paulo azali kosakola ete bóbima.”+ 14 Na kati ya baoyo bazalaki kosala bongo, ezalaki mpe na bana mibali nsambo ya Moyuda moko, oyo azalaki nganga-nzambe mokonzi, nkombo na ye Sekeva. 15 Kasi elimo mabe azongiselaki bango: “Nayebi Yesu+ mpe nayebi soki Paulo+ azali nani; kasi bino banani?” 16 Na yango, moto oyo azalaki na elimo wana ya mabe apumbwelaki bango, alekaki mokomoko na bango na makasi, mpe alongaki bango. Bongo bakimaki na ndako bolumbu mpe bazokizoki bampota. 17 Likambo yango eyebanaki epai ya bato nyonso, ezala Bayuda mpe Bagrɛki oyo bazalaki kofanda na Efese; bango nyonso bakómaki kobanga, mpe nkombo ya Nkolo Yesu ekobaki kokumisama. 18 Mpe mingi na kati ya baoyo bakómaki bandimi bazalaki koya koyambola mpe koyebisa misala na bango polelepolele. 19 Kutu, ebele ya baoyo bazalaki kosala misala ya maji basangisaki babuku na bango esika moko mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso.+ Batángaki ntalo na yango nyonso mpe bamonaki ete ekokanaki na motuya ya mbongo ya bibende ya palata 50 000. 20 Na yango, na ndenge moko ya nguya, liloba ya Yehova* ekobaki kopalangana mpe kolonga.+

21 Nsima ya makambo wana, Paulo azwaki ekateli ete nsima ya kokatisa Masedonia+ mpe Akaya, akokende na Yerusaleme.+ Alobaki: “Nsima ya kokende kuna, nakokende mpe na Roma.”+ 22 Bongo na kati ya basungi na ye atindaki mibale na Masedonia, Timote+ ná Eraste,+ kasi ye moko atikalaki mwa moke na etúká ya Azia.

23 Na ntango wana mpenza, mobulu monene+ ebimaki mpo na Nzela.+ 24 Mpo moto moko nkombo na ye Demetriusi, mosali ya biloko ya palata, oyo azalaki kosala bandako mike ya losambo ya Artemisi, azalaki kokɔtisela bato ya misala ya mabɔkɔ mosolo mingi.+ 25 Ayanganisaki bango mpe baoyo bazalaki kosala biloko ya ndenge wana mpe alobaki: “Mibali, boyebi malamu ete bomɛngo na biso ezali kouta na mosala oyo. 26 Nzokande, bozali komona mpe koyoka ndenge Paulo wana, na Efese kaka te+ kasi pene na etúká mobimba ya Azia, andimisi ebele mpenza ya bato mpe atindi bango bándima likanisi mosusu, alobi: banzambe oyo basalemi na mabɔkɔ bazali mpenza banzambe te.+ 27 Lisusu, nazali kobanga ete bato bábanda koloba makambo ya mabe mpo na mosala na biso. Nzambe-mwasi monene Artemisi azali monene, kasi emonani ete bato bakopesa lisusu tempelo na ye lokumu te mpe moto nyonso na Azia mpe na mokili asambelaka Artemisi, kasi mpo na maloba ya Paulo bakosanzola ye lisusu te.” 28 Ntango bayokaki bongo, mibali yango bayokaki nkanda makasi mpe babandaki koganga: “Artemisi ya Baefese azali Monene!”

29 Bongo engumba etondaki na yikiyiki, mpe bango nyonso bakendaki noki na esika ya masano, bamemaki na makasi elongo na bango Gayusi mpe Aristarke,+ baoyo bazalaki Bamasedonia mpe baninga ya Paulo ya mobembo. 30 Paulo alingaki kokɔta na kati epai bato bazalaki, kasi bayekoli bapesaki ye nzela te. 31 Ata mpe bakambi mosusu ya bafɛti mpe ya masano, oyo bazalaki kosepela na ye, batindelaki ye bato mpe babandaki kobondela ye ete atya bomoi na ye na likama te na esika ya masano. 32 Ya solo, bamosusu bazalaki koganga likambo mosusu mpe bamosusu likambo mosusu; mpo liyangani ezalaki na yikiyiki, mpe mingi kati na bango bayebaki te ntina oyo bayanganaki. 33 Bongo babimisaki Alezandre na kati ya ebele yango ya bato, oyo Bayuda bapusaki liboso, mpe Alezandre asalaki elembo na lobɔkɔ na ye mpe alingaki kosamba liboso ya bato yango. 34 Kasi ntango bayaki koyeba ete azali Moyuda, bango nyonso bagangaki na bomoko pene ya ngonga mibale: “Artemisi ya Baefese azali Monene!”

35 Na nsuka, ntango mokomi-makambo ya engumba afandisaki ebele yango ya bato nyɛɛ, alobaki: “Mibali ya Efese, nani mpenza na kati ya bato ayebi te ete engumba ya Baefese ezali mokɛngɛli ya tempelo ya Artemisi monene mpe ya ekeko oyo ekweaki longwa na likoló? 36 Lokola makambo yango ekoki kotyelama ntembe te, bókitisa motema mpe bósala makambo mbangumbangu te. 37 Mpo bato oyo bomemi awa bazali miyibi na batempelo te mpe bafingi te nzambe-mwasi na biso. 38 Na yango soki Demetriusi+ ná bato ya misala ya mabɔkɔ oyo bazali elongo na ye bazali na likambo na moto moko boye, mikolo ya kosambisa ezali mpe baprokonsule* bazali; báya kofundana. 39 Kasi soki bozali koluka nde eloko mosusu koleka oyo wana, yango esengeli kokatama na liyangani ndenge esalemaka. 40 Tozali mpenza na likama ya kofundama ete tozali batomboki na likambo oyo ya lelo, mpo tozali na eloko moko te oyo ekoki kopesa biso nzela ya komonisa ntina ya etuluku oyo ya mobulu.” 41 Mpe ntango asilisaki koloba makambo wana, asɛngaki liyangani epanzana.

20 Ntango yikiyiki ekitaki, Paulo abengaki bayekoli; mpe nsima ya kolendisa bango mpe kopesa bango mbote ya bokabwani, akendaki na Masedonia. 2 Nsima ya kokatisa etúká wana mpe kolendisa baoyo bazalaki kuna na maloba ebele, ayaki na Grɛsi. 3 Alekisaki sanza misato kuna, kasi lokola Bayuda basalelaki ye likita+ ntango azalaki pene ya kokende na masuwa na Siri, azwaki ekateli ya kozonga na Masedonia. 4 Baoyo bazalaki kotambola elongo na ye ezalaki Sopatere mwana ya Pirusi ya Beroya, Aristarke+ ná Sekundusi bato ya Tesaloniki, Gayusi ya Derbe, Timote,+ mpe Tishike+ ná Trofime+ bato ya etúká ya Azia. 5 Mibali yango bakendaki liboso mpe bazelaki biso na Troase; 6 kasi biso tolongwaki na Filipi, tozwaki nzela ya mbu nsima ya fɛti ya mampa ezangá levire,+ mpe toyaki epai na bango na Troase mikolo soki mitano na nsima, mpe kuna tolekisaki mikolo nsambo.

7 Na mokolo ya liboso ya pɔsɔ, ntango toyanganaki mpo na kolya, Paulo abandaki kosalela baoyo bazalaki wana diskur, mpo alingaki kokende na mokolo oyo elandaki; mpe abendaki diskur na ye molai tii na katikati ya butu. 8 Miinda ebele ezalaki na shambrɛ ya likoló epai toyanganaki. 9 Elenge mobali moko nkombo na ye Etishe afandaki na fɛnɛtrɛ mpe mpɔngi moko makasi ezwaki ye wana Paulo azalaki kokoba koloba. Akweaki banda na etajɛ ya misato mpe balɔkɔtaki ye ebembe. 10 Paulo akitaki na nse, amibwakaki likoló na ye mpe azingaki ye na mabɔkɔ+ mpe alobaki: “Bótika makɛlɛlɛ, azali na bomoi.”*+ 11 Na nsima Paulo amataki na likoló, abukaki limpa mpe alyaki. Akobaki kosolola ntango molai, tii na kotana ya ntɔngɔ, mpe na nsima akendaki. 12 Bongo bazwaki mwana yango ya mobali na bomoi mpe babɔndisamaki mingi mpenza.

13 Tomataki na masuwa mpe tokendaki na engumba Asose, kasi Paulo akendaki na makolo. Ezalaki na engumba yango nde tosengelaki kozwa Paulo na masuwa ndenge asɛngaki biso. 14 Na yango ntango akutaki biso na Asose, tozwaki ye na masuwa mpe tokendaki na Mitilene. 15 Ntango tolongwaki kuna na mokolo oyo elandaki, tokómaki pene na Kiosi. Lobi na yango totɛlɛmaki na Samosi mpe na mokolo ya nsima tokómaki na Milete. 16 Paulo azwaki ekateli ya koleka kozanga kotɛlɛma na Efese,+ mpo alekisa ntango mingi te na etúká ya Azia, mpamba te azalaki kosala noki akóma na Yerusaleme+ na mokolo ya fɛti ya Pantekote soki likoki ekozala.

17 Nzokande, uta na Milete atindaki bato na Efese bábenga bankulutu ya lisangá. 18 Ntango bayaki epai na ye, alobaki na bango: “Boyebi malamu ndenge namitambwisaki kati na bino, banda mokolo ya liboso oyo nanyataki etúká ya Azia,+ 19 nazalaki kosalela Nkolo lokola moombo na komikitisa nyonso,+ na mai ya miso mpe na komekama oyo ekómelaki ngai mpo na makita mabe ya Bayuda, 20 wana namipekisaki te koyebisa bino makambo nyonso oyo ezalaki na litomba* to koteya bino na bisika ya bato nyonso+ mpe ndako na ndako.+ 21 Kasi napesaki litatoli malamumalamu epai ya Bayuda mpe Bagrɛki mpo na makambo etali kobongola motema+ epai ya Nzambe mpe kondimela Nkolo na biso Yesu.+ 22 Mpe sikoyo, talá! Nazali kokende na Yerusaleme mpo na kosala oyo elimo ezali kotinda ngai nasala, atako nayebi te nini ekokómela ngai kuna. 23 Oyo nayebi ezali kaka: na engumba na engumba, elimo santu ezali kokebisa ngai mbala na mbala ete bolɔkɔ mpe malɔzi ezali kozela ngai.+ 24 Atako bongo, nazali kotalela bomoi* na ngai te ete ezali na ntina mingi; eloko ya ntina nde nasilisa mbangu oyo nazali kopota+ mpe mosala oyo nazwaki epai ya Nkolo Yesu, ya kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.

25 “Nasakoli Bokonzi ya Nzambe epai na bino nyonso, kasi sikoyo moko te kati na bino akomona ngai lisusu. 26 Na yango nazwi bino batatoli na mokolo ya lelo mpenza ete nazali pɛto na makila ya bato nyonso,+ 27 mpo namipekisaki te koyebisa bino mokano* mobimba ya Nzambe.+ 28 Bókeba mpo na bino moko+ mpe mpo na etonga mobimba, oyo elimo santu etye bino bakɛngɛli na kati na yango,+ mpo na kobatela lisangá ya Nzambe,+ oyo asombaki na makila ya Mwana na ye moko.+ 29 Nayebi ete nsima ya kokende na ngai, bambwa mabe ya zamba bakokɔta na kati na bino+ mpe bakosalela etonga makambo na boboto te, 30 mpe na kati na bino mpenza, mibali bakobima mpe bakoteya mateya ya lokuta mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.+

31 “Yango wana bólala mpɔngi te mpe bóbosana te ete mbula misato,+ butu moi, natikaki te kokebisa mokomoko na bino na mai ya miso.* 32 Mpe sikoyo nazali kotika bino na mabɔkɔ ya Nzambe mpe na liloba ya boboto monene na ye, liloba oyo ekoki kotonga bino mpe kopesa bino libula na kati ya baoyo nyonso basantisami.+ 33 Nalulaki palata ya moto te, wolo te, bilamba mpe te.+ 34 Bino moko boyebi ete mabɔkɔ oyo ekokisaki bamposa na ngai+ mpe ya baoyo bazalaki elongo na ngai. 35 Na makambo nyonso nalakisi bino na nzela ya misala na ngai+ ndenge oyo bosengeli kosalisa bato ya bolɛmbu. Mpe bosengeli kokanisa maloba oyo Nkolo Yesu alobaki: ‘Esengo ya kopesa+ eleki esengo ya kozwa.’”

36 Nsima ya koloba makambo wana, afukamaki elongo na bango nyonso mpe abondelaki. 37 Ɛɛ, bango nyonso balelaki makasi, bayambaki* Paulo mpe bapwɛpwaki ye na boboto mpenza, 38 mpo bayokaki mawa mingi mpenza ndenge alobaki ete bakomona ye lisusu te.+ Bongo bakendaki kotika ye na masuwa.

21 Nsima ya kokabwana na bango na mpasi tozwaki nzela ya mbu, totambolaki nokinoki alima mpe tokómaki na Kosi, na mokolo oyo elandaki na Rode, mpe uta kuna na Patara. 2 Ntango tokutaki masuwa moko oyo ezalaki kokatisa na Fenisia, tomataki mpe tokendaki. 3 Nsima ya komona esanga ya Shipre, totikaki yango na lobɔkɔ ya mwasi mpe tozwaki nzela ya Siri, tosɛmaki na Tire, mpo kuna nde masuwa esengelaki kokitisa biloko na yango. 4 Tolukalukaki bayekoli mpe nsima ya komona bango tofandaki wana mikolo nsambo. Kasi na nzela ya elimo santu bazalaki koyebisa Paulo mbala na mbala ete atya lokolo na Yerusaleme te.+ 5 Bongo nsima ya kolekisa mikolo yango, tobimaki mpe tokobaki nzela na biso; bango nyonso, ná basi mpe bana, bayaki kotika biso tii na libándá ya engumba. Mpe tofukamaki na libongo, tobondelaki 6 mpe topesanaki mbote ya bokabwani. Biso tomataki na masuwa mpe bango bazongaki epai na bango.

7 Longwa na Tire, tokómaki na Potolemaisi; topesaki bandeko mbote mpe tofandaki elongo na bango mokolo moko. 8 Na mokolo oyo elandaki tolongwaki mpe tokómaki na Kaisaria, mpe tokɔtaki na ndako ya Filipe mopalanganisi ya nsango malamu, oyo azalaki moko ya mibali nsambo ya lokumu malamu,+ mpe tofandaki elongo na ye. 9 Mobali yango azalaki na bana basi minei, minzemba,* oyo bazalaki kosakola.+ 10 Kasi ntango tofandaki kuna mikolo mingi, mosakoli moko nkombo na ye Agabusi+ alongwaki na Yudea akiti. 11 Ayaki epai na biso mpe azwaki mokaba ya Paulo, amikangaki makolo ná mabɔkɔ mpe alobaki: “Elimo santu elobi boye: ‘Nkolo mokaba oyo, Bayuda bakokanga ye boye na Yerusaleme+ mpe bakokaba ye na mabɔkɔ ya bato ya bikólo.’”+ 12 Ntango toyokaki bongo, biso ná bato oyo bazalaki wana tobandaki kobondela ye ete amata na Yerusaleme te. 13 Kasi Paulo ayanolaki: “Mpo na nini bozali kolela mpe koluka kolɛmbisa ngai motema? Bóyeba likambo oyo: Namibongisi kaka mpo na kokangama te, kasi mpe mpo na kokufa na Yerusaleme mpo na nkombo ya Nkolo Yesu.”+ 14 Lokola azalaki kaka kondimela biso te, totikaki kotya ye mbamba* mpe tolobaki: “Mokano ya Yehova* esalema.”

15 Nsima ya mikolo yango tomibongisaki mpo na mobembo mpe tobandaki komata na Yerusaleme. 16 Bamosusu na kati ya bayekoli ya Kaisaria bakendaki mpe elongo na biso, mpe bamemaki biso epai ya moto oyo tosengelaki kofanda epai na ye, Manasona, moto ya Shipre, moko ya bayekoli ya liboso. 17 Ntango tokómaki na Yerusaleme, bandeko bayambaki biso na esengo. 18 Kasi na mokolo oyo elandaki, Paulo akendaki na biso epai ya Yakobo,+ mpe bankulutu nyonso bazalaki wana. 19 Apesaki bango mbote mpe abandaki koyebisa bango likambo mokomoko na nyonso oyo Nzambe asalelaki bikólo na nzela ya mosala na ye.

20 Nsima ya koyoka bongo, babandaki kopesa Nzambe nkembo, kasi balobaki na ye: “Ndeko, ozali komona ndenge bankóto mingi ya bandimi bazali na kati ya Bayuda, mpe bango nyonso bazali na molende mpo na Mibeko.+ 21 Kasi bayokaki nungunungu ete ozali koteya Bayuda nyonso na kati ya bikólo ete básundola mibeko ya Moize, ozali koyebisa bango ete bákata bana na bango ngenga te mpe bálanda te mimeseno yango oyo eyebaná.+ 22 Boye, tosengeli kosala nini? Mpo ya solo mpenza bakoyeba ete oyei. 23 Na yango salá oyo tozali koyebisa yo: Tozali na mibali minei oyo basalaki elako. 24 Zwá mibali yango mpe kende komipɛtola elongo na bango na ndenge milulu ezali kosɛnga mpe futelá bango makambo nyonso, mpo bákokola bango motó. Wana moto nyonso akoyeba ete nungunungu oyo bayebisaki bango mpo na yo ezali solo te, kasi ete ozali kotambola na molɔngɔ mpe ozali kotosa Mibeko.+ 25 Mpo na bandimi oyo bazali bato ya bikólo, na mokanda oyo tokomaki, totindelaki bango ekateli oyo ete basengeli koboya biloko oyo epesami mbeka epai ya bikeko,+ koboya makila,+ biloko oyo ekamolami*+ mpe pite.”*+

26 Na mokolo oyo elandaki Paulo amemaki mibali yango mpe amipɛtolaki elongo na bango+ na ndenge milulu ezalaki kosɛnga mpe akɔtaki na tempelo, mpo na koyebisa ntango nini mikolo ya kopɛtolama na kolanda milulu ekosila, mpe ntango nini basengelaki kopesa likabo mpo na mokomoko na bango.

27 Nzokande ntango mikolo yango nsambo ekómaki pene ya kosuka, Bayuda ya Azia ntango bamonaki ye na kati ya tempelo, batombokisaki etuluku mobimba ya bato mpe bakangaki ye, 28 bazali koganga: “Mibali ya Yisraele, bóya! Moto oyo nde azali koteya bato nyonso bipai na bipai mpo bátɛmɛla bato na biso, Mibeko mpe esika oyo. Mpe lisusu, akɔtisi ata Bagrɛki na kati ya tempelo mpe akómisi esika mosantu oyo mbindo.”+ 29 Mpo liboso bamonaki Trofimi+ Moefese na engumba elongo na ye, yango wana bazalaki kokanisa ete Paulo akɔtisaki ye na tempelo. 30 Engumba mobimba ekɔtaki na yikiyiki, mpe bato bakendaki noki na tempelo, bakangaki Paulo mpe babendaki ye libándá. Mpe mbala moko bakangaki baporte. 31 Wana balingaki koboma ye, nsango ekómelaki komanda ya limpinga ya basoda ete Yerusaleme mobimba ezali na yikiyiki; 32 na mbala moko azwaki basoda, bakonzi ya basoda mpe akitaki noki epai na bango. Ntango bamonaki komanda ya basoda mpe basoda, batikaki kobɛta Paulo.

33 Bongo komanda ya basoda apusanaki pene mpe atyaki ye na bolɔkɔ mpe apesaki mitindo ete bákanga ye na minyɔlɔlɔ mibale;+ na nsima atunaki soki azali nani mpe likambo nini asali. 34 Kasi bamosusu na ebele wana ya bato babandaki koganga likambo mosusu, mpe bamosusu likambo mosusu. Lokola ye moko akokaki te koyeba ata likambo moko ya sikisiki mpo na yikiyiki wana, apesaki mitindo ete bámema ye na lopango ya basoda. 35 Kasi ntango amataki na baeskalye, basoda bamemaki ye mpo na mobulu ya ebele yango ya bato, 36 mpo ebele wana ya bato bakobaki kolanda, bazalaki koganga: “Abomama!”

37 Ntango bakómaki pene ya kokɔtisa ye na lopango ya basoda, Paulo alobaki na komanda: “Nakoki koloba na yo mwa likambo?” Ayanolaki: “Olobaka Grɛki? 38 Ezali yo te Moezipito oyo abimisaki botomboki mikolo eleki mpe akambaki na esobe mibali 4 000 oyo bazalaki na bambeli?” 39 Paulo alobaki: “Ngai, nazali Moyuda+ ya Tarse+ na kati ya Silisia, nazali mwana-mboka ya engumba oyo eyebani malamu. Bongo nabondeli yo, pesá ngai nzela naloba na bato.” 40 Nsima ya kopesa ye nzela, Paulo atɛlɛmaki na baeskalye, asalaki bato elembo na lobɔkɔ na ye. Ntango kimya makasi ekɔtaki, alobaki na bango na monɔkɔ ya Ebre+ ete:

22 “Mibali, bandeko mpe batata, bóyoka kosamba na ngai liboso na bino sikoyo.”+ 2 Bongo, ntango bayokaki ete azali koloba na bango na monɔkɔ ya Ebre, bafandaki lisusu nyɛɛ koleka, mpe alobaki: 3 “Nazali Moyuda,+ nabotamá na Tarse ya Silisia,+ kasi natángá kelasi na engumba oyo, mpe Gamaliele+ nde ateyaki ngai, nateyamá mpo na kotosa mpenza mobeko ya Moize,+ nazalaki moto ya molende mpo na Nzambe, ndenge mpe bino nyonso bozali na yango na mokolo ya lelo.+ 4 Nanyokolaki Nzela oyo tii na liwa, nazalaki kokanga mibali ná basi minyɔlɔlɔ mpe kobwaka bango na bolɔkɔ,+ 5 kutu nganga-nzambe monene mpe liyangani mobimba ya bankulutu bakoki kotatola mpo na ngai. Nazwaki mpe mikanda epai na bango mpo na bandeko oyo bazalaki na Damasi, nakendaki mpo na kokanga baoyo bazalaki kuna na minyɔlɔlɔ mpe koya na bango na Yerusaleme mpo bázwa etumbu.

6 “Kasi wana nazalaki kokende mpe kopusana pene na Damasi, pene na midi, pole moko makasi engɛngaki na mbala moko zingazinga na ngai,+ 7 mpe nakweaki na nse, nayokaki mongongo moko elobi na ngai ete: ‘Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai?’ 8 Nayanolaki ete: ‘Yo nani, Nkolo?’ Mpe alobaki na ngai ete: ‘Ngai Yesu Monazarete, oyo yo ozali konyokola.’ 9 Bato oyo bazalaki elongo na ngai bamonaki pole yango kasi bayokaki te mongongo ya moto oyo azalaki kosolola na ngai. 10 Na yango, nalobaki ete: ‘Nasala nini, Nkolo?’ Nkolo alobaki na ngai ete: ‘Tɛlɛmá, kende na Damasi, mpe kuna bakoyebisa yo makambo nyonso oyo osengeli kosala.’+ 11 Kasi lokola nakokaki komona eloko te mpo na nkembo ya pole wana, baoyo bazalaki elongo na ngai bazalaki kosimba ngai na lobɔkɔ tii nakómaki na Damasi.

12 “Bongo Ananiasi, mobali moko oyo abangaka Nzambe na kolanda Mibeko, oyo Bayuda nyonso oyo bafandaka kuna bazalaki koloba malamu mpo na ye, 13 ayaki epai na ngai, atɛlɛmaki pembeni na ngai, alobaki na ngai: ‘Saulo, ndeko na ngai, moná lisusu!’ Mpe kaka na ntango wana natombolaki miso mpe namonaki ye.+ 14 Alobaki ete: ‘Nzambe ya bankɔkɔ na biso aponi yo mpo oyeba mokano na ye mpe omona Moto ya sembo+ mpe oyoka mongongo na ye, 15 mpamba te osengeli kozala motatoli na ye epai ya bato nyonso, mpo na makambo oyo omoni mpe oyoki.+ 16 Mpe sikoyo mpo na nini ozali koumela? Tɛlɛmá, zwá batisimo, mpe belelá nkombo na ye+ mpo osukwama na masumu na yo.’+

17 “Kasi ntango nazongaki na Yerusaleme+ mpe nazalaki kobondela na tempelo, nazwaki emonaneli 18 mpe namonaki ye azali koloba na ngai ete: ‘Salá mbangu, bimá noki na Yerusaleme, mpo bakondima te litatoli na yo mpo na ngai.’+ 19 Mpe nalobaki ete: ‘Nkolo, bango moko bayebi ete nazalaki kotya na bolɔkɔ baoyo bandimelaka yo mpe nazalaki kobɛta bango fimbo na sinagoga mokomoko;+ 20 mpe ntango basopaki makila ya motatoli na yo Stefano, natɛlɛmaki wana, nazalaki kondima mpe kokɛngɛla bilamba ya likoló ya baoyo bazalaki koboma ye.’+ 21 Atako bongo alobaki na ngai ete: ‘Kende, mpo nakotinda yo na bikólo ya mosika.’”+

22 Bakobaki koyoka ye tii ntango alobaki maloba wana, batombolaki mingongo na bango, balobi: “Bomá moto ya boye, mpo abongi kozala na bomoi te!” 23 Lokola bazalaki koganga, kobwaka bilamba na bango ya likoló epai na epai mpe kobwaka putulu likoló,+ 24 komanda ya basoda apesaki mitindo ete bákɔtisa Paulo na lopango ya basoda mpe alobaki bábɛta ye fimbo mpo aloba, mpo ayeba mpenza ntina oyo bazali koganga ndenge wana mpo na ye. 25 Kasi ntango batandaki ye mpo bábɛta ye fimbo, Paulo alobaki na mokonzi ya basoda oyo atɛlɛmaki wana: “Mobeko epesi nde bino nzela ete bóbɛta fimbo na moto oyo azali Moroma mpe oyo akweisami na likambo moko te?”*+ 26 Ntango mokonzi yango ya basoda ayokaki bongo, akendaki epai ya komanda ya basoda mpe ayebisaki ye: “Olingi kosala nini? Mpo moto wana azali Moroma.” 27 Bongo komanda apusanaki pene mpe atunaki ye ete: “Yebisá ngai: Ozali Moroma?” Alobaki: “Ɛɛ.” 28 Komanda azongisaki: “Ngai nasombaki ntomo wana ya mwana-mboka na mbongo ebele mpenza.” Paulo alobaki: “Kasi ngai nabotamá nde na yango.”+

29 Na ntango wana kaka, bato oyo balingaki kobɛta ye fimbo mpo aloba balongwaki pembeni na ye; mpe ntango komanda ya basoda ayebaki ete Paulo azali Moroma, akómaki kobanga ndenge akangaki ye na minyɔlɔlɔ.+

30 Kasi, na mokolo oyo elandaki, lokola alingaki koyeba mpenzampenza ntina oyo Bayuda bazalaki kofunda ye, afungolaki ye mpe apesaki mitindo ete banganga-nzambe bakonzi mpe Sanedrina mobimba báyangana. Akitisaki Paulo mpe atɛlɛmisaki ye na kati na bango.+

23 Paulo atalaki Sanedrina na likebi mpenza, mpe alobaki: “Mibali, bandeko, natamboli liboso ya Nzambe na lisosoli ya pɛto mpenza+ tii na mokolo ya lelo.” 2 Na yango, nganga-nzambe monene Ananiasi apesaki mitindo na baoyo batɛlɛmaki pene na Paulo ete bábɛta ye na monɔkɔ. 3 Bongo Paulo alobaki na ye: “Nzambe akobɛta yo, yo efelo oyo epakolamá mpɛmbɛ. Ofandi mpo na kosambisa ngai na kolanda Mibeko, mpe kaka yo moko ozali kobuka Mibeko, na ndenge ozali kopesa mitindo ete bábɛta ngai?” 4 Baoyo batɛlɛmaki wana balobaki: “Ozali kofinga nganga-nzambe monene ya Nzambe?” 5 Paulo alobaki: “Bandeko, nayebaki te ete azali nganga-nzambe monene. Mpo ekomamá: ‘Osengeli te koloba mabe mpo na nkumu ya bato na yo.’”+

6 Nzokande ntango Paulo ayebaki ete ndambo moko bazali Basadukai mpe mosusu Bafarisai, abandaki koganga na kati ya Sanedrina: “Mibali, bandeko, nazali Mofarisai,+ mwana ya Mofarisai. Nazali kosambisama mpo na elikya ya lisekwa ya bakufi.” 7 Lokola alobaki bongo, bokabwani ebimaki na kati ya Bafarisai mpe Basadukai, mpe liyangani ekabwanaki. 8 Mpo Basadukai balobaka ete lisekwa ezali te, anzelu azali te, elimo mpe ezali te, kasi Bafarisai bandimaka makambo nyonso wana.*+ 9 Bongo bato babandaki koganga makasi, mpe bakomeli mosusu ya etuluku ya Bafarisai batɛlɛmaki mpe babandaki koloba na koswana makasi: “Tomoni ata mabe moko te epai ya moto oyo; kasi soki elimo moko boye to anzelu moko boye nde asololaki na ye,+ . . .” 10 Nzokande ntango bokabwani ekómaki makasi, komanda ya basoda abangaki ete bákata Paulo bitenibiteni, mpe apesaki etuluku ya basoda mitindo ete bákita na nse, bálongola ye na katikati na bango mpe bákɔtisa ye na lopango ya basoda.

11 Kasi na butu oyo elandaki, Nkolo atɛlɛmaki pene na ye mpe alobaki: “Zalá na mpiko!+ Mpo kaka ndenge opesi litatoli malamumalamu na Yerusaleme mpo na ngai, ndenge moko mpe osengeli kopesa litatoli na Roma.”+

12 Ntango ntɔngɔ etanaki, Bayuda basalaki likita mabe mpe balapaki ndai ete mabe ekómela bango soki balei mpe bamɛli liboso ete báboma Paulo. 13 Ezalaki bato koleka 40 nde basalaki likita wana ya mabe na ndai oyo ekangani na elakeli mabe. 14 Mibali yango bakendaki epai ya banganga-nzambe bakonzi ná bankulutu, mpe balobaki: “Tolapi ndai makasi ete tokolya ata eloko moko te soki tobomi naino Paulo te. 15 Sikoyo, bino ná Sanedrina bóyebisa komanda ya basoda ete asengeli komemela bino ye lokola nde bozali na mposa ya kotalela likambo na ye na ndenge ya malamu koleka. Kasi liboso ete akóma pene, biso moko tokomibongisa mpo na koboma ye.”

16 Nzokande, mwana ya ndeko mwasi ya Paulo ayokaki motambo oyo batyelaki ye, mpe akɔtaki na lopango ya basoda mpe ayebisaki yango Paulo. 17 Bongo Paulo abengaki moko ya bakonzi ya basoda mpe alobaki: “Memá mwana mobali oyo epai ya komanda ya basoda, mpo azali na likambo ya koyebisa ye.” 18 Bongo moto yango amemaki ye epai ya komanda mpe alobaki: “Paulo moto ya bolɔkɔ abengaki ngai epai na ye mpe asɛngaki ngai ete namema elenge mobali oyo epai na yo, mpo azali na likambo ya koyebisa yo.” 19 Komanda azwaki ye na lobɔkɔ, abendaki ye kaka na esika ya bango mibale mpe atunaki ye: “Olingi koyebisa ngai nini?” 20 Ye alobaki: “Bayuda bayokani ete básɛnga yo omema Paulo na Sanedrina lobi lokola nde bazali na mposa ya koyeba lisusu malamu makambo oyo etali ye.+ 21 Kasi kondimela bango te, mpo mibali koleka 40 na kati na bango batyeli ye motambo, mpe balapi ndai ete bakolya te mpe bakomɛla te soki babomi ye naino te;+ bamibongisi sikoyo, bazali kozela kaka opesa bango nzela.” 22 Komanda ya basoda atikaki elenge mobali yango akende nsima ya kopesa ye mitindo: “Koloba na moto te ete oyebisi ngai makambo oyo.”

23 Mpe abengisaki bakonzi ya basoda mibale mpe alobaki na bango: “Bóbongisa basoda 200, basoda 70 oyo batambolaka na mpunda mpe basoda 200 ya makɔnga, mpo na kokende na Kaisaria na ngonga ya misato ya butu.* 24 Bózwa mpe banyama oyo ekumbaka kilo mpo emema Paulo mpe ekómisa ye malamu epai ya guvɛrnɛrɛ Feliksi.” 25 Mpe akomaki mokanda oyo:

26 “Ngai Klode Lisiasi, nakomeli Moto ya lokumu, Guvɛrnɛrɛ Feliksi: Mbote! 27 Bayuda bakangaki mobali oyo mpe balingaki báboma ye, kasi nayaki nokinoki ná etuluku moko ya basoda mpe nabikisaki ye,+ mpo nayokaki ete azali Moroma.+ 28 Lokola nalingaki koyeba malamu ntina oyo bazalaki kofunda ye, nakitisaki ye na Sanedrina na bango.+ 29 Nayaki komona ete bazalaki kofunda ye mpo na makambo ya Mibeko na bango,+ kasi te mpo na likambo moko boye oyo ebongi na liwa to na bolɔkɔ. 30 Lokola bayebisi ngai ete likita moko ya mabe ebongisami mpo na kosala mobali yango mabe,+ natindeli yo ye nokinoki, mpe napesi bafundi na ye mitindo ete báloba mabe na ye liboso na yo.”

31 Bongo basoda yango bazwaki Paulo,+ na kolanda mitindo oyo epesamaki, mpe bamemaki ye na butu na Antipatrisi. 32 Na mokolo oyo elandaki bapesaki nzela ete basoda oyo batambolaka na mpunda bákoba mobembo elongo na ye, kasi bango bazongaki na lopango ya basoda. 33 Basoda oyo batambolaka na mpunda bakɔtaki na Kaisaria mpe bapesaki guvɛrnɛrɛ mokanda yango mpe lisusu balakisaki ye Paulo. 34 Bongo atángaki yango mpe atunaki soki ye azalaki moto ya etúká nini, mpe ayaki koyeba ete azali moto ya Silisia.+ 35 Alobaki: “Nakoyoka yo malamumalamu ntango bafundi na yo bakoya.”+ Mpe apesaki mitindo ete bábatela ye na ndako ya bokonzi ya Erode.

24 Mikolo mitano na nsima, nganga-nzambe monene Ananiasi+ akitaki elongo na ndambo ya bankulutu mpe molobeli moko na nkombo Tertulusi, mpe bafundaki Paulo epai ya guvɛrnɛrɛ.+ 2 Ntango babengaki ye, Tertulusi abandaki kofunda Paulo, alobi:

“Lokola tozali na kimya monene mpo na yo mpe lokola mbongwana ezali kosalema na ekólo oyo mpo na mayele na yo ya kobongisa makambo liboso, 3 Moto ya Lokumu Feliksi, na bantango nyonso mpe lisusu na bisika nyonso, tolingi kopesa yo matɔndi mingi. 4 Kasi mpo nakoba koumisa yo te, nabondeli yo ete, na boboto na yo oyoka biso mwa moke. 5 Mpo tomoni ete mobali oyo azali likama monene*+ mpe azali kobimisa botomboki+ epai ya Bayuda nyonso na mabele mobimba oyo bato bafandi mpe azali mokambi ya mwa lingomba ya Banazarete.+ 6 Amekaki mpe kokómisa tempelo eloko mpamba, yango wana tokangaki ye.+ 7 *—— 8 Ntango yo moko okotuna ye, okoyeba mpenza ete makambo nyonso oyo tozali kofunda ye na yango ezali solo.”

9 Bayuda mpe bamikɔtisaki na bifundeli wana, bazalaki koloba ete makambo yango ezalaki mpenza solo. 10 Ntango guvɛrnɛrɛ asɛngaki Paulo aloba, ayanolaki:

“Lokola nayebi ete ozali mosambisi ya ekólo oyo banda bambula mingi, nandimi na motema moko kosamba makambo na ngai.+ 11 Ndenge okoki koluka koyeba yango yo moko eleki naino mikolo 12 te banda namataki kosambela na Yerusaleme;+ 12 mpe bakutaki ngai te na tempelo nazali kotyana ntembe ná moto to koyanganisa etuluku moko ya bato, ezala na basinagoga to na engumba. 13 Bakoki mpe te komonisa yo soki makambo oyo bazali kofunda ngai sikoyo ezali ya solo. 14 Kasi nandimi mpenza likambo oyo liboso na yo, ete na kotalela nzela oyo bazali kobenga ‘mwa lingomba,’ na ndenge wana nde ngai nazali kosalela Nzambe ya bankɔkɔ na ngai mosala mosantu,+ mpo nandimaka makambo nyonso oyo elobelami na Mibeko mpe ekomami na Basakoli.+ 15 Mpe nazali na elikya epai ya Nzambe, elikya oyo bato oyo mpe bazalaka na yango, ete lisekwa ekozala,+ ya bato ya sembo* mpe ya bato oyo bazangi bosembo.+ 16 Mpo na likambo yango, nazali ntango nyonso kosala makasi mpo na kobatela lisosoli ya pɛto* liboso ya Nzambe mpe ya bato.+ 17 Sikoyo nsima ya bambula mingi, nayaki kotika makabo ya motema mawa+ na ekólo na ngai mpe kopesa mabonza. 18 Wana nazalaki kosala makambo yango bakutaki ngai na tempelo,+ namipɛtoli na ndenge oyo milulu ezali kosɛnga, kasi nayangisaki ebele ya bato te mpe natyaki yikiyiki te. Bayuda mosusu ya etúká ya Azia bazalaki wana, 19 oyo esengelaki kutu nde bázala awa liboso na yo mpo na kofunda ngai soki mpenza bazwaki ngai na likambo moko ya mabe.+ 20 To mpe, mibali oyo bazali awa báloba bango moko mabe oyo bazwaki ngai na yango ntango natɛlɛmaki liboso ya Sanedrina, 21 longola kaka mpo na likambo moko oyo nabelelaki ntango natɛlɛmaki na kati na bango: ‘Nazali lelo kosambisama liboso na bino mpo na lisekwa ya bakufi!’”+

22 Nzokande, Feliksi, lokola ayebaki malamu makambo oyo etali Nzela,+ abandaki kozongisazongisa bato wana ete báya nsima mpe alobaki: “Ntango Lisiasi komanda ya basoda akokita, nakokata makambo na bino.” 23 Mpe apesaki mokonzi ya basoda mitindo ete bákɛngɛla Paulo kasi bátikela ye mwa bonsomi, mpe apesa nzela ete baninga na ye básalisa ye.

24 Mwa mikolo na nsima, Feliksi ayaki ná mwasi na ye Drusila, oyo azalaki Moyuda. Abengaki Paulo mpe ayokaki ye na likambo etali kondimela Kristo Yesu.+ 25 Kasi ntango Paulo alobelaki bosembo,* komipekisa mpe lisambisi oyo ekoya,+ Feliksi akómaki kobanga mpe azongisaki: “Sikoyo kende na yo, kasi soki nazwi ntango nakobengisa yo lisusu.” 26 Lokola azalaki kokanisa ete Paulo akopesa ye mbongo, azalaki kobengabenga ye mbala na mbala mpe azalaki kosolola na ye. 27 Kasi, ntango mbula mibale elekaki, Porkiusi Festusi akitanaki Feliksi na ebonga; mpe lokola Feliksi alingaki ete Bayuda básepela na ye,+ atikaki Paulo na bolɔkɔ.

25 Na yango ntango Festusi+ ayaki na etúká ya Yudea mpe abandaki koyangela, mikolo misato na nsima autaki na Kaisaria mpe amataki na Yerusaleme. 2 Banganga-nzambe bakonzi mpe bato minene ya Bayuda bafundaki Paulo epai na ye.+ Bongo babandaki kobondela Festusi 3 amonisela bango boboto ya kotinda Paulo aya na Yerusaleme, nzokande bazalaki kokana kotyela ye motambo mpo na koboma ye na nzela.+ 4 Kasi, Festusi ayanolaki ete Paulo asengeli kotikala na bolɔkɔ na Kaisaria mpe ete mwa moke na nsima, ye moko akozonga kuna. 5 Alobaki: “Soki mpenza mobali oyo asali likambo moko ya mabe, baoyo bazali na bokonzi na kati na bino bákita elongo na ngai mpe báfunda ye.”+

6 Nsima ya kolekisa mikolo soki mwambe to zomi na kati na bango, akitaki na Kaisaria, mpe na mokolo oyo elandaki, afandaki na kiti ya kosambisa mpe apesaki mitindo ete báya na Paulo. 7 Ntango akɔtaki, Bayuda oyo bakitaki uta na Yerusaleme batɛlɛmaki zingazinga na ye, bazalaki kofunda ye na makambo mingi ya minene oyo kutu bakokaki te komonisa soki ezali solo.+

8 Kasi mpo na kosamba, Paulo alobaki boye: “Nasali lisumu ata moko te oyo ebuki Mibeko ya Bayuda to ya tempelo to mpe ya Kaisala.”+ 9 Festusi, lokola alingaki ete Bayuda básepela na ye,+ azongiselaki Paulo: “Olingi komata na Yerusaleme mpe kosambisama kuna liboso na ngai mpo na makambo wana?” 10 Kasi Paulo alobaki: “Natɛlɛmi liboso ya kiti ya kosambisa ya Kaisala, epai nasengeli kosambisama. Nasali Bayuda mabe ata moko te, ndenge yo moko mpe ozali mpenza komona yango. 11 Soki nazali mpenza mosali mabe mpe soki nasali likambo moko oyo ebongi na liwa,+ naboyi kokufa te, kasi soki makambo oyo bato wana bazali kofunda ngai ezali solo te, moto moko te azali na lotomo ya kokaba ngai epai na bango kaka mpo na kosepelisa bango. Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!”+ 12 Bongo Festusi, nsima ya kosolola na liyangani ya bapesi-toli, ayanolaki: “Lokola osɛngi okende kosamba epai ya Kaisala; okokende epai ya Kaisala.”

13 Nsima ya mwa mikolo, mokonzi Agripa mpe Bernise bayaki na Kaisaria mpo na kotala Festusi. 14 Lokola balekisaki mikolo mingi kuna, Festusi ayebisaki mokonzi makambo etali Paulo ete:

“Feliksi atikaki mobali moko na bolɔkɔ, 15 mpe ntango nazalaki na Yerusaleme banganga-nzambe bakonzi mpe bankulutu ya Bayuda bayaki koloba makambo etali ye,+ bazalaki kosɛnga ete asambisama mpe azwa etumbu. 16 Kasi nayebisaki bango ete Baroma bazalaka na momeseno te ya kokaba moto mpo na kosepelisa basusu, liboso ete moto yango oyo afundami amonana mpenza na bafundi na ye mpe azwa libaku ya kosamba likambo oyo afundami na yango.+ 17 Yango wana ntango bayaki awa, naumelaki te, kasi kaka na mokolo oyo elandaki, nafandaki na kiti ya kosambisa mpe napesaki mitindo ete báya na mobali yango. 18 Ntango bafundi na ye bayaki, bafundaki ye ata na likambo moko te ya mabe oyo ngai nazalaki kokanisela ye.+ 19 Bazalaki kaka kotyana na ye ntembe mpo na lolenge na bango ya kosambela nzambe*+ mpe mpo na moto moko boye na nkombo Yesu oyo akufá, kasi oyo Paulo akobaki koloba ete azali na bomoi.+ 20 Lokola nayebaki te ndenge ya kosilisa ntembe yango, natunaki ye soki akolinga kokende na Yerusaleme mpe kosambisama kuna mpo na makambo yango.+ 21 Kasi ntango Paulo asɛngaki ete atikala na bolɔkɔ mpo na kozela ekateli oyo Wa-Lokumu*+ akozwa, napesaki mitindo ete bákɛngɛla ye tii ntango nakotinda ye epai ya Kaisala.”

22 Bongo Agripa alobaki na Festusi: “Ngai mpe nakosepela koyoka moto yango.”+ Azongisaki: “Lobi okoyoka ye.” 23 Na yango, na mokolo oyo elandaki, Agripa ná Bernise bayaki na ndenge ya lokumu mpenza mpe bakɔtaki na ndako ya kosambisa elongo na bakomanda ya basoda mpe bato minene ya engumba; ntango Festusi apesaki mitindo, bayaki na Paulo. 24 Mpe Festusi alobaki: “Mokonzi Agripa mpe bino nyonso oyo bozali elongo na biso awa, bótala mobali oyo, Bayuda nyonso na engumba Yerusaleme mpe awa, basɛngaki ngai mpe balobi na mongongo makasi ete asengeli kokufa.+ 25 Kasi nasosolaki ete asalaki eloko te oyo ebongaki na etumbu ya liwa.+ Na yango ntango mobali oyo ye moko asɛngaki akende kosamba epai ya Wa-Lokumu, nazwaki ekateli ya kotinda ye. 26 Kasi mpo na ye, nazali mpenza na likambo te oyo nakoki kokomela Nkolo na ngai. Yango wana nabimisi ye liboso na bino nyonso, mpe mingimingi liboso na yo, Mokonzi Agripa, mpo soki lisambisi esalemi, nakoka kozwa mwa likambo ya kokoma. 27 Mpo namoni ete ezali likambo ya bozoba kotinda moto ya bolɔkɔ kozanga komonisa mpe makambo oyo afundami na yango.”

26 Agripa+ alobaki na Paulo: “Okoki kosamba mpo na yo moko.” Bongo Paulo asembolaki lobɔkɔ na ye mpe abandaki koloba:

2 “Nazali komimona moto ya esengo Mokonzi Agripa, lokola ezali liboso na yo nde nasengeli kosamba na mokolo ya lelo mpo na makambo nyonso oyo Bayuda bafundi ngai na yango,+ 3 mingi mpenza mpo oyebi malamu mimeseno nyonso mpe ntembe nyonso na kati ya Bayuda. Yango wana nabondeli yo ete oyoka ngai na motema molai.

4 “Ya solo, lolenge natambwisi bomoi na ngai banda bolenge na kati ya bato* na ngai mpe na Yerusaleme, Bayuda nyonso+ 5 baoyo bayebaki ngai liboso bayebi malamu ete, nazalaki kolanda mwa lingomba ya Bafarisai, mwa lingomba oyo eleki makambo makasi na losambo na biso.+ Soki balingi, bakoki kotatola mpo na yango.+ 6 Kasi sikoyo ezali mpo na elikya ya elaka oyo Nzambe apesaki bankɔkɔ na biso+ nde nazali kosamba; 7 elaka oyo mabota na biso 12 bazali kozela kokokisama na yango na ndenge bazali kosala mosala mosantu na molende butu moi. Mpo na elikya oyo nde Bayuda bafundi ngai,+ Ee mokonzi.

8 “Mpo na nini bondimaka te ete Nzambe asekwisaka* bakufi? 9 Mpo na ngai, nandimisamaki ete nasengelaki kosala ndenge nyonso mpo na kotɛmɛla nkombo ya Yesu Monazarete. 10 Yango nde nasalaki mpenza na Yerusaleme, nakangaki ebele ya basantu na bolɔkɔ,+ mpo nazwaki lotomo yango epai ya banganga-nzambe bakonzi;+ mpe ntango esengelaki bábomama, nazalaki kondima ete bábomama. 11 Mbala mingi, na basinagoga nyonso nazalaki kopesa bango etumbu, mpe komeka kopusa bango na makasi ete báwangana kondima. Lokola nazalaki na nkanda na bango makasi mpenza, nakendaki mosika mpenza tii konyokola bango ata na bingumba mosusu.

12 “Ntango nazalaki kokende na Damasi na bokonzi mpe na etinda oyo nazwaki epai ya banganga-nzambe bakonzi, 13 Ee mokonzi, na midi namonaki na nzela, pole moko oyo eleki kongɛnga ya moi ebɛti uta na likoló zingazinga na ngai mpe ya baoyo bazalaki kotambola elongo na ngai.+ 14 Mpe ntango biso nyonso tokweaki na nse, nayokaki mongongo moko elobi na ngai na monɔkɔ ya Ebre: ‘Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai? Ozali komisala mabe ndenge ozali kobɛtabɛta makolo na nsɔngɛ ya mangenda.’* 15 Kasi ngai natunaki: ‘Yo nani, Nkolo?’ Mpe Nkolo alobaki: ‘Ngai Yesu, oyo yo ozali konyokola. 16 Sikoyo, longwá na mabele mpe tɛlɛmá. Mpamba te ezali mpo na ntina oyo nde namimonisi epai na yo: mpo na kopona yo lokola mosaleli mpe motatoli ya makambo oyo omoni mpe ya makambo oyo nakolakisa yo na ntina na ngai.+ 17 Nakobikisa yo na mabɔkɔ ya bato oyo mpe ya bikólo oyo nazali kotinda yo epai na bango+ 18 mpo na kofungola bango miso,+ mpo na kolongola bango na molili+ báya na pole+ mpe kolongola bango na nguya ya Satana+ mpo báya epai ya Nzambe, mpo bázwa bolimbisi ya masumu+ mpe libula na kati ya baoyo basantisami na nzela ya kondima na bango epai na ngai.’

19 “Yango wana, Mokonzi Agripa, naboyaki te kotosa emonaneli wana oyo eutaki likoló, 20 kasi libosoliboso epai ya baoyo bazalaki na Damasi,+ na nsima epai ya baoyo bazalaki na Yerusaleme,+ na mokili mobimba ya Yudea, mpe epai ya bikólo, namemaki nsango oyo: basengeli kobongola motema, kobaluka epai ya Nzambe mpe kosala misala oyo emonisi ete babongoli motema.+ 21 Ezali mpo na yango nde Bayuda bakangaki ngai na tempelo mpe balukaki koboma ngai.+ 22 Nzokande, lokola nazwi lisalisi oyo euti epai ya Nzambe, nazali kokoba tii na mokolo ya lelo kopesa litatoli epai ya bato mike mpe bato minene, nazali koloba likambo mosusu te kaka oyo Basakoli mpe Moize balobaki ete esengelaki kosalema:+ 23 ete Kristo asengelaki konyokwama+ mpe, lokola azali moto ya liboso oyo asekwi uta na bakufi,+ asengelaki kosakola pole epai ya bato oyo mpe epai ya bikólo.”+

24 Wana Paulo azalaki koloba makambo yango mpo na kosamba na ye, Festusi alobaki na mongongo makasi: “Ozwi ligboma, Paulo! Koyekola mingi ekómisi yo ligboma!” 25 Kasi Paulo alobaki: “Nazwi ligboma te, Festusi Moto ya Lokumu, kasi nazali nde koloba makambo ya solo mpe ya makanisi malamu. 26 Likambo ya solo ezali ete, mokonzi oyo ngai nazali koloba liboso na ye na elobeli ya polele ayebi makambo yango malamu; mpo ngai nandimi mpenza ete na makambo wana ezali ata na moko te oyo ye azangi koyeba, mpo likambo yango esalemaki na esika ya kobombama te.+ 27 Mokonzi Agripa, ondimaka Basakoli? Nayebi ete ondimaka.” 28 Kasi Agripa alobaki na Paulo: “Na mwa ntango moke okondimisa ngai nakóma mokristo.” 29 Na yango, Paulo alobaki: “Ezala na mwa ntango moke to mpe nsima ya ntango molai, nakosepela mingi liboso ya Nzambe ete yo moko kaka te kasi mpe baoyo nyonso bazali koyoka ngai lelo bókóma ndenge ngai nazali, longola kaka minyɔlɔlɔ oyo.”

30 Bongo mokonzi atɛlɛmaki, ata mpe guvɛrnɛrɛ, Bernise mpe bato oyo bafandaki elongo na bango. 31 Kasi ntango bazalaki kobima babandaki kosolola bango na bango: “Moto oyo asali ata likambo moko te oyo ebongi na liwa to na bolɔkɔ.”+ 32 Lisusu, Agripa alobaki na Festusi: “Bakokaki kotika moto oyo soki asɛngaka te kokende kosamba epai ya Kaisala.”+

27 Lokola ekateli ezwamaki ete tókende na masuwa na Itali,+ bapesaki Paulo mpe bato mosusu ya bolɔkɔ na mabɔkɔ ya mokonzi moko ya basoda, nkombo na ye Yuliusi, ya etuluku ya Augusto. 2 Tomataki na masuwa moko euti na Adramitiume, oyo elingaki kolekaleka na mabongo mingi pembenipembeni ya mbu na etúká ya Azia, mpe tobandaki kokende. Aristarke,+ moto ya Masedonia ya Tesaloniki, azalaki elongo na biso. 3 Na mokolo oyo elandaki, tosɛmaki na Sidone, Yuliusi azalaki kosalela Paulo makambo na boboto mpe apesaki ye nzela ya kokende epai ya baninga na ye mpo básalisa ye.

4 Mpe ntango tolongwaki kuna, tozwaki nzela ya mbu, totambolaki pembeni ya Shipre mpo mopɛpɛ ezalaki kobɛta liboso. 5 Bongo totambolaki na katikati mpenza ya mbu, pembeni ya Silisia mpe Pamfilia mpe tosɛmaki na Mira na Lisia. 6 Kuna mokonzi ya basoda akutaki masuwa moko ya Alezandria oyo ezalaki kokende na Itali, mpe amatisaki biso na yango. 7 Bongo, nsima ya kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ mikolo mingi, tokómaki na Kinide na mpasi. Lokola mopɛpɛ ezalaki kopekisa biso kokende liboso, totambolaki pembeni ya Krɛtɛ na Salomone. 8 Mpe nsima ya kotambola na mpasi pembenipembeni na yango, tokómaki na esika moko oyo ebengami Mabongo Kitoko, oyo ezalaki pene ya engumba Lasea.

9 Lokola ntango mingi elekaki mpe ekómaki sikoyo likama kotambola na masuwa mpo kokila bilei ya mokolo ya Kozipa masumu+ kutu esilaki koleka, Paulo apesaki likanisi, 10 alobaki na bango: “Mibali, namoni ete mobembo oyo ekobimisa likama mpe libebi moko monene, kaka ya biloko ná masuwa te, kasi mpe ya bomoi* na biso.” 11 Nzokande, mokonzi ya basoda ayokelaki nde motambwisi-masuwa ná nkolo-masuwa na esika ya koyoka makambo oyo Paulo alobaki. 12 Lokola libongo wana ezalaki malamu te mpo na kolekisa eleko ya malili makasi kuna, mingi bapesaki likanisi ete tólongwa kuna, mpo na kotala soki bakokoka ata kokóma na Feniksi mpo na kolekisa eleko yango, wana nde libongo ya Krɛtɛ oyo ezalaka na nzela oyo ezali komema na nɔrdi-ɛsti mpe na sudi-ɛsti.

13 Ntango mopɛpɛ ya sudi ezalaki kopɛpa mokemoke, bakanisaki ete mokano na bango ekokisami, bamatisaki longo mpe masuwa ebandaki kotambola pembenipembeni mpenza ya Krɛtɛ. 14 Kasi, mwa moke na nsima, mopɛpɛ moko ya makasi oyo babengi Erakilo* ekitelaki esanga yango. 15 Lokola mopɛpɛ makasi ebɛtaki masuwa, yango ekokaki kotɛlɛma te liboso ya mopɛpɛ, yango wana tomitikaki mpe tomemamaki. 16 Totambolaki pembeni ya mwa esanga moko oyo babengi Koda, atako bongo tobundaki makasi mpenza mpo tóbungisa te kano oyo ezalaki nsima ya masuwa. 17 Kasi nsima ya komatisa yango na masuwa, basalelaki bansinga ya minene mpo na kokangisa masuwa. Lokola bazalaki kobanga kokende kokangama na zɛlo ya Sirtisi,* bakitisaki biloko oyo etambwisaka masuwa mpe na ndenge yango bamemamaki. 18 Lokola mopɛpɛ yango ya makasi ezalaki kobɛta biso mpenza, na mokolo oyo elandaki babandaki kolongola kilo na masuwa. 19 Mpe na mokolo ya misato, bango moko babwakaki bisaleli ya masuwa.

20 Lokola moi mpe minzoto esalaki mikolo ebele emonanaka te, mpe mopɛpɛ oyo ezalaki kobɛta biso ezalaki makasi mingi,* elikya na biso nyonso ya kobika ebandaki kosila. 21 Lokola basalaki ntango molai kozanga kolya, Paulo atɛlɛmaki na katikati na bango mpe alobaki: “Mibali, soki bolandaki mpenza toli na ngai mpe bozwaki te nzela ya mbu uta na Krɛtɛ, bolingaki kozwa likama oyo te mpe biloko elingaki kobeba te.+ 22 Sikoyo nazali kosɛnga bino bózala na mpiko, mpo ata moto* moko te akokufa, kaka masuwa nde ekobeba. 23 Na butu ya lelo, anzelu moko+ ya Nzambe oyo ngai nazali moto na ye mpe oyo ngai nazali kosalela mosala mosantu atɛlɛmaki pene na ngai, 24 mpe alobaki na ngai: ‘Kobanga te, Paulo. Osengeli kotɛlɛma liboso ya Kaisala,+ mpe talá! Nzambe akobikisa yo ná baoyo ozali na bango na masuwa.’ 25 Yango wana, mibali, bózala na mpiko, mpo nazali kondimela Nzambe ete ekosalema kaka ndenge mpenza bayebisi ngai. 26 Nzokande, tosengeli kokangama na zɛlo na esanga moko.”+

27 Ntango butu ya 14 eyindaki mpe tozalaki komemama epai na epai likoló ya mbu ya Adria, na katikati ya butu bamatelo babandaki komona lokola bazali kopusana pene ya mwa mokili moko boye. 28 Bamekaki mozindo mpe bamonaki ete ezali orgwiya* 20, bongo bapusanaki mwa moke mpe bamekaki lisusu mpe bamonaki ete ezali orgwiya* 15. 29 Lokola bazalaki kobanga ete tókangama na mabanga, babwakaki longo minei na nsima ya masuwa mpe babandaki kolinga ete ntɔngɔ etana. 30 Kasi ntango bamatelo yango babandaki koluka kokima masuwa, bakitisaki kano na mbu mpe bazalaki kokosa ete balingi nde kokitisa balongo uta na motó ya masuwa, 31 Paulo alobaki na mokonzi ya basoda ná basoda: “Soki bato oyo batikali na kati ya masuwa te, bokoki kobika te.”+ 32 Na yango, basoda bakataki bansinga ya kano mpe batikaki yango ekwea.

33 Mwa moke liboso ntɔngɔ etana, Paulo abandaki kolendisa bato nyonso bálya mwa eloko, alobi boye: “Lelo ezali mokolo ya 14 oyo bozali kozela na komitungisa nyonso, mpe botye ata eloko moko te na monɔkɔ. 34 Na yango, nazali kolendisa bino ete bólya mwa eloko; ezali mpo na bolamu na bino, mpo ata nsuki moko te ya motó ya moko na bino ekobeba.” 35 Ntango asilisaki koloba bongo, azwaki limpa, apesaki Nzambe matɔndi liboso na bango nyonso, abukaki yango mpe abandaki kolya. 36 Na yango bango nyonso bazwaki mpiko mpe babandaki kolya mwa eloko. 37 Biso nyonso na kati ya masuwa, tozalaki bato* 276. 38 Ntango batondaki, babwakaki blé na mbu mpo na kolongola kilo na masuwa.+

39 Ntango ntɔngɔ etanaki, bayebaki mokili yango mpenza te+ kasi bamonaki mwa esika mai ekɔtá na mabele ná libongo moko ya zɛlo, mpe bazwaki ekateli, soki likoki ezali bákangisa masuwa na libongo yango. 40 Na yango bakataki bansinga ya balongo, mpe batikaki yango ekwea na mbu, kaka na ntango wana, bafungolaki bansinga ya bankai ya koyenda; mpe nsima ya komatisa elamba ya liboso ya masuwa na mopɛpɛ, balandaki libongo. 41 Ntango batutaki libondo moko ya zɛlo oyo mbu ezalaki kobwakela yango mai bipai nyonso mibale, bakakisaki masuwa wana, mpe elongi ya masuwa ekangamaki makasi, ezalaki koningana te, mpe mbonge ebandaki kobuka nsima ya masuwa bitenibiteni na ndenge ya nsɔmɔ.+ 42 Na yango, basoda bazwaki ekateli ya koboma bato ya bolɔkɔ, mpo moto moko te abɛta mai mpe akima. 43 Kasi mokonzi ya basoda alingaki mpenza kobikisa Paulo mpe apekisaki bango kokokisa mokano na bango. Apesaki baoyo bayebaki kobɛta mai mitindo ete bámibwaka na mbu mpe bábima na mokili liboso, 44 mpe baoyo batikalaki balandaki, bamosusu likoló ya mabaya mpe bamosusu likoló ya biloko mosusu ya masuwa. Mpe yango esalaki ete bango nyonso bakómaki na mokili kozanga likama.+

28 Ntango tolongwaki na likama yango, toyaki koyeba ete bazalaki kobenga esanga yango Malta.+ 2 Mpe bato oyo bazalaki kofanda esika wana* bamoniselaki biso nyonso boboto moko ya koloba te. Bapelisaki mɔtɔ mpe bayambaki biso na esengo mpo mbula ezalaki konɔka mpe malili ezalaki. 3 Kasi ntango Paulo alɔkɔtaki liboke ya nkoni mpe alalisaki yango na mɔtɔ, nyoka ya ngɛngɛ* moko ebimaki mpo na molunge mpe ekangamaki makasi na lobɔkɔ na ye. 4 Ntango bato oyo bazalaki kofanda esika wana bamonaki nyama wana ya ngɛngɛ ekangami na lobɔkɔ na ye, babandaki kolobana bango na bango: “Ya solo mpenza moto oyo azali mobomi-bato. Atako abiki na likama ya mbu, bosembo* etiki ye te ete akoba kozala na bomoi.” 5 Nzokande aningisaki nyama yango ya ngɛngɛ ekwea na mɔtɔ mpe ayokaki mpasi te. 6 Bango bazalaki kokanisa ete akovimba na ngɛngɛ wana to akokwea na mbala moko ebembe. Nsima ya kozela ntango molai mpe komona ete eloko moko te ya mabe ekómeli ye, babongolaki makanisi na bango mpe babandaki koloba ete azali nzambe.

7 Nzokande pene na esika yango, mabele oyo ezalaki wana ezalaki ya moto monene ya esanga yango, nkombo na ye Publiusi. Ayambaki biso malamu mpe afandisaki biso epai na ye mikolo misato. 8 Kasi tata ya Publiusi alalaki mpo azalaki konyokwama na fiɛvrɛ ná pulupulu ya makila. Paulo akɔtaki epai na ye, abondelaki, atyelaki ye mabɔkɔ mpe abikisaki ye.+ 9 Nsima na yango, bato mosusu ya esanga wana oyo bazalaki kobɛla babandaki mpe koya epai na ye mpe bazalaki kobikisama.+ 10 Bapesaki biso mpe lokumu na makabo ebele, mpe ntango tolingaki kokoba mobembo na masuwa, bapesaki biso nyonso oyo tozalaki na mposa na yango.

11 Sanza misato na nsima tozwaki masuwa moko oyo motó na yango ezalaki na elembo ete “Bana ya Zeusi.” Yango eutaki na Alezandria mpe elekisaki eleko ya mpiɔ na esanga yango. 12 Tosɛmaki na libongo na Sirakuse, tofandaki wana mikolo misato; 13 uta na esika yango tokobaki mobembo mpe tokómaki na Regiume. Nsima ya mokolo moko, mopɛpɛ moko ya sudi epɛpaki mpe tokómaki na Puteoli na mokolo oyo elandaki. 14 Awa tokutaki bandeko mpe babondelaki biso tófanda elongo na bango mikolo nsambo, mpe na nsima tozwaki nzela ya Roma. 15 Uta kuna, ntango bandeko bayokaki nsango na biso, bayaki tii na Zando ya Apiusi mpe na Tavɛrnɛ-Misato mpo na kokutana na biso. Ntango Paulo amonaki bango, apesaki Nzambe matɔndi mpe azwaki mpiko.+ 16 Nsukansuka, ntango tokɔtaki na Roma, bapesaki Paulo nzela ya kofanda ye moko elongo na soda oyo azalaki kokɛngɛla ye.

17 Mikolo misato na nsima, abengaki baoyo bazalaki bato minene na kati ya Bayuda. Ntango bayanganaki, alobaki na bango: “Mibali, bandeko, atako nasalaki eloko moko te ya mabe epai ya bato to na mimeseno ya bankɔkɔ na biso,+ bakangaki ngai na bolɔkɔ na Yerusaleme mpe bakabaki ngai na mabɔkɔ ya Baroma.+ 18 Mpe nsima ya kosambisa ngai,+ balingaki kotika ngai, mpo bakutaki epai na ngai ata eloko moko te oyo ebongaki na etumbu ya liwa.+ 19 Kasi lokola Bayuda bazalaki kaka koboya ete bátika ngai, likambo mosusu ya kosala ezalaki te, nasɛngaki nakende kosamba epai ya Kaisala.+ Kasi ezali te lokola nde nazali kofunda ekólo na ngai. 20 Yango wana nasɛngaki namona bino mpe nasolola na bino, mpamba te ezali mpo na elikya ya Yisraele nde nazali na minyɔlɔlɔ oyo.”+ 21 Balobaki na ye: “Tozwi mikanda te oyo euti na Yudea mpo na yo, mpe moto moko te na kati ya bandeko oyo bauti kuna ayebisi biso to alobi likambo moko ya mabe mpo na yo. 22 Kasi tomoni ete ezali malamu tóyoka yo moko soki ozali kokanisa nini, mpo toyebi ete esika nyonso bazali koloba mabe+ mpo na mwa lingomba oyo.”+

23 Bayokanaki mokolo mpo bákutana lisusu, mpe bayaki ebele mpenza epai na ye na esika oyo azalaki kofanda. Kobanda ntɔngɔ tii mpokwa alimbwelaki bango likambo yango na ndenge apesaki litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe, mpo na kondimisa bango na oyo etali Yesu,+ kobanda na Mibeko ya Moize+ mpe Basakoli.+ 24 Bamosusu babandaki kondima makambo oyo alobaki; bamosusu bazalaki kondima te. 25 Lokola bazalaki koyokana te bango na bango, babandaki kokende, mpe Paulo alobaki likambo oyo:

“Elimo santu elobaki na ntina mpenza na nzela ya mosakoli Yisaya epai ya bankɔkɔ na bino, 26 ete, ‘Kende epai ya bato oyo mpe lobá : “Bokoyoka kasi bokokanga ntina ata moke te; mpe bokotala kasi bokomona ata moke te.+ 27 Mpo motema ya bato oyo ekómi makasi, bayoki na matoi na bango kasi basali eloko te, mpe bazipi miso na bango mpo bámona ata eloko moko te, bakangi mpe matoi na bango mpo báyoka ata eloko moko te, baboyi kokanga ntina na motema na bango mpe baboyi kozongela ngai mpo nabikisa bango.”’+ 28 Na yango, bóyeba ete nsango ya lobiko oyo euti na Nzambe, oyo bino boboyi, etindami epai ya bikólo;+ bango bakoyoka yango mpenza.”+ 29 *——

30 Afandaki mbula mibale mobimba na ndako na ye ya kofutela,+ mpe azalaki koyamba na boboto mpenza baoyo nyonso bazalaki koya epai na ye. 31 Azalaki kosakwela bango Bokonzi ya Nzambe mpe koteya makambo etali Nkolo Yesu Kristo polele mpenza* mpe na bosembo,+ kozanga kopekisama.

To, “tii na bansuka ya.”

To, “na ntaka ya mobembo ya mokolo ya sabata.”

Lil., “azalaki kokɔta mpe kobima.”

Talá Ap. A5.

Elingi koloba, atalelamaki lokola bantoma mosusu 11.

To, “na monɔkɔ ya mboka na ye.”

To, “vinyo ya sika.”

Lil., “ezali ngonga ya misato ya moi.”

To, “bilembo oyo emonisi makambo oyo ekoya.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

To, “makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya.”

To mbala mosusu, “bansinga.”

Talá Ap. A5.

To, “liboso ya miso na ngai.”

Lil., “nzoto na ngai ekofanda.”

To, “molimo na ngai.”

To, “Sheole.” Elingi koloba, Nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

To, “liboso ya elongi na yo.”

Lil., “auti na mbuma ya bangɛi na ye.”

To, “Sheole.” Elingi koloba, Nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ap. A5.

To, “bobomaki.”

Talá Ap. A5.

To, “milimo.”

To, “kosangana bango na bango.”

To, “makamwisi mingi ya komonisa makambo oyo ekoya.”

Talá Ap. A5.

Pene na ngonga ya libwa.

Lil., “euta na elongi ya Yehova.” Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

To, “molimo nyonso.”

Lil., “momboto.”

To, “kosakola polele lisekwa ya bakufi na likambo etali Yesu.”

Lil., “motó ya litumu.”

To, “mpiko.”

Elingi koloba, “batángaki te na bakelasi ya Barabi. Kasi elimboli te ete batángá te.”

To, “elembo.”

Talá Ap. A5.

To, “Kristo na ye.”

Talá Ap. A5.

To, “makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya.”

Lil., “motema kaka moko mpe molimo kaka moko.”

Talá Ap. A5.

To, “makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya.”

Talá Ap. A5.

Lil., “koyeisa makila ya moto wana likoló na biso.”

To, “bazokaki.”

Lil., “Tosepeli te.”

To, “makamwisi minene ya komonisa makambo oyo ekoya.”

Lil., “momboto.”

Lil., “momboto.”

To, “bakonyokola bango.”

To mbala mosusu, “asalaki bongo na.”

To, “mbuma.”

To, “milimo.”

To, “azalaki kitoko ata na miso ya Nzambe.”

To, “babɔkɔlaki ye.”

To, “babimisaki ye.”

To, “likanisi eyelaki ye na motema.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

To, “kokimela.”

To, “makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya.”

Talá Ap. A5.

Lil., “baoyo bokatamá ngenga te na motema mpe na matoi.”

To, “bazokaki na mitema na bango.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Lil., “nsɔngi ya ngɛngɛ.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A3.

Talá Ap. A5.

Lil., “kolínga; kokanga na minyɔlɔlɔ.”

To, “biteku.”

Lil., “ete amema bango na minyɔlɔlɔ.”

Lil., “azalaki kokɔta mpe kobima.”

Talá Ap. A5.

Nkombo Dorkasi na Grɛki mpe Tabita na Aramɛyɛ, nyonso mibale elimboli, “mboloko.”

To, “lilɔmbɔ.”

Lil., “Ngonga ya libwa ya moi.”

Lil., “na ngonga ya motoba.”

Lil., “motindo moko boye ya mbɛki.”

To, “asanzolaki ye.”

Lil., “ngonga ya libwa.”

Talá Ap. A5.

Lil., “alamwisaki.”

To, “bato ya sembo.”

To, “minɔkɔ mosusu.”

To, “kotyana na ye ntembe.”

Lil., “lolenge moko ya mbɛki.”

To, “biloko oyo ebendanaka na libumu.”

To, “natɛmɛla nzela ya Nzambe.”

Lil., “bafandaki nyɛɛ.”

To, “bolɔzi.”

Talá Ap. A5.

To, “mosala ya kosunga.”

To, “mpo asamba.”

Talá Ap. A5.

To, “Kangá mokaba.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

To, “azalaki na likanisi ya kobunda na.”

Lil., “moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela shambrɛ ya mokonzi.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

To, “kosala liboso ya bato nyonso mpo na.”

Talá Ap. A5.

To, “mosaleli.”

Guvɛrnɛrɛ Moroma ya etúká moko. Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Lil., “atombolaki bato oyo.”

Lil., “momboto.”

To, “lilita ya kokanisama.”

Lil., “alamwisaki.”

To, “oyo ezali sembo.”

To, “kosala mokano ya Nzambe.”

Lil., “alamwisaki.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

To, “milimo ya bato.”

Talá Ap. A5.

To, “makamwisi ya komonisa makambo oyo ezali koya.”

To, “milimo ya bayekoli.”

Talá Ap. A5.

To, “ntembe yango.”

To, “makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya.”

To, “ndako ya matiti; ndako.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

To, “likanisi.”

Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.

Elingi koloba, “nyama moko te ekolyama soki makila na yango esopani te.”

Lil., “basakolaka ye.”

Lil., “atángamaka.”

To, “milimo na bino.”

To, “milimo na bango.”

Elingi koloba, “nyama moko te ekolyama soki makila na yango esopani te.”

Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ap. A3.

Talá Ap. A5.

To mbala mosusu, “liboso ya makambo nyonso.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

To, “na nzela ya.”

Engumba oyo ezalaki na Itali te, kasi bana-mboka na yango bazalaki na ntomo ndenge moko na bato ya Itali.

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

To, “kozanga ete básambisa biso.”

To, “babaloli mabele oyo bato bafandi.”

To, “kokende kotala.”

To, “bomipesá mingi na losambo.”

To, “libota.”

To, “libota.”

To, “eyemami.”

To, “azalaki kokanisa elongo na bango.”

Elingi koloba, “sinagoga.”

Guvernɛrɛ ya etúká moko ya Roma. Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ap. A5.

Emonani ete ezali na Yerusaleme.

Lil., “alakisamaki na monɔkɔ na nzela ya.”

Talá Ap. A5.

Lil., “nzela.”

To, “kokómisa mitema na bango makasi mpe bazalaki kondima te.”

Talá Ap. A5.

Prokonsule azalaki guvernɛrɛ Moroma ya etúká moko. Talá Ndimbola ya maloba.

To, “molimo na ye ezali na kati na ye.”

To, “mpo na bolamu na bino.”

To, “molimo.”

To, “toli.”

To, “mpisoli.”

Lil., “bakwelaki Paulo na nkingo.”

Lil., “bangɔndɔ.”

Lil., “tofandaki kimya.”

Talá Ap. A5.

Elingi koloba, “nyama moko te ekolyama soki makila na yango esopani te.”

Na Grɛki pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.

To, “oyo asambisami te.”

To, “balobelaka makambo nyonso wana polele.”

Elingi koloba, soki ngonga ya libwa nsima ya midi.

To, “moto oyo atyaka mobulu.” Lil., “maladi mabe.”

Talá Ap. A3.

To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba. “Boyengebene.”

To, “ezangi mbeba.”

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “lingomba na bango moko.”

Titre oyo bazalaki kobenga ampɛrɛrɛ ya Roma.

To, “ekólo.”

Lil., “alamwisaka.”

Nzete oyo ezalaki na nsɔngɛ, ezalaki kosalelama mpo na kotambwisa nyama.

To, “milimo.”

Elingi koloba, “mopɛpɛ ya nɔrdi-ɛsti.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “ezalaki ya moke te.”

To, “molimo.”

Soki 36 m. Talá Ap. B14.

Soki 27 m. Talá Ap. B14.

To, “milimo.”

To, “bato oyo bazalaki koloba minɔkɔ ya bapaya.”

To, “etupa.”

Grɛki “Dike”; mbala mosusu elobeli nzambe mwasi oyo azongisaka mabe mpo bosembo esalema to mpe liloba bosembo kaka.

Talá Ap. A3.

To, “na mpiko mpenza.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto