Ndimbola ya maloba ya Biblia
A B D E F G H I K L M N O P R S T U V W Y Z
A
Abe.
Nkombo oyo bapesaki sanza ya mitano na kalandriye ya losambo ya Bayuda, nsima ya kolongwa na boombo na Babilone; ekokani na sanza ya zomi na moko na kalandriye sivile. Lelo ebandaka na katikati ya sanza ya nsambo tii katikati ya sanza ya mwambe. Biblia elobeli nkombo yango te; ebengi sanza yango kaka “sanza ya mitano.” (Mit 33:38; Ezr 7:9)—Talá Ap. B15.
Abibe.
Nkombo ya libosoliboso ya sanza ya liboso na kalandriye ya losambo ya Bayuda; ekokani na sanza ya nsambo na kalandriye sivile. Elimboli “Mbuma ya Mobesu.” Lelo ebandaka na katikati ya sanza ya misato tii katikati ya sanza ya minei. Nsima ya kouta na boombo na Babilone, ekómaki kobengama Nisana. (Mib 16:1)—Talá Ap. B15.
Adare.
Akaya.
Alamote.
Liloba ya miziki oyo elimboli “bana basi; bilenge basi.” Na ntembe te ezalaki komonisa mingongo ya soprano ya bilenge basi. Mbala mosusu ezalaki komonisa eteni moko ya miziki to ya loyembo oyo esengelaki kobɛtama na mongongo ya likoló.—1Nt 15:20; Nz 46:Mel.
Albatre.
Molangi ya moke ya mafuta ya nsolo kitoko oyo bazalaki liboso kosala yango na libanga moko oyo ezalaki pene na engumba Alabastron, na Ezipito. Milangi ya ndenge wana ezalaki mbala mingi na monɔkɔ ya moke oyo ekokaki kokangama mpo mafuta yango ya motuya esopana te. Na nsima, bakómaki kobenga libanga yango albatre.—Mr 14:3.
Alfa ná Omega.
Amen.
“Ezala bongo,” to “solo mpenza.” Euti na Ebre mpe elimboli “kozala sembo” to “kotyelama motema.” “Amen” esalelamaka mpo na komonisa ete tondimi ndai, libondeli, maloba moko boye. Na Emoniseli, esalelami lokola titre mpo na kolobela Yesu.—Mib 27:26; 1Nt 16:36; Em 3:14.
Anzelu.
Liloba ya Ebre malʼakh mpe ya Grɛki aggelos. Nyonso mibale elimboli “momemi-nsango,” kasi ebongolami na anzelu ntango ezali kolobela ekelamu ya elimo oyo azali momemi-nsango. (Eb 16:7; 32:3; Yk 2:25; Em 22:8) Baanzelu bazali bikelamu ya elimo ya nguya oyo Nzambe asalaki liboso mpenza akela bato na mabele. Biblia ebengi bango mpe “bamiriade basantu,” “bana ya Nzambe,” mpe “minzoto ya ntɔngɔ.” (Mib 33:2; Yb 1:6; 38:7) Basalemaki te na likoki ya kobota bana oyo bazali lokola bango, kasi bakelamaki. Motángo na bango eleki milio 100. (Da 7:10) Biblia emonisi ete baanzelu bazali na bankombo mpe anzelu mokomoko azali na bomoto na ye, kasi mingi na bango balingaka te koyebisa bankombo na bango. Na komikitisa nyonso balingaka te básambela bango. (Eb 32:29; Lk 1:26; Em 22:8, 9) Baanzelu nyonso bazali ndenge moko te mpe bazali na mikumba ndenge na ndenge. Na ndakisa, kosala liboso ya kiti ya bokonzi ya Yehova, kozala bamemi-nsango, kosalisa basaleli ya Yehova na mabele, kopesa bitumbu ya Nzambe mpe kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola nsango malamu. (2Ba 19:35; Nz 34:7; Lk 1:30, 31; Em 5:11; 14:6) Na mikolo ezali koya, bakopesa Yesu mabɔkɔ na etumba ya Armagedone.—Em 19:14, 15.
Anzelu-mokonzi.
Arame; Baarame.
Arame azalaki mwana ya Seme. Bato ya libota na ye, elingi koloba, Baarame bazalaki kofanda mingimingi na bitúká banda na bangomba ya Liban na wɛsti tii na Mezopotamia na ɛsti, mpe banda na bangomba ya Taurus na nɔrdi tii na Damasi mpe koleka na sudi. Esika yango ebengami Arame na Ebre, na nsima ekómaki kobengama Siri, mpe bafandi na yango bakómaki kobengama Bato ya Siri.—Eb 25:20; Mib 26:5; Hos 12:12.
Aramɛyɛ.
Monɔkɔ ya Moyen-Orient oyo ekokani mingi na monɔkɔ ya Ebre, mpe yango mibale esalelaka alfabɛ moko. Na ebandeli, ezalaki kolobama na Baarame, kasi na nsima ekómaki monɔkɔ ya kosolola mpe ya mombongo na mikili mingi ya ampire ya Siri mpe ya Babilone. Na Ampire ya Perse, bato bazalaki mpe kosalela monɔkɔ yango na babiro. (Ezr 4:7) Biteni mosusu ya buku ya Ezera, Yirimia, mpe Danyele ekomamaki na monɔkɔ ya Aramɛyɛ.—Ezr 4:8–6:18; 7:12-26; Yir 10:11; Da 2:4b–7:28.
Areopaje.
Ngomba moke moko ya Atene, na nɔrdi-wɛsti ya Acropole. Ezalaki mpe nkombo ya tribinale oyo ezalaki wana. Bato ya filozofi, Baepikire ná Basetoa bamemaki Paulo na areopaje mpo alimbola bindimeli na ye.—Mis 17:19.
Armagedone.
Euti na Ebre Har Meghiddôh, oyo elimboli “Ngomba ya Megido.” Esalelami mpo na kolobela “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” oyo “bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi” bakosangana mpo na kobunda na Yehova. (Em 16:14, 16; 19:11-21)—Talá BOLƆZI MONENE.
Asélgéïa.—
Talá ETAMBOLI YA NSƆNI NA NKO.
Ashitorete.
Nkombo ya nzambe-mwasi ya Bakakana mpo na etumba mpe kobota, mwasi ya Baala.—1Sa 7:3.
Azazele.
Azia.
Na Makomami ya Grɛki ya bokristo, ezali nkombo ya etúká ya Baroma oyo esangisi eteni ya wɛsti ya Turquie ya lelo, mpe bisanga mosusu ya pembenipembeni, lokola Samosi ná Patimosi. Engumba-mokonzi na yango ezalaki Efese. (Mis 20:16; Em 1:4)—Talá Ap. B13.
B
Baala.
Nzambe ya Bakanana; bazalaki kokanisa ete azalaki nkolo ya mapata, anɔkisaka mbula mpe asalaka ete mabele ebota. Bazalaki mpe kosalela nkombo “Baala” mpo na kolobela banzambe mosusu ya mike. Liloba yango ya Ebre elimboli “Nkolo.”—1Ba 18:21; Ro 11:4.
Baepikire.
Bato oyo bazalaki kolanda Epicurus, moto ya filozofi ya ekólo Grɛsi (341-270 L.T.B.). Mateya na bango ezalaki komonisa mingimingi ete esengo ya moto nde eloko eleki ntina na bomoi.—Mis 17:18.
Bafarisai.
Mwa lingomba ya lokumu ya Bayuda na siɛklɛ ya liboso ya T.B. Bautaki te na libota ya banganga-nzambe, kasi bazalaki kokangama makasi na Mobeko, ata na makambo ya mikemike, mpe bazalaki kokangama makasi na makambo ya bonkɔkɔ. (Mt 23:23) Bazalaki kolinga ata mimeseno moko te ya Bagrɛki, mpe lokola bayebaki malamu mibeko mpe mimeseno, bazalaki mpenza na bokonzi mingi likoló ya bato. (Mt 23:2-6) Bafarisai mosusu bazalaki kosala na Sanedrina. Mbala mingi bazalaki kotɛmɛla Yesu na oyo etali kotosa Sabata, mimeseno mpe kozala elongo na basumuki mpe bakɔngɔli-mpako. Basusu bakómaki Bakristo, na ndakisa Saulo moto ya Tarse.—Mt 9:11; 12:14; Mr 7:5; Lk 6:2; Mis 26:5.
Bakeruba.
Baanzelu ya lokumu mingi mpe bakokisaka mikumba ya ntina mingi. Bakeseni na baserafɛ.—Eb 3:24; Kob 25:20; Yis 37:16; Ebr 9:5.
Bakɛngɛli ya mokonzi ya Roma.
Etuluku ya basoda ya Roma oyo esalemaki mpo na kobatela amperɛrɛ ya Roma. Etuluku yango ekómaki makasi na makambo ya politiki; bazalaki kosalisa mpo na kopona baamperɛrɛ to kolongola bango.—Flp 1:13.
Bamajistra.
Na nse ya guvɛrnema ya Babilone, bamajistra bazalaki bakonzi ya bato na bitúká oyo eyangelami, oyo bayebaki mibeko mpe bokonzi na bango ezalaki na ndelo. Na bitúká oyo eyangelamaki na Baroma, bamajistra bazalaki bakambi na guvɛrnema. Mikumba na bango ezalaki: kosala ete makambo etambola na molɔngɔ, kolandela makambo ya mbongo, kosambisa bato oyo babuki mibeko, mpe kosala ete etumbu epesama.—Da 3:2; Mis 16:20.
Bamede; Media.
Bamede bazalaki bana oyo bautaki na mwana ya Yafete, Madai. Bafandaki na ngomba patatalu oyo na nsima ekómaki ekólo ya Bamede, esika Iran ezali lelo. Bamede basanganaki na Babilone mpo na kolonga Asiri. Na ntango yango, Perse ezalaki etúká oyo eyangelamaki na Media, kasi Siruse atombokaki mpe Media esanganaki na Perse mpe esalaki Ampire ya Bamede ná Baperse oyo elongaki Ampire ya Babilone na 539 L.T.B. Bamede bazalaki na Yerusaleme na pantekote ya 33 T.B. (Da 5:28, 31; Mis 2:9)—Talá Ap. B9.
Bana ya Arona.
Bato ya libota ya Arona, bankɔkɔ ya Levi. Arona aponamaki mpo azala nganga-nzambe monene ya liboso na kotalela Mobeko ya Moize. Bana ya Arona bazalaki kosala misala oyo etalaki bonganga-nzambe na tabernakle mpe na tempelo.—1Nt 23:28.
Bapɛnsi.
Ezalaki biloko oyo esalemaki na wolo. Bazalaki kosalela yango na tabernakle mpe na tempelo mpo na kotya mɔtɔ na miinda.—Kob 37:23.
Basadukai.
Mwa lingomba ya lokumu ya Bayuda. Bato na yango bazalaki bazwi ya lokumu mpe banganga-nzambe oyo bazalaki na bokonzi monene na misala oyo ezalaki kosalema na tempelo. Basadukai bazalaki koboya mimeseno mingi oyo ezalaki kopesama na nzela ya maloba oyo Bafarisai mpe bato mosusu ya lingomba na bango bazalaki kondima. Basadukai bazalaki kondimela lisekwa te. Bazalaki mpe kondima te ete baanzelu bazalaka. Bazalaki kotɛmɛla Yesu.—Mt 16:1; Mis 23:8.
Basamaria.
Ezali nkombo oyo esalelamaki na ebandeli mpo na Bayisraele ya bokonzi ya mabota zomi na nɔrdi. Kasi ntango bato ya Asiri balongaki Samaria na 740 L.T.B., bapaya oyo bato ya Asiri bamemaki kuna bakómaki mpe kobengama Basamaria. Na mikolo ya Yesu, na esika ete nkombo yango ezala mpo na loposo to makambo ya politiki, ekómaki nde komonisa bato oyo bazalaki na mwa lingomba, oyo bazalaki zingazinga ya Shekeme mpe Samaria ya kala. Bandimi ya mwa lingomba yango bazalaki na bindimeli mosusu oyo ekesanaki mpenza na oyo ya Bayuda.—Yn 8:48.
Basambisi.
Bato oyo Yehova asalelaki mpo na kobikisa bato na ye liboso ete Yisraele ekóma na bakonzi.—Bas 2:16.
Baserafɛ.
Basetoa (bato ya filozofi).
Ezalaki eteyelo ya bato ya filozofi ya Grɛki. Bango bazalaki kokanisa ete bolamu elimboli koyeba ntina ya bomoi mpe ndenge makambo ezalaka na mokili. Mpo na bango, moto ya bwanya ya solosolo, akipaka mpasi to bisengo te.—Mis 17:18.
Bati.
Batisimo; Kobatisa.
Bato ya Erode.—
Beelezebube.
Bikanga-makolo.
Bikeko ya banzambe ya libota (Terafime).
Ezalaki banzambe ya libota to bikeko, na bantango mosusu, bazalaki koluka koyeba makambo oyo ekoya na nzela na yango. (Ezk 21:21) Bikeko yango mosusu ezalaki minene mpe milai lokola moto, mosusu ezalaki moke mpenza. (Eb 31:34; 1Sa 19:13, 16) Makambo mosusu oyo bato ya Arkeoloji bamonaki na Mezopotamia emonisi ete moto oyo azali na bikeko ya baterafime asengelaki kozwa libula ya libota. (Yango emonisi ntina oyo Rashele azwaki baterafime ya tata na ye.) Emonani ete ezalaki kosalema bongo te na Yisraele, atako na eleko ya basambisi mpe ya bakonzi bato mosusu bazalaki kosambela bikeko na Yisraele, mpe baterafime yango ezalaki na kati ya biloko oyo Mokonzi Yosiya abebisaki.—Bas 17:5; 2Ba 23:24; Hos 3:4.
Bilei ya Mpokwa ya Nkolo.
Elambo oyo basalelaka limpa ezangá levire mpe vinyo, oyo elakisi nzoto mpe makila ya Kristo, ekaniseli ya liwa ya Yesu. Lokola ezali molulu oyo Biblia esɛngi bakristo básalaka, yango wana liloba “Ekaniseli” ebongi mpenza.—1Ko 11:20, 23-26.
Biloko ya koboma mɔtɔ.
Bisaleli oyo bazalaki kosalela na tabernakle mpe na tempelo; esalemaki na wolo mpe kwivre. Mbala mosusu ezalaki lokola basizo oyo bazalaki kosalela mpo na kokata bansinga ya miinda mpo na koboma yango.—2Ba 25:14.
Biloko ya kotya mɔtɔ.
Esalemaki na wolo, palata to kwivre. Bazalaki kosalela yango na tabernakle mpe na tempelo mpo na kotumba mpaka ya malasi mpe kolongola makala ya mɔtɔ na etumbeli ya bambeka mpe bansinga ya etɛlɛmiselo ya mwinda ya wolo. Bazalaki mpe kobenga yango eloko ya kotumba mpaka ya malasi.—Kob 37:23; 2Nt 26:19; Ebr 9:4.
Bingumba ya ekimelo.
Ezali bingumba ya Balevi epai moto oyo abomi moto na nko te akokaki kokima mpo mozongisi mabe mpo na makila aboma ye te. Bingumba yango ezalaki motoba mpe ekabolamaki na mokili oyo Nzambe alakaki bango, oyo na litambwisi ya Yehova, Moize aponaki yango mpe nsima Yosua. Ntango moto oyo azalaki kokima akómi na engumba ya ekimelo, azalaki koyebisa bankulutu likambo na ye na porte ya engumba mpe bazalaki koyamba ye. Mpo na koboya ete bato oyo babomi moto na nko bábatelama na ebongiseli yango, moto oyo akimi na engumba ya ekimelo asengelaki kosambisama na engumba epai likama yango esalemaki mpo amonisa soki asalaki yango na nko te. Soki asalaki yango na nko te, asengelaki kozonga na engumba ya ekimelo mpe kofanda kuna na kati ya bandelo ya engumba yango tii na nsuka ya bomoi na ye to tii nganga-nzambe monene akokufa.—Mit 35:6, 11-15, 22-29; Yos 20:2-8.
Blé ya mposo makasi.
Ezali lolenge moko ya blé (Triticum spelta) oyo mposo na yango ekangamaka makasi na mbuma na yango.—Kob 9:32.
Boboto monene.
Liloba ya Grɛki oyo epesaka likanisi ya oyo endimami mpe oyo ezali kitoko makasi. Mbala mingi, liloba yango esalelami mpo na kolobela likabo ya boboto to kopesa na boboto. Ntango elobeli boboto monene ya Nzambe, liloba yango emonisaka likabo ya ofele oyo Nzambe apesi na bolingo mpenza, kozanga kozela ete bázongisela ye eloko. Na yango, ezali komonisa bolingo ya Nzambe mpe boboto na ye epai ya bato. Liloba yango ya Grɛki ebongolamaka mpe na “kondimama” mpe “likabo ya boboto.” Ezali likabo oyo moto akoki kozwa kozanga kosala eloko mpe abongi na yango te, epesamaka na bolingo mpe na motema moko.—2Ko 6:1; Ef 1:7.
Bokonzi ya Nzambe.
Bolɛngɛli.
Ezali nkombo ya mokolo oyo ezalaki liboso ya Sabata; na mokolo yango nde Bayuda bazalaki kolɛngɛla makambo oyo esengeli. Mokolo ezalaki kosuka na kolala ya moi ya mokolo oyo tobengaka lelo mokolo ya mitano, na ntango wana nde Sabata ezalaki kobanda. Mokolo ya Bayuda ezalaki kobanda na mpokwa tii na mpokwa.—Mr 15:42; Lk 23:54.
Bolingo ya sembo.
Bolɔzi.
Na Makomami ya Ebre, liloba oyo emonisaka maladi to mpasi oyo euti epai ya Yehova lokola etumbu. Na Makomami ya Grɛki ya bokristo, emonisaka ndenge bazalaki kobɛta makasi fimbo oyo bazalaki kokanga lizita na nsuka.—Mit 16:49; Yn 19:1.
Bolɔzi monene.
Liloba ya Grɛki mpo na “bolɔzi” epesaka likanisi ya bwale to mpasi oyo eutaka na likambo moko ya mabe oyo ezali kosalema. Yesu alobelaki “bolɔzi monene” oyo esalemá naino te, oyo esengelaki koyela Yerusaleme mpe mingimingi oyo na nsima ekoyela bato nyonso, ntango ‘akoya na nkembo.’ (Mt 24:21, 29-31) Paulo alobelaki bolɔzi yango lokola misala ya bosembo ya Nzambe epai ya “baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali koboya kotosa nsango malamu” oyo etali Yesu Kristo. Emoniseli mokapo 19 elobeli Yesu lokola moto oyo azali kotambwisa mampinga ya likoló mpo na kobundisa “nyama mabe, bakonzi ya mabele mpe mampinga na bango.” (2Te 1:6-8; Em 19:11-21) Biblia elobi mpe ete “ebele mpenza ya bato” bakobika na bolɔzi yango. (Em 7:9, 14)—Talá ARMAGEDONE.
Bondɔki.
Ezali kosalela nguya oyo eyebani ete euti epai ya bilimo mabe.—2Nt 33:6.
Bopɛto.
Na Biblia, liloba yango ezali komonisa bopɛto ya nzoto. Kasi ekoki mpe kolobela bopɛto ya makanisi to ya elimo ya moto to ya eloko, elingi koloba kobatela to kozongela etamboli moko oyo ezali na litɔnɔ te, ezangi mbɛba, ezali ya kopɔla te, ezangi efundeli mpe ekabwani na eloko nyonso oyo ekómisaka mbindo na elimo to na nzoto. Na Mibeko ya Moize, liloba yango emonisaka kozala pɛto na kolanda milulu ya kopɛtolama.—Le 10:10; Nz 51:7; Mt 8:2; 1Ko 6:11.
Boyengebene.
Na Biblia, liloba wana ekoki komonisa moto oyo azali na etamboli ya malamu na likambo etali mibeko oyo Nzambe atyá mpo na malamu ná mabe. (Mib 6:25; Mas 11:4; Sef 2:3; Mt 6:33) Na bavɛrsɛ mosusu, makanisi ya maloba ya Ebre mpe ya Grɛki ekoki kobongolama na maloba lokola “oyo ezali malamu,” “kosala oyo ezali malamu,” to “bosembo.” Soki esalelami mpo na Nzambe, ezaleli wana emonisaka ete azali mpenza sembo mpe alandaka mibeko na ye oyo etali boyengebene, ntango azali kosambisa to komonisa motema mawa.—Nz 9:8; Yis 56:1; Ro 3:25.
Bulu.
D
Dagone.
Azalaki nzambe ya Bafilistia. Esika liloba yango euti eyebani mpenza te, kasi bato mosusu ya mayele balobaka ete ezali na boyokani na liloba ya Ebre dagh (mbisi).—Bas 16:23; 1Sa 5:4.
Darike.
Dekapolisi.
Etuluku ya bingumba ya Bagrɛki, esangisaki bingumba zomi (liloba ya Grɛki deka, elakisi “zomi,” mpe polis, elakisi “engumba”). Ezalaki mpe nkombo ya etúká ya ɛsti ya Mbu ya Galile mpe Ebale Yordani, esika bingumba yango mingi ezalaki. Bingumba yango ezalaki esika ya mimeseno mpe ya mombongo ya Bagrɛki. Yesu alekaki na etúká yango, kasi Baevanzile eyebisi te soki akɔtaki na bingumba yango. (Mt 4:25; Mr 5:20)—Talá Ap. A7 mpe B10.
Demo.
Ekelamu ya elimo ya mabe oyo azali na nguya koleka oyo ya bato. Ebandeli 6:2 ebengi bango “bana ya Nzambe ya solo” mpe Yuda 6 ebengi bango “baanzelu,” bazalaki mabe te ntango bakelamaki; kasi bamikómisaki banguna ya Nzambe ndenge batosaki ye te na mikolo ya Noa mpe balandaki Satana oyo atombokelaki Yehova.—Mib 32:17; Lk 8:30; Mis 16:16; Yk 2:19.
Denari.
Drakime.
E
Ebre.
Nkombo oyo esalelamaki liboso mpo na Abrama (Abrahama), mpo na kokesenisa ye na Baamore oyo bazalaki zingazinga na ye. Na nsima ekómaki komonisa bana ya Abrahama oyo bautaki epai ya nkɔkɔ na ye Yakobo mpe ekómaki monɔkɔ na bango. Na ntango ya Yesu, Ebre ekómaki na maloba mingi ya Aramɛyɛ mpe Yesu ná bayekoli na ye bazalaki koloba yango.—Eb 14:13; Kob 5:3; Mis 26:14.
Edome.
Efa.
Emekeli ya biloko ya kokauka. Bazalaki kosalela yango mpo na komekela bambuma. Ekokani na bati, mezire ya biloko ya maimai, oyo ezali 22 L. (Kob 16:36; Ezk 45:10)—Talá Ap. B14.
Efode.
Efraime.
Efrate.
Ebale ya molai mpe ya ntina mingi na sudi-wɛsti ya Azia, mpe moko ya bibale minene ya Mezopotamia. Biblia elobeli yango mpo na mbala ya liboso na Ebandeli 2:14, lokola moko ya bibale minei ya Edene. Efrate ebengami mbala mingi “Ebale.” (Eb 31:21) Ezalaki ndelo na nɔrdi ya teritware ya Yisraele. (Eb 15:18; Em 16:12)—Talá Ap. B2.
Ekamwelo ya vinyo.
Ekamwelo ya vinyo ezalaki na mwa mabulu mibale na kati ya libanga; moko ezalaki molai koleka moninga, mpe ezalaki na tiyo moko oyo esangisaki yango. Bazalaki konika mbuma ya vinyo na mwa libulu oyo ezalaki likoló mpe vinyo ezalaki kokita na oyo ya nse. Liloba yango esalelami na ndenge ya elilingi mpo na kolobela lisambisi ya Nzambe.—Yis 5:2; Em 19:15.
Ekanganeli.
Nzete oyo moto azalaki komema na mapeka; bazalaki kotya mikumba na ngámbo nyonso mibale. Mwa libaya to mwa nzete oyo bazalaki kotya na bankingo ya nyama mibale (mbala mingi bangɔmbɛ) ntango bazalaki kobalola mabele to kobenda shario. Lokola baombo bazalaki mbala mingi kosalela ekanganeli mpo na komema mikumba ya kilo, ekanganeli ekómaki kosalelama na ndenge ya elilingi mpo na kolobela boombo to kozala na nse ya bokonzi moko boye, ezala mpe monyoko to mpasi. Kolongola to kobuka ekanganeli ezalaki kolakisa kozwa bonsomi na boombo, na minyoko mpe na kolyela.—Le 26:13; Mt 11:29, 30.
Ekeko; losambo ya bikeko.
Ekeko ezali elilingi, elilingi ya eloko moko oyo ezalaka to ya makanisi kaka, oyo bato basalelaka na losambo. Losambo ya bikeko ezali kogumbamela, kolinga, kosambela to kokumisa ekeko.—Nz 115:4; Mis 17:16; 1Ko 10:14.
Ekobo.
Ezali mobali to mwasi oyo abalá asangisi nzoto na moto oyo azali molongani na ye te.—Kob 20:14; Mt 5:27; 19:9.
Elakeli mabe.
Kokanela to koloba mabe na moto to na eloko. Yango ekeseni na kobimisa maloba mabe na nkanda makasi. Mbala mingi elakeli mabe elakisaka kolakela moto mabe to koloba mabe oyo ekokómela moto. Mpe soki euti epai ya Nzambe to epai ya moto oyo ye atindi, ekokani na esakweli mpe ekokokisama mpenza.—Eb 12:3; Mit 22:12; Ga 3:10.
Elako.
Elekeli.
Fɛti oyo ezalaki kosalema mbula na mbula na mokolo ya 14 ya sanza ya Abibe (oyo na nsima ekómaki kobengama Nisana), mpo na kokanisa mokolo oyo Bayisraele babimaki na Ezipito. Bazalaki koboma mpe kotumba mwana-mpate to ntaba, bazalaki kolya yango elongo na ndunda ya bololo mpe limpa ezangá levire.—Kob 12:27; Yn 6:4; 1Ko 5:7.
Eleko ya nsuka ya mokili; bosukisi ya makambo ya ntango.
Eleko oyo ekomema na nsuka ya mokili oyo etambwisami na Satana, elingi koloba ebongiseli nyonso oyo azali koyangela. Ebandaki nzela moko na kozala ya Kristo. Na litambwisi ya Yesu, “baanzelu bakokabola bato mabe na bato ya sembo” mpe bakoboma bato mabe. (Mt 13:40-42, 49) Bayekoli ya Yesu balukaki koyeba “eleko ya nsuka” yango ekobanda ntango nini. (Mt 24:3) Liboso azonga na likoló, Yesu alakaki bayekoli na ye ete akozala elongo na bango tii na ntango wana.—Mt 28:20.
Elembo.
Ezali eloko, mosala, likambo, to eloko moko oyo esalemaka mingi te oyo ezali kolimbola eloko moko boye to komonisa likambo mosusu oyo ezali kosalema to oyo ekoya.—Eb 9:12, 13; 2Ba 20:9; Mt 24:3; Em 1:1.
Elembo ya lopɛtɛ.
Elimo.
Liloba ya Ebre rouah mpe ya Grɛki pneuma, oyo mbala mingi ebongolami na “elimo,” ezali na bandimbola mingi. Yango nyonso elobelaka eloko oyo emonanaka te na miso ya bomoto mpe emonanaka na makambo oyo yango esalaka. Liloba yango ya Ebre mpe ya Grɛki esalelamaka mpo na kolobela (1) mopɛpɛ, (2) nguya ya bomoi ya bikelamu ya mabele, (3) nguya oyo eutaka na motema ya elilingi ya moto mpe etindaka ye aloba to asala eloko moko boye, (4) maloba oyo epemami, oyo eutaka na esika oyo emonanaka te, (5) bato oyo bazali na nzoto ya elimo, mpe (6) nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala, to elimo santu.—Kob 35:21; Nz 104:29; Mt 12:43; Lk 11:13.
Elimo santu.
Elule.
Esakweli.
Nsango oyo euti na Nzambe, ekoki kozala emoniseli ya mokano ya Nzambe, to mpe koyebisama na yango. Esakweli ekoki mpe kozala mateya ya Nzambe, etinda na ye to lisambisi, to mpe koyebisama ya likambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya.—Ezk 37:9, 10; Da 9:24; Mt 13:14; 2Pe 1:20, 21.
Esika Eleki Mosantu.
Eteni ya kati mpenza ya tabernakle mpe ya tempelo, esika oyo sanduku ya kondimana ezalaki; ebengami mpe Esika Mosantu ya Bisika Mosantu. Na Mobeko ya Moize, kaka nganga-nzambe monene nde azalaki kokɔta na Esika Eleki Mosantu, mbala moko na mbula na Mokolo ya kozipa masumu.—Kob 26:33; Le 16:2, 17; 1Ba 6:16; Ebr 9:3.
Esika Mosantu.
Esika ya liboso mpe oyo eleki monene na tabernakle to na tempelo, yango ekeseni na eteni ya kati mpenza, Esika Eleki Mosantu. Na tabernakle, Esika Mosantu ezalaki na etɛlɛmiselo ya mwinda ya wolo, etumbelo ya wolo ya mpaka ya malasi, mesa ya mampa ya kolakisa, mpe bisaleli ya wolo. Na tempelo, ezalaki na etumbelo ya wolo, bitɛlɛmiselo ya miinda zomi, mpe bamesa ya mampa ya kolakisa zomi. (Kob 26:33; Ebr 9:2)—Talá Ap. B5 mpe B8.
Esika mosantu.
Na Biblia, maloba yango emonisaka esika oyo etyami pembeni mpo na losambo, esika mosantu. Kasi mbala mingi emonisaka tabernakle to tempelo ya Yerusaleme. Maloba yango esalelamaka mpe mpo na kolobela esika oyo Nzambe afandaka na likoló.—Kob 25:8, 9; 2Ba 10:25; 1Nt 28:10; Em 11:19.
Esika oyo etombwaná.
Esika ya losambo, mbala mingi ezalaki kosalema na nsɔngɛ ya ngomba moke, na ngomba to mwa esika oyo bato basali. Atako na bantango mosusu bazalaki kosalela bisika oyo etombwaná mpo na kosambela Nzambe, mbala mingi ezalaki mpo na losambo ya bapakano ya banzambe ya lokuta.—Mit 33:52; 1Ba 3:2; Yir 19:5.
Esika ya mɔtɔ makasi (Libulu ya).
Esika oyo bazalaki konyangwisa mabanga ya ntalo to ebende; bazalaki mpe kosalela yango mpo na kotumba biloko oyo esalemi na mabele ya lima mpe bambɛki. Na ntango ya kala, bazalaki kosala esika ya mɔtɔ makasi na babriki to mabanga. Maloba yango esalelamaka mpe mpo na kolobela esika ya kotumba mampa to bilei.—Eb 15:17; Da 3:17; Em 9:2.
Erode.
Nkombo ya libota ya bokonzi oyo ekólo ya Baroma etyaki mpo eyangela Bayuda. Erode Monene ayebanaki mpo atongaki lisusu tempelo ya Yerusaleme mpe ndenge apesaki mitindo báboma bana mike ata mpe Yesu. (Mt 2:16; Lk 1:5) Erode Arkelausi mpe Erode Antipasi, bana mibali ya Erode monene, batyamaki mpo na koyangela bateritware mosusu ya tata na bango. (Mt 2:22) Antipasi azalaki tétrarque, ayebanaki mingi lokola “mokonzi,” oyo ayangelaki na boumeli ya mbula misato na ndambo ya mosala ya Kristo mpe na eleko oyo esuki na Misala ya Bantoma mokapo 12. (Mr 6:14-17; Lk 3:1, 19, 20; 13:31, 32; 23:6-15; Mis 4:27; 13:1) Nsima na yango, Erode Agripa I, nkɔkɔ ya Erode Monene, ayangelaki ntango moke mpe na nsima anzelu abomaki ye. (Mis 12:1-6, 18-23) Mwana na ye, Erode Agripa II, akómaki mokonzi mpe ayangelaki tii ntango Bayuda batombokelaki Roma.—Mis 23:35; 25:13, 22-27; 26:1, 2, 19-32.
Erode, lingomba ya bato ya.
Ezalaki lingomba ya politiki ya ekólo oyo ezalaki kopesa mabɔkɔ na mikano ya politiki ya Erode na nse ya boyangeli ya Baroma. Ekoki kozala ete Basadukai mosusu bazalaki bato ya lingomba yango. Bato ya Erode basanganaki na Bafarisai mpo na kotɛmɛla Yesu.—Mr 3:6.
Etamboli ya nsɔni na nko.
Euti na liloba ya Grɛki asélgéïa, ezali kolobela moto oyo abukaka na nko mpenza mibeko ya Nzambe mpe na makanisi na ye azali kondima na motó makasi nyonso etamboli wana ya nsɔni; elimo oyo ezali komonisa kozanga kotosa to koboya bokonzi, mibeko mpe mitinda. Maloba yango ezali te makambo ya mikemike ya mabe.—Ga 5:19; 2Pe 2:7.
Etanime.
Etiopi.
Ekólo ya kala na sudi ya Ezipito. Esangisaki eteni monene ya sudi ya Ezipito ya lelo mpe Soudan ya lelo. Na bantango mosusu liloba yango esalelamaka mpo na liloba ya Ebre “Kushi.”—Est 1:1.
Etumbelo.
Etando moko etombwaná oyo esalemi na mabele to na mabanga, libondo ya mabanga, to mabaya oyo ezipami na ebende, oyo likoló na yango bazalaki kopesa bambeka to mpaka ya malasi mpo na losambo. Na eteni ya liboso ya Tabernakle mpe ya tempelo, ezalaki na “etumbelo ya wolo” ya moke mpo na kopesa mbeka ya mpaka ya malasi. Esalemaki na mabaya oyo ezipami na wolo. “Etumbelo ya kwivre” moko ya monene mpo na kopesa bambeka ya kotumba ezalaki libándá na lopango. (Kob 27:1; 39:38, 39; Eb 8:20; 1Ba 6:20; 2Nt 4:1; Lk 1:11)—Talá Ap. B5 mpe B8.
Ezaleli ya kokangama na Nzambe.
Ezipeli ya kozipa masumu.
Ezalaki ezipeli ya sanduku ya kondimana, oyo liboso na yango nganga-nzambe monene azalaki komwangisa makila ya bambeka ya masumu na Mokolo ya kozipa masumu. Ezali maloba ya Ebre oyo euti na liloba oyo elimboli “kozipa likoló (lisumu)” to mbala mosusu “koboma (lisumu).” Esalemaki na wolo ya makasi, oyo ezalaki na bakeruba mibale, mokomoko atyamaki na nsuka nyonso. Ntango mosusu emonisaka kaka “ezipeli.” (Kob 25:17-22; 1Nt 28:11; Ebr 9:5)—Talá Ap. B5.
F
Farao.
Fɛti ya Bandako ya matiti.
Ebengami mpe Fɛti ya Batabernakle, to fɛti ya Koyanganisa mbuma. Ezalaki kosalema banda na mokolo ya 15 tii 21 ya sanza ya Etanime. Bazalaki kosala yango na ntango ya kobuka mbuma na nsuka ya mbula ya bilanga na Yisraele mpe ezalaki ntango moko ya kosepela mpe ya kopesa Yehova matɔndi mpo na mapamboli na biloko oyo bazwi. Na boumeli ya mikolo ya fɛti yango, bato bazalaki kofanda na bandako ya matiti, ezalaki kokundwela bango kobima na bango na Ezipito. Ezalaki moko ya bafɛti misato oyo mibali basengelaki kokende kosala yango na Yerusaleme.—Le 23:34; Ezr 3:4.
Fɛti ya Bofungoli.
Fɛti ya kokanisa mokolo oyo bapɛtolaki tempelo nsima ya kokómisa yango mbindo epai ya Antiochus Épiphane; ezalaki kosalema mbala moko na mbula. Fɛti yango ezalaki kobanda mokolo ya 25 ya sanza ya Kisleve mpe ezalaki koumela mikolo mwambe.—Yn 10:22.
Fɛti ya Kobuka mbuma; Fɛti ya Bapɔsɔ.—
Talá PANTEKOTE.
Fɛti ya Mampa ezangá levire.
Moko ya bafɛti ya minene ya Bayisraele na mbula. Ezalaki kobanda mwa 15 sanza ya Nisana, mokolo oyo elandaki Pasika, mpe ezalaki kokoba na boumeli ya mikolo nsambo. Bazalaki kolya kaka mampa ezangá levire mpo na kokanisa kobima na bango na Ezipito.—Kob 23:15; Mr 14:1.
Filistia; Bafilistia.
Filistia ezalaki mokili moko oyo ezalaki pene na bokula ya Mbu ya mediterane, na sudi ya Yisraele. Bapaya oyo bautaki na Krɛtɛ mpe bakómaki kofanda kuna bazalaki kobenga bango Bafilistia. Davidi alongaki bango, kasi bazalaki kaka na bonsomi na bango mpe bazalaki ntango nyonso banguna ya Yisraele. (Kob 13:17; 1Sa 17:4; Am 9:7)—Talá Ap. B4.
G
Gehena.
Nkombo ya Lobwaku ya Hinome na Grɛki, oyo ezalaki na sudi mpe sudi-wɛsti ya Yerusaleme ya kala. (Yir 7:31) Esakweli elobelaki yango lokola esika oyo ekotonda na bibembe. (Yir 7:32; 19:6) Eloko moko te emonisi ete bazalaki kobwaka banyama to bato ya bomoi na Gehena mpo na kotumba to konyokola bango. Na yango na ndenge ya elilingi, Gehena ekoki komonisa te esika oyo milimo ya bato enyokwamaka libela na libela na mɔtɔ ya solo. Nzokande, Yesu ná bayekoli na ye basalelaki liloba Gehena mpo na kolobela etumbu ya seko ya “liwa ya mibale,” elingi koloba, libebi ya seko.—Em 20:14; Mt 5:22; 10:28.
Gera.
Gileade.
Mbala mingi liloba yango emonisaka etúká oyo milona ezalaki kobota mingi na ɛsti ya Ebale Yordani, oyo ekendaki tii na nɔrdi mpe sudi ya Lobwaku ya Yaboke. Na bantango mosusu esalelamaka mpo na teritware mobimba ya Yisraele na ɛsti ya Yordani, esika mabota ya Rubene, Gade, mpe ndambo ya libota ya Manase ezalaki kofanda. (Mit 32:1; Yos 12:2; 2Ba 10:33)—Talá Ap. B4.
Gitite.
Liloba ya miziki oyo ndimbola na yango eyebani mpenza te, kasi emonani ete euti na liloba ya Ebre gath. Basusu bakanisaka ete ekoki kozala mondule oyo ezalaki kobɛtama elongo na banzembo oyo bazalaki koyemba ntango bazali kosala vinyo, lokola gath ezali ekamwelo ya vinyo.—Nz 81:Mel.
Grɛki.
H
Hadesi.
Liloba ya Grɛki oyo ekokani na liloba ya Ebre “Sheole.” Ebongolami na “Nkunda” (na lɛtrɛ ya monene), mpo na komonisa lilita ya bato nyonso.—Talá NKUNDA.
Hema ya kokutana.
Hermesi.
Nzambe moko ya Bagrɛki, mwana ya Zeusi. Bagrɛki bazalaki kondima ete Hermesi azalaki molobeli ya banzambe mpe ya bateyi malamu, yango wana babengaki Paulo Hermesi na Listra.—Mis 14:12.
Higayone.
Liloba moko ya kokamba miziki. Ndenge esalelami na Nzembo 9:16, liloba yango ekoki komonisa kopema ya miziki oyo babɛti na nzɛnzɛ to kopema mwa ntango mpo na komanyola.
Hini.
Homɛrɛ.
Horebe; Ngomba Horebe.
I
Ilirikume.
Izope.
Nzete oyo ezali na bitape mpe nkasa ya mikemike. Bazalaki kosalela yango mpo na komwangisa makila to mai na milulu ya kopɛtola. Ekoki kozala origan de Syrie (Origanum maru; Origanum syriacum). Ndenge esalelami na Yoane 19:29, ekokaki kozala origan de Syrie oyo ekangisami na etape moko to na nzete babengi doura, lolenge moko ya sorgho (Sorghum vulgare), mpo nzete yango ekokaki kobimisa mwa nzete ya molai oyo ekoki komema éponge oyo bazindisaki na vinyo ya ngayi na monɔkɔ ya Yesu.—Kob 12:22; Nz 51:7.
K
Kabe.
Kaisala.
Nkombo ya libota ya Roma, oyo ekómaki titre mpo na baampɛrɛrɛ ya Roma. Biblia etángi bankombo ya Bakaisala misato: Augusto, Tibere, mpe Klode. Atako etángi nkombo ya Nero te, kasi na bisika mosusu, titre Kaisala ezali kolobela ye. “Kaisala” esalelami mpe na Makomami ya Grɛki ya bokristo mpo na kolobela bokonzi ya leta.—Mr 12:17; Mis 25:12.
Kaladea; Bakaladea.
Na ebandeli, ezalaki nkombo ya ekólo mpe ya bato oyo bazalaki kofanda na lobɔkɔ ya ebale Tigre mpe Efrate; kendekende, bankombo yango ekómaki kosalelama mpo na Babilonia mpe bato na yango nyonso. Nkombo “Bakaladea” ezali kolobela mpe bato oyo batángá, oyo bayekolá siansi, istware, minɔkɔ mpe makambo etali minzoto kasi bazalaki mpe kosalela maji ná astroloji.—Ezr 5:12; Da 4:7; Mis 7:4.
Kanana.
Kapita.
Kashɛ; Kotya elembo.
Eloko oyo bazalaki kosalela mpo na kotya kashɛ (mbala mingi na mabele ya lima to na mafuta) oyo ezalaki komonisa soki eloko ezali ya nani, ezali ya solosolo, to endimami. Bilembo ya kala ezalaki na eteni ya esaleli moko ya makasi (libanga, mpɛmbɛ ya nzoko, to libaya) oyo likoló na yango ezalaki na likomi to liyemi oyo bakati kokata na ngámbo mosusu. Na ndenge ya elilingi, basalelaka elembo mpo na komonisa ete eloko moko ezali ya solo, ezali ya moto moko to mpe ebombami to ezali sekele.—Kob 28:11; Ne 9:38; Em 5:1; 9:4.
Kasia.
Ezali eloko oyo bazalaki kozwa na nzete ya Kasia (Cinnamomum cassia), oyo ezali molɔngɔ moko na nzete ya kinamono. Bazalaki kosalela kasia lokola malasi mpe lokola moko ya biloko oyo bazalaki kosangisa na kati ya mafuta mosantu.—Kob 30:24; Nz 45:8; Ezk 27:19.
Kelelo.
Ebɛtɛlo ya mopɛpɛ ya ebende, bazalaki kosalela yango mpo na kopesa nsango mpe mpo na kobɛta miziki. Na kolanda Mitángo 10:2, Yehova apesaki malako mpo básala kelelo mibale ya palata oyo esengelaki kosalelama mpo na kobengisa liyangani, kolongola kaa to komibongisa mpo na etumba. Ekokaki kozala bakelelo ya semba, oyo ekesanaki na bibɛtɛlo ya “maseke” ya kogumbama, oyo esalemaki na maseke ya banyama. Bakelelo ezalaki na kati ya bibɛtɛlo ya miziki oyo bazalaki kosalela na tempelo. Mbala mingi bakelelo esalelami na masolo mingi na ndenge ya elilingi, mpo na kosakola bikateli ya lisambisi ya Yehova to makambo mosusu ya ntina oyo euti epai ya Nzambe.—2Nt 29:26; Ezr 3:10; 1Ko 15:52; Em 8:7–11:15.
Kemoshe.
Azalaki nzambe-mokonzi ya Bamoabe.—1Ba 11:33.
Kilomɛtrɛ.
Mezire ya ntaka oyo ezali mbala moko kaka na Makomami ya Grɛki ya bokristo ya ebandeli na Matai 5:41, ekoki kozala kilomɛtrɛ ya Baroma, oyo ekokani na 1 479,5 m. Bisika mosusu misato oyo: Luka 24:13, Yoane 6:19, mpe Yoane 11:18 ezali komonisa bakilomɛtrɛ oyo euti na stade ya kala na makomami ya ebandeli.—Talá Ap. B14.
Kisleve.
Kiti ya kosambisa.
Ezalaki mbala mingi esika ya likoló oyo bazalaki komata na eskalye, epai bakonzi bazalaki kofanda mpo na kosolola na bato mpe koyebisa bikateli ya lisambisi. Maloba “kiti ya kosambisa ya Nzambe” mpe “kiti ya kosambisa ya Kristo” emonisaka bibongiseli oyo Yehova azwi mpo na kosambisa bato.—Ro 14:10; 2Ko 5:10; Yn 19:13.
Kobongola motema.
Na Biblia, liloba yango esalelamaka mpo na kolobela moto oyo abongoli makanisi na ye mpe ayoki mawa mpo na lolenge ya bomoi na ye ya kala, makambo oyo asalá. Elobelaka mpe moto oyo ayoki mawa mpo asali te likambo oyo asengelaki kosala. Moto oyo abongoli mpenza motema, amonisaka yango na misala; abongisaka etamboli na ye.—Mt 3:8; Mis 3:19; 2Pe 3:9.
Kobuka mibeko.
Koguga.
Moko ya bamaladi mingi ya nzete oyo eutaka na mayebo. Bato mosusu balobi ete koguga oyo Biblia elobeli ezalaki koguga ya moindo (Puccinia graminis).—1Ba 8:37.
Kokatama-ngenga.
Kokila bilei.
Koboya kolya eloko nyonso mpo na eleko moko boye. Bayisraele bazalaki kokila bilei na mokolo ya Kozipa masumu, na ntango ya mpasi, mpe ntango oyo bazalaki na mposa ya litambwisi ya Nzambe. Bayuda batyaki mikolo minei ya kokila bilei na mbula mpo na kokanisa makambo ya mpasi oyo ekómelaki bango. Kokila bilei esɛngisami te epai ya bakristo.—Ezr 8:21; Yis 58:6; Lk 18:12.
Kolɔkɔta mbuma.
Koyanganisa mbuma ata na eteni nini ya bilanga oyo babuki-mbuma batiki to babosani. Mobeko ya Moize epekisaki bato ya ekólo kosilisa mbuma nyonso oyo ezalaki na bandelo ya bilanga to kosilisa kobuka mbuma nyonso ya olive to ya vinyo. Nzambe apesaki mobola, moto ya mpasi, mopaya, mwana oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá lotomo ya kolɔkɔta mbuma oyo etikali na ntango ya kobuka mbuma.—Rt 2:7.
Komemama na mboka mopaya.
Kolongola moto na mboka to na mabele na ye, mbala mingi epai ya baoyo balongi bango. Liloba yango na Ebre elakisi “kokende.” Bayisraele bamemamaki mpenza na mboka mopaya mbala mibale. Bato ya Asiri bamemaki bokonzi ya mabota zomi na mboka mopaya, mpe na nsima, bato ya Babilone bamemaki bokonzi ya mabota mibale na mboka mopaya. Baoyo batikalaki na bomoi, Siruse, mokonzi ya Perse azongisaki bango na mabele na bango.—2Ba 17:6; 24:16; Ezr 6:21.
Komipesa, elembo mosantu ya.
Komisɛrɛ.
Kondimana.
Boyokani to kontra oyo endimami, kati na Nzambe mpe bato to kati na bato mibale mpo na kosala likambo moko to te. Mbala mosusu, ezalaki kaka eteni moko nde esengelaki kotosa boyokani yango (kondimana oyo etali moto moko, oyo mbala mingi ezalaki elaka). Na bantango mosusu ngámbo nyonso mibale nde esengelaki kotosa boyokani yango (boyokani oyo etali ngámbo mibale). Longola kondimana oyo esalemaki kati na Nzambe mpe bato, Biblia etángi mpe kondimana kati na bato, mabota, bikólo, to bituluku ya bato. Na kati ya kondimana oyo esalemaki, ezali na mosusu oyo etaleli biso tii lelo, ezali oyo Nzambe asalaki elongo na Abrahama, Davidi, mpe ekólo Yisraele (kondimana ya Mibeko), mpe Yisraele ya Nzambe (kondimana ya sika).—Eb 9:11; 15:18; 21:27; Kob 24:7; 2Nt 21:7.
Kopunza.
Kotutatuta; Esika ya kotutatuta mbuma.
Kotutatuta ezali mosala ya kokabola mbuma na mposo na yango; bazalaki kosala yango na esika yango. Bazalaki kosala mosala yango na mabɔkɔ ná mwa nzete, kasi soki mbuma ezali mingi bazalaki kosalela bisaleli oyo ebongi mpenza, na ndakisa, likalo ya kotutela, to bisaleli ya kobalola, oyo banyama ezalaki kobenda. Bazalaki kolekisa bisaleli yango likoló ya mbuma oyo batandi na esika ya kotutatuta mbuma, mbala mingi ezalaki esika moko oyo etombwani oyo ezali serklɛ epai mopɛpɛ ezalaki kopepa.—Le 26:5; Yis 41:15; Mt 3:12
Kotya mabɔkɔ.
Bazalaki kotyela moto mabɔkɔ mpo aponama na mosala moko ya ntina to mpo azwa lipamboli, abika, to azwa likabo ya elimo santu. Na bantango mosusu, bazalaki kotya mabɔkɔ likoló ya nyama liboso ya kopesa yango mbeka.—Kob 29:15; Mit 27:18; Mis 19:6; 1Ti 5:22.
Kotyama mafuta.
Liloba ya Ebre oyo ebongolami na kotyama mafuta elimboli libosoliboso “kopakola eloko moko ya maimai.” Bazalaki kotya moto to eloko mafuta mpo na komonisa ete apesami mpo na mosala moko ya sipesiale. Na Makomami ya Grɛki ya bokristo, maloba yango emonisaka kosopa elimo santu epai ya baoyo baponami mpo na elikya ya bomoi ya seko na likoló.—Kob 28:41; 1Sa 16:13; 2Ko 1:21.
Korai.
Eloko moko ya makasi lokola libanga oyo esalemaka na mikuwa ya banyama mikemike ya mai. Ezalaka na bamai minene mpe na langi ndenge na ndenge, na ndakisa motane, mpɛmbɛ mpe moindo. Bakorai ezalaka mingi mpenza na Mbu Motane. Na ntango ya kala, korai ya motane ezalaki na motuya mingi mpe bazalaki kosala na yango biloko ya motuya mpe babiju.—Mas 8:11.
Korosi.
Kozala.
Na bisika mosusu ya Makomami ya Grɛki ya bokristo, liloba yango emonisaka kozala ya bokonzi ya Yesu Kristo kobanda ntango oyo akómaki Mokonzi Masiya na likoló tii na mikolo ya nsuka ya mokili oyo. Kozala ya Kristo ezali kaka te koya oyo na nsima moto akokende nokinoki; kasi ezali nde koya oyo ekokani na eleko ya mwa ntango oyo ezali na makambo ya sikisiki oyo esengeli kosalema.—Mt 24:3.
Kozipa masumu.
Na Makomami ya Ebre, esalelamaka mpo na kolobela mbeka oyo ezalaki kosala ete bato bázongela boyokani na Nzambe mpe básambela ye. Na Mibeko ya Moize bambeka ezalaki kopesama mingimingi na Mokolo ya kozipa masumu ya mbula na mbula, mpo na kozongisa boyokani na Nzambe ata soki masumu yango esalemaki epai ya moto moko to ekólo mobimba. Bambeka yango ezalaki elilingi ya mbeka ya Yesu Kristo, oyo ezipaki mpenza masumu ya bato nyonso mbala moko mpo na libela, mpe epesi bato libaku ya kozala na boyokani ya malamu na Yehova.—Le 5:10; 23:28; Kol 1:20; Ebr 9:12.
Kristo.
L
Laki ya mɔtɔ.
Esika ya elilingi oyo “ezali kopela na mɔtɔ mpe na sufulu,” elobelami mpe lokola “liwa ya mibale.” Basumuki oyo baboyi kobongola motema, Zabolo mpe ata liwa ná Nkunda (to Hadesi) bakobwakama kuna. Lokola mɔtɔ ekoki kozikisa te ekelamu ya elimo, liwa to hadesi, laki ya mɔtɔ elakisi te esika oyo bato banyokwamaka libela na libela, kasi libebi ya seko.—Em 19:20; 20:14, 15; 21:8.
Lansi.
Ebundeli oyo esalemi na mposo ya nyama to na bansinga oyo balíngi esika moko, esalemi na biloko lokola mitonga ya nyama, nkɛkɛlɛ, to nsuki. Na esika oyo efungwamá na kati, bazalaki kotya eloko ya kobɛta, ezalaki mbala mingi libanga. Bazalaki kokangisa nsuka ya lansi na lobɔkɔ mpe bazalaki kotika yango nsima ya kobalusabalusa lansi. Na kala, bato ya bikólo bazalaki kosalela balansi na mampinga na bango.—Bas 20:16; 1Sa 17:50.
Leptone.
Levi; Molevi.
Mwana mobali ya misato ya Yakobo ná mwasi na ye Lea; mpe nkombo ya libota na ye. Bana na ye misato nde basalaki bituluku misato ya minene ya Balevi. Na bantango mosusu, liloba “Balevi” ezalaki komonisa libota mobimba ya Levi, longola libota ya bonganga-nzambe ya Arona. Libota ya Levi ezwaki te mabele lokola libula na mokili ya elaka, kasi ezwaki bingumba 48 na bateritware ya mabota mosusu.—Mib 10:8; 1Nt 6:1; Ebr 7:11.
Leviatana.
Nkombo oyo mbala mingi emonisaka nyama oyo ezalaka na mai. Na Yobo 3:8 mpe 41:1, emonani ete ezali kolobela ngando to ekelamu mosusu ya monene mpe ya nguya ya mai. Na Nzembo 104:26, ekoki kozala lolenge moko ya baleine. Na bisika mosusu esalelami na ndenge ya elilingi mpe emonisi te soki ezali nyama nini.—Nz 74:14; Yis 27:1.
Levire.
Eloko oyo batyaka na farini mpo evimba; bazalaki kosalela mingimingi ndambo ya farini oyo esí evimbi, oyo bazwi na pɔtɔpɔtɔ ya farini. Biblia esaleli yango mbala mingi lokola elembo ya lisumu to ya kobeba, esalelami mpe mpo na kolobela eloko oyo ezali kokola kozanga ete eyebana mpe kopanzana.—Kob 12:20; Mt 13:33; Ga 5:9.
Libala ya bosɛmɛki.
Libanga ya konikela; Enikelo.
Libanga ya sɛrklɛ oyo ezalaki likoló ya mosusu, bazalaki konikela yango mbuma ekóma farine. Mwa nzete moko ezalaki na katikati ya libanga ya nse nde esimbaki libanga ya likoló. Na kala, mabota mingi ezalaki na enikelo ya mabɔkɔ, oyo mbala mingi basi nde bazalaki kosalela yango. Lokola mabota ezalaki na mposa na yango mikolo nyonso mpo na kosala farini, Mobeko ya Moize epekisaki kokanga lokola ndanga libanga ya enikelo to libanga na yango ya likoló ya moto oyo azali na nyongo. Ezalaki mpe na libanga monene ya enikelo oyo banyama ezalaki kobalola.—Mib 24:6; Mr 9:42.
Libanga ya ntina mingi.
Libanga oyo bazalaki kotya na litumu ya ndako, esika oyo bifelo mibale ekutani, mpo esangisa mpe esimba yango. Libanga monene ya ntina mingi ezalaki oyo ya moboko; bazalaki mingimingi kopona libanga ya makasi mpo na bandako ya minene mpe bifelo ya bingumba. Liloba yango esalelami na ndenge ya elilingi mpo na kolobela moboko ya mabele, mpe Yesu lokola “libanga ya ntina mingi” ya lisangá ya bokristo, oyo ezali lokola ndako moko ya elimo.—Ef 2:20; Yb 38:6.
Libenga ya ntolo.
Ezali libenga ya elamba oyo babongisaki na mabanga ya ntalo, oyo nganga-nzambe monene ya Yisraele azalaki kolata na ntolo ntango azalaki kokɔta na esika mosantu. Ezalaki kobengama “libenga ya ntolo mpo na kosambisa” mpo ezalaki na Urime mpe Tumime, oyo ezalaki kosalelama mpo na komonisa lisambisi ya Yehova. (Kob 28:15-30)—Talá Ap. B5.
Libulu mozindo.
Likabo mpo na elako.
Likabo mpo na lisumu.
Likabo ya koningisa.
Ezalaki likabo oyo nganga-nzambe azalaki kotya mabɔkɔ na ye na nse ya mabɔkɔ ya moto oyo azali kopesa likabo, wana asimbi mbeka mpe azalaki koningisa yango; to nganga-nzambe ye moko azalaki koningisa likabo yango. Yango ezalaki komonisa likabo ya mbeka oyo bapesi Yehova.—Le 7:30.
Likabo ya kotumba.
Ezalaki mbeka ya nyama (ngɔmbɛ-mobali, mpate-mobali, epopo, to mwana ya ebenga) oyo etumbami na etumbelo lokola likabo mobimba oyo bapesi Nzambe. Moto oyo azalaki kopesa mbeka yango asengelaki te kotikala na eteni ata moko.—Kob 29:18; Le 6:9.
Likabo ya masanga.
Likabo ya ngambo.
Likalo.
Mwa motuka oyo ezalaki na pine mibale, oyo mpunda ezalaki kobenda. Ezalaki libosoliboso mpo na etumba.—Kob 14:23; Bas 4:13; Mis 8:28.
Likomami; Makomami.
Likonzí.
Eloko moko ya semba oyo ekoki kosimba ndako to pikɛ to eloko moko oyo ezali lokola pikɛ. Bazalaki kotya misusu mpo na kokanisa misala to makambo oyo esalemá kala. Na tempelo mpe na bandako na yango oyo Salomo atongaki ezalaki na makonzí. Bapakano bazalaki kosalela makonzí mpo na kosambela banzambe na bango ya lokuta, mpe na bantango mosusu Bayisraele bakómaki mpe kosala bongo. (Bas 16:29; 1Ba 7:21; 14:23)—Talá NSƆNGƐ YA LIKONZÍ.
Likonzí ya losambo.
Ezalaki likonzí ya semba, oyo mbala mingi ezalaki ya libanga, mpe emonani ete ezalaki komonisa enama ya mibali mpe elembo ya Baala to banzambe mosusu ya lokuta.—Kob 23:24.
Limpa ezangá levire.
Lingenda ya bokonzi.
Lipeko.
Emekeli oyo basalelaka mpo na komeka molai, ebandaka na moloku tii na mosapi ya molai ya lobɔkɔ. Bayisraele bazalaki kosalela mbala mingi lipeko oyo ezalaki na molai soki ya 44,5 cm, kasi bazalaki mpe kosalela lipeko ya monene oyo ezalaki kobanda na ntolo, molai soki 51,8 cm. (Eb 6:15; Lk 12:25)—Talá Ap. B14.
Lipɛngwi.
Liloba ya Grɛki (apostasia) euti na verbe moko oyo liloba na liloba elimboli, “kokende mosika ya.” Liloba yango epesaka likanisi ya “kotika, kosundola, to botomboki.” Na Makomami ya Grɛki ya bokristo, liloba “lipɛngwi” esalelami libosoliboso mpo na kolobela bato oyo bawanganaka losambo ya solo.—Mas 11:9; Mis 21:21; 2Te 2:3.
Lisangá (Liyangani).
Liseke.
Ezali maseke ya nyama, oyo ezalaki kosalelama lokola elokó ya komɛla mai, elokó ya mafuta, elokó ya mai ya kokoma mpe ya biloko ya monzɛlɛ. Ezalaki mpe kosalelama mpo na bibɛtɛlo to bilembo ya miziki. (1Sa 16:1, 13; 1Ba 1:39; Ezk 9:2) “Liseke” esalelami mbala mingi na ndenge ya elilingi mpo na kolobela makasi, kolonga, mpe elonga.—Mib 33:17; Mik 4:13; Zek 1:19.
Lisekwa.
Kozonga na bomoi uta na liwa. Liloba ya Grɛki anastasis, elimboli liloba na liloba, “kolamuka; kotɛlɛma.” Biblia elobeli lisekwa ya bato libwa, na ndakisa, lisekwa ya Yesu, oyo Yehova Nzambe azongisaki ye na bomoi. Atako Eliya, Elisha, Yesu, Petro, ná Paulo basekwisaki bato, makamwisi yango esalemaki mpenza na nguya ya Nzambe. Lisekwa ya “bato ya sembo mpe ya bato oyo bazangi bosembo” ezali na ntina mpo na kokokisama ya mokano ya Nzambe. (Mis 24:15) Biblia elobeli mpe lisekwa mpo na kokende likoló, ebengi yango lisekwa “ya liboso,” oyo esangisi bandeko ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo.—Flp 3:11; Em 20:5, 6; Yn 5:28, 29; 11:25.
Lisese.
Ezali maloba ya bwanya to lisolo mokuse oyo ezali kopesa liteya to komonisa solo moko ya ntina mingi na maloba moke. Na Biblia, lisese ekoki kozala na lolenge ya lisapo to sambole. Lisese elobelaka likambo moko oyo ezali solo na maloba oyo ebendaka likebi, mbala mosusu na ndenge ekokanisaka makambo na ndenge ya elilingi. Maloba mosusu ekómaki kosalelama mbala na mbala mpo na kotyola to kosɛka moto.—Mos 12:9; 2Pe 2:22.
Lisiko.
Ezali motuya oyo bafutaka mpo na kolongola moto na boombo, na etumbu, na mpasi, na lisumu to ata na mokumba moko boye. Motuya yango ezalaki kaka mbongo te. (Yis 43:3) Makambo mingi ezalaki kosɛnga kopesa lisiko. Na ndakisa, na Yisraele, mwana mobali nyonso ya liboso ezala ya moto to ya nyama azalaki ya Yehova; esɛngaki ete bátyama pembeni mpo na mosala ya Yehova. Mpo na kolongwa na ndai yango esengelaki kofuta eloko to motángo ya kosomba. (Mit 3:45, 46; 18:15, 16) Soki ngɔmbɛ oyo ezali likama mpe ebatelami malamu te ebomi moto, nkolo na yango asengelaki kofuta lisiko mpo alongwa na etumbu ya liwa. (Kob 21:29, 30) Nzokande, lisiko esengelaki kopesama te mpo na moto oyo abomi moto na nko. (Mit 35:31) Na Biblia, lisiko oyo eleki ntina ezali oyo Yesu andimaki kofuta ntango apesaki bomoi lokola mbeka mpo bato oyo batosaka Nzambe bálongwa na lisumu mpe na liwa.—Nz 49:7, 8; Mt 20:28; Ef 1:7.
Litatoli.
“Litatoli” esalelami mbala mingi mpo na kolobela Mibeko Zomi oyo ekomamaki na bitanda mibale ya mabanga, oyo Nzambe apesaki Moize.—Kob 31:18.
Liyangani.
Logi.
Lopango.
Ezalaki esika moko oyo efongwamá zingazinga ya tabernakle. Ezalaki mpe na mapango zingazinga ya tempelo. Etumbelo mpo na bambeka ya kotumba ezalaki na lopango ya tabernakle mpe na lopango ya kati ya tempelo. (Talá Ap. B5, B8, B11.) Biblia emonisi mpe ete ezalaki na bandako mpe bandako ya bakonzi oyo ezalaki na lopango moko to ebele.—Kob 8:13; 27:9; 1Ba 7:12; Est 4:11; Mt 26:3.
Loyembo ya mawa.
Loyembo ya ntango ya komata.
Ezali maloba ya ebandeli ya loyembo oyo ezali na eteni mokomoko ya Nzembo 120 tii 134. Makanisi ezali ndenge na ndenge mpo na kolimbola maloba wana, kasi bato mingi bakanisaka ete Bayisraele oyo bazalaki komata na Yerusaleme, oyo ezalaki likoló ya bangomba ya Yudea, mpo na bafɛti minene misato ya mbula nde bayembaki na esengo banzembo yango 15.
M
Mahalate.
Ekoki kozala liloba ya miziki; ezali maloba likoló ya Nzembo 53 mpe 88. Mbala mosusu eutaki na liloba ya Ebre oyo elimboli “kolɛmba makasi; kobɛla,” ekokaki kozala loyembo oyo bazalaki koyemba na mawa, oyo ekokaki koyokana na maloba ya nzembo yango mibale ya mawa.
Makabo ya kopesa matɔndi.
Mbeka ya kozongisa boyokani oyo bazalaki kopesa Nzambe mpo na bolamu mpe bolingo na ye ya sembo. Bazalaki kolya mosuni ya nyama elongo na limpa ya levire mpe oyo ezangá levire. Bazalaki kolya mosuni yango kaka mokolo yango.—2Nt 29:31.
Makabo ya motema mawa.
Makabo oyo epesami mpo na kosalisa moto oyo azali na bosɛnga. Makomami ya Ebre elobeli yango polele te, kasi Mobeko epesaki Bayisraele malako ya sikisiki mpo na oyo basengelaki kosala epai ya babola.—Mt 6:2.
Makambo ya ntango oyo.
Yango ezali ndenge ya kobongola liloba ya Grɛki aion ntango oyo ezali kolobela ndenge makambo ezali kosalema to makambo oyo ekesenisi eleko moko, ntango moko boye. Biblia elobeli “makambo ya mokili oyo,” (to makambo ya ntango oyo) mpo na komonisa ndenge makambo ezali kosalema na mokili mpe etamboli ya bato ya mokili. (2Ti 4:10) Na nzela ya kondimana ya Mibeko, Nzambe amonisaki ndenge makambo esengeli kosalema, oyo basusu bakoki kobenga yango eleko ya Bayisraele to ya Bayuda. Na nzela ya mbeka ya Yesu Kristo, Nzambe asalelaki ye mpo na kobandisa ndenge mosusu oyo makambo esengeli kosalema, oyo esangisaki libosoliboso lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Yango nde ezalaki ebandeli ya eleko ya sika, oyo emonisaki bosolo ya makambo ndenge elobamaki na kondimana ya Mibeko. Na boike (Pluriel), maloba yango emonisaka makambo ndenge na ndenge ya ntango, to ndenge makambo ezali kosalema, oyo esalemá na kala to ekosalema na mikolo ezali koya.—Mt 24:3; Mr 4:19; Ro 12:2; 1Ko 10:11.
Makamwisi; Misala ya nguya.
Maladi mabe.
Maladi nyonso oyo epanzanaka noki; ntango mosusu ebomaka bato ebele. Mbala mingi bamaladi mabe oyo Biblia elobeli ezalaki etumbu ya Nzambe.—Mit 14:12; Ezk 38:22, 23; Am 4:10.
Maladi ya maba; Moto ya maba.
Maladi makasi ya loposo. Na Makomami, maladi ya maba ekeseni na oyo ya lelo, mpo yango ezalaki kozwa bato, bilamba mpe bandako. Moto oyo azwi maladi ya maba babengaka ye moto ya maba.—Le 14:54, 55; Lk 5:12.
Malakame.
Malita ya kokanisama.
Ezali esika oyo bakundaka moto oyo akufi. Liloba yango euti na Grɛki mnêméïon, oyo euti na verbe “kokanisa,” ezali kopesa likanisi ete bazali kokanisa moto oyo akufi.—Yn 5:28, 29.
Maloba ya ebandeli ya loyembo.
Mampa ya kolakisa.
Nkombo oyo bapesaki na mampa 12 oyo etandamaki 6 na ngámbo moko mpe 6 na ngámbo mosusu na mesa na Esika Mosantu ya tabernakle mpe ya tempelo. Bazalaki mpe kobenga yango “limpa ya kotanda.” Sabata nyonso bazalaki kolongola mampa yango mpe kotya ya sika. Mampa oyo bazalaki kolongola, kaka banganga-nzambe nde bazalaki kolya yango. (2Nt 2:4; Mt 12:4; Kob 25:30; Le 24:5-9; Ebr 9:2)—Talá Ap. B5.
Mampa ya komonisa.—
Talá MAMPA YA KOLAKISA.
Mana.
Bilei ya Bayisraele na boumeli ya mbula 40 na esobe. Yehova nde azalaki kopesa bango yango na ndenge ya likamwisi. Bazalaki komona yango ntɔngɔ nyonso na nse ya mamwe, longola kaka na Sabata. Ntango bamonaki yango mbala ya liboso, Bayisraele balobaki: “Oyo nini?” Na Ebre “man houʼ?” (Kob 16:13-15, 35) Bavɛrsɛ mosusu ebengi yango “bilei ya likoló” (Nz 78:24), “limpa oyo eutaki na likoló” (Nz 105:40), mpe “mampa ya bato ya nguya” (Nz 78:25). Yesu mpe alobelaki yango na ndenge ya elilingi.—Yn 6:49, 50.
Masedonia.
Maseke ya etumbelo.
Masiya.
Maskile.
Liloba ya Ebre oyo esalelami likoló ya maloba ya banzembo 13, oyo ndimbola na yango eyebani mpenza te. Ekoki kolimbola “maloba ya komanyola.” Basusu bakanisaka ete liloba yango ekokani na liloba ya Ebre, oyo ebongolami na ‘kosala na bososoli,’ ekoki kopesa likanisi kaka moko wana.—2Nt 30:22; Nz 32:Mel.
Matánga.
Komonisa mawa mpo moto akufi to mpo likama moko ebimi. Biblia emonisi ete na kala bato bazalaki kosala matánga mpo na mwa ntango. Bato oyo bazalaki kosala matánga, bazalaki kolela makasi, kolata bilamba ya matánga, kotya putulu na mitó na bango, kokata bilamba na bango, mpe kobɛtabɛta ntolo. Na bantango mosusu bazalaki kobengisa bato oyo bazalaki kolela na bibembe.—Eb 23:2; Est 4:3; Em 21:4.
Mayoyo.
Lolenge moko ya mabanki oyo etambolaka elongo na etuluku monene. Mobeko ya Moize etalelaki yango pɛto mpo na kolya. Etuluku ya mayoyo oyo elyaka nyonso na nzela, ebebisaka mpenza kobebisa, mpe bazalaki kotalela yango lokola mpasi.—Kob 10:14; Mt 3:4.
Mbeka.
Ezali likabo oyo bapesi epai ya Nzambe lokola elembo mpo na kopesa matɔndi, to kondima libunga moko mpe koluka kozongisa boyokani malamu elongo na ye. Kobanda na Abele, bato bapesaki bambeka ndenge na ndenge na bolingo na bango moko, ezala mpe bambeka ya banyama, tii kondimana ya Mobeko ya Moize ekómisaki yango lisɛngami. Bambeka ya banyama ezalaki lisusu na ntina te ntango Yesu apesaki bomoi na ye moko lokola mbeka ya kokoka, atako Bakristo bakobaka kopesa Nzambe bambeka ya elimo.—Eb 4:4; Ebr 13:15, 16; 1Yn 4:10.
Mbeka ya kimya.
Mbeka oyo bazalaki kopesa Yehova mpo na komonisa ete balingi kozala na kimya elongo na ye. Mosambeli, bato ya ndako na ye, nganga-nzambe oyo azalaki kosala molulu mpe banganga-nzambe oyo bazalaki na mosala, bango nyonso bazalaki kolya eteni ya mbeka yango. Yehova azalaki kozwa milinga ya mafuta oyo etumbami, oyo ezalaki kosepelisa. Bazalaki kopesa ye mpe makila, oyo ezalaki kolakisa bomoi. Ezalaki lokola nde banganga-nzambe ná basambeli bafandi mpo na kolya elongo na Yehova; ezalaki kolakisa ete bazali na boyokani ya kimya.—Le 7:29, 32; Mib 27:7.
Mbɛsɛ.
Mabanga to biteni ya mikemike ya mabaya oyo bazalaki kosalela mpo na kozwa bikateli. Bazalaki kotya yango na lizita ya elamba to na mbɛki, na nsima bazalaki koningisa yango. Mbɛsɛ oyo ekwei to oyo babendi ezalaki komonisa ekateli ya malamu. Mbala mingi bazalaki kosala libondeli liboso. Liloba “mbɛsɛ” esalelamaka mpe na ndenge ya elilingi to te, elimbolaka “likabo” to “eteni.”—Yos 14:2; Nz 16:5; Mas 16:33; Mt 27:35.
Mbindo.
Mbondo.
Banzete ndenge na ndenge oyo ezalaka bololo makasi mpe ezalaka na nsolo moko makasi. Na Biblia, mbondo esalelami na ndenge ya elilingi mpo na kolobela mpasi oyo eutaka na pite, boombo, kozanga bosembo mpe lipɛngwi. Na Emoniseli 8:11, “mbondo” ezali komonisa eloko moko ya mabe mpe pwazɔ.—Mib 29:18; Mas 5:4; Yir 9:15; Am 5:7.
Mbuma ya grenade.
Ezali monene lokola pɔmɛ, ezali mpe na motole na nsuka na yango moko. Na kati na yango ezali na bambuma ya mikemike oyo ezali na mai ya sukali, oyo mokomoko na yango ezali mpe na mwa mbuma ya langi ya roze mpe ya motane. Biloko oyo basalá lokola bambuma ya grenade nde etyamaki na ndelo ya nse ya kazaka ezangá mabɔkɔ ya nganga-nzambe monene, ezala mpe na makonzí minene oyo ebengamaki Yakine mpe Boaze liboso ya tempelo.—Kob 28:34; Mit 13:23; 1Ba 7:18.
Mbuma ya liboso.
Mbuma ya liboso mpenza na eleko ya kobuka mbuma; mbano to mbuma ya liboso ya eloko nyonso. Yehova asɛngaki ekólo Yisraele epesaka ye mbuma na bango ya liboso, ezala ya moto, ya nyama, to mbuma ya mabele. Lokola ekólo, Bayisraele bazalaki kopesa Nzambe bambuma ya liboso na fɛti ya Mampa ezangá levire mpe ya Pantekote. Liloba “mbuma ya liboso” esalelami na ndenge ya elilingi mpo na kolobela Kristo ná bayekoli na ye oyo batyami mafuta.—1Ko 15:23; Mit 15:21; Mas 3:9; Em 14:4.
Merodake.
Azalaki nzambe-mokonzi ya Babilone. Ntango Hammurabi mokonzi ya Babilone akómisaki Babilone engumba-mokonzi ya Babilonia, Merodake (to Marduk) akómaki na lokumu mingi, nsukansuka azwaki esika ya ebele ya banzambe oyo bato bazalaki kosambela liboso mpe akómaki nzambe-mokonzi ya Babilone. Na nsima, titre “Belu” (Nkolo) ezwaki esika ya nkombo Merodake (Marduk), bato mingi bakómaki kobenga yango Bele.—Yir 50:2.
Mikitame.
Mikolo ya nsuka.
Bisakweli ya Biblia esaleli maloba oyo mpe mosusu oyo ekokani na yango, lokola “eleko ya nsuka ya mikolo,” mpo na kolobela ntango oyo makambo ya mokili ekokóma na nsuka. (Ezk 38:16; Da 10:14; Mis 2:17) Na kotalela lolenge ya esakweli, ekoki kozwa bambula moke to ebele. Mbala mingi, Biblia esalelaka “mikolo ya nsuka” ya makambo ya ntango oyo, eleko ya kozala ya Yesu oyo ezali komonana te.—2Ti 3:1; Yk 5:3; 2Pe 3:3.
Milikome.
Mina.
Ebengami mpe manɛ na Ezekiele. Ezali emekeli ya kilo mpe ya mbongo. Na kotalela makambo oyo bato ya Arkeoloji bamoni, mina ezalaki na motuya ya Shekele 50, mpe shekele moko ezalaki na kilo ya 11,4 g; mina oyo Makomami ya Ebre elobeli ezalaki na kilo ya 570 g. Ekoki mpe kozala ete ezalaki na mina ya mokonzi, kaka ndenge ezalaki mpo na lipeko. Na Makomami ya Grɛki ya bokristo, mina moko ekokanaki na drakimɛ 100, mpe ezalaki na kilo ya 340 g. Mina motoba ekokanaki na talanta moko. (Ezr 2:69; Lk 19:13)—Talá Ap. B14.
Mire.
Mai ya nzete ya nsolo kitoko (gɔme ya rezine) oyo ezalaki kouta na banzete ya nsendensende to na mwa banzete ya lolenge ya Commiphora. Mire ezalaki moko ya biloko oyo bazalaki kotya na mafuta mosantu. Bazalaki mpe kotya yango na biloko lokola bilamba to mbeto mpo epesa nsolo kitoko. Bazalaki kobakisa yango na mafuta ya konyolisa mpe na mafuta ya kopakola na nzoto. Bazalaki mpe kosalela mire mpo na kobongisa nzoto ya mowei liboso ya kokunda yango.—Kob 30:23; Mas 7:17; Yn 19:39.
Misala ya bilimo mabe.
Ezali bindimeli oyo elobaka ete bato bazalaka na eloko moko oyo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa ya nzoto ya mosuni mpe ezali na likoki ya kosolola na bato ya bomoi, na ndakisa, na nzela ya moto oyo asololaka na bilimo, oyo azali na bokonzi likoló ya moto yango. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kosala misala ya bilimo mabe” ezali pharmakia, oyo soki ebongolami liloba na liloba elimboli “drɔgɛ.” Liloba yango ekómaki na boyokani na misala ya bilimo mabe mpo na ntango ya kala, bazalaki kosalela drɔgɛ ntango bazalaki kosɛnga nguya ya bademo mpo na kosala misala ya bondɔki.—Ga 5:20; Em 21:8.
Mobeko.
Soki ekomami na lɛtrɛ ya monene, emonisaka mbala mingi Mobeko ya Moize to mikanda mitano ya liboso ya Biblia. Kasi na lɛtrɛ ya moke, ekoki komonisa mobeko mokomoko ya Mobeko ya Moize to etinda ya mobeko.—Mit 15:16; Mib 4:8; Mt 7:12; Ga 3:24.
Moize, Mobeko ya.
Mokambi ya nzembo.
Liloba ya Ebre oyo esalelami na nzembo mpo na kolobela moto oyo azali kobongisa nzembo mpe ndenge ya koyemba yango, azalaki kolandela ndenge ya komekameka yango mpe kolakisa Balevi oyo bazalaki koyemba, ata mpe na milulu minene. Babiblia mosusu ebongoli liloba yango na “kapita ya bayembi” to “motambwisi ya bayembi.”—Nz 4:Mel; 5:Mel.
Mokɛngɛli.
Azali moto oyo mokumba na ye ya libosoliboso ezali ya kokɛngɛla mpe kobatela lisangá. Liloba ya Grɛki épiskopos, mbala mingi ebongolamaka na “mokɛngɛli.” Maloba “mokɛngɛli” mpe “nkulutu” (présbutéros) ezali kolobela mosala kaka moko na lisangá ya bokristo, kasi ezali na mwa bokeseni; “nkulutu” ezali komonisa makoki ya elimo ya moto oyo aponami, mpe “mokɛngɛli” ezali kobɛta nsɛtɛ na mikumba oyo moto yango asengeli kokokisa.—Mis 20:28; 1Ti 3:2-7; 1Pe 5:2.
Moko ya bandambo zomi (dime).
Moko ya biteni zomi to moko ya bandambo zomi oyo bazalaki kopesa to kofuta lokola mpako, mingimingi mpo na makambo ya losambo. Ebengami mpe “dime.” (Mal 3:10; Mib 26:12; Mt 23:23) Na Mibeko ya Moize, mbula na mbula Bayisraele bazalaki kopesa moko ya bandambo zomi ya biloko na bango oyo mabele eboti, ya bangɔmbɛ mpe bibwɛlɛ mpo na kosunga Balevi. Balevi bazalaki kopesa moko ya bandambo zomi epai ya banganga-nzambe ya libota ya Arona mpo na kosunga bango. Ezalaki mpe na badime mosusu oyo ezalaki kopesama. Lelo esɛngisami te Bakristo bápesaka dime.
Mokolo ya kosambisama.
Ezali mokolo, to eleko oyo, ntango bituluku moko boye, bikólo to bato nyonso bakozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe. Ekoki kozala ntango oyo bato oyo bakateli bango etumbu ya liwa bakobomama, to ekoki mpe kozala libaku mpo na basusu ya kobika mpe kozwa bomoi ya seko. Yesu ná bantoma na ye balobelaki “Mokolo ya kosambisama” oyo ekoya kaka te mpo na baoyo bazali na bomoi kasi mpe mpo na baoyo bakufá kala.—Mt 12:36.
Mokolo ya kozipa masumu.
Ezalaki mokolo oyo eleki ntina mpo na Bayisraele; bazalaki kobenga yango mpe Yom Kippur (euti na liloba ya Ebre yôm hakkippurim, “mokolo ya kozipa”), ezalaki kosalema mokolo ya zomi ya sanza ya Etanime. Ezalaki mokolo kaka moko oyo nganga-nzambe monene azalaki kokɔta na Esika Eleki Mosantu na tabernakle mpe na nsima na tempelo. Kuna azalaki kopesa makila ya bambeka mpo na masumu na ye, ya Balevi mosusu mpe ya bato ya ekólo. Ezalaki mokolo ya liyangani mosantu mpe ya kokila bilei, ezalaki mpe sabata, ntango oyo bazalaki kosala mosala te.—Le 23:27, 28.
Mokomeli.
Na Makomami ya Ebre ezali mosali bakopi. Ntango Yesu azalaki na mabele, mokomeli ezalaki komonisa bato oyo bateyami na mibeko, bakomeli bazalaki kotɛmɛla Yesu.—Ezr 7:6, msl.; Mr 12:38, 39; 14:1.
Mokonzi-mwasi ya likoló.
Titre ya nzambe-mwasi oyo Bayuda oyo batikalaki sembo te bazalaki kosambela na eleko ya Yirimia. Bato mosusu balobaka ete ezalaki nzambe-mwasi ya Babilone, Ishtar (Ashitorete). Akokanaki na nzambe-mwasi oyo bato ya Sumer bazalaki kosambela liboso na nkombo Inanna, oyo elimboli “mokonzi-mwasi ya likoló.” Longola yango, Inanna azalaki mpe nzambe-mwasi ya kobota. Na Ezipito, bamonaki likomi moko oyo bakomaki likoló na yango mpo na Astarté ete “mwasi ya likoló.”—Yir 44:19.
Mokristo.
Ezali nkombo oyo Nzambe apesá bato oyo balandaka Yesu Kristo.—Mis 11:26; 26:28.
Mokube.
Ezali kolobela libosoliboso mobali oyo balongolá ye likoki ya kobota. Mbala mingi moto ya bongo, bazalaki kopesa ye mokumba ya kokɛngɛla mwasi ya mokonzi mpe basi mosusu ya mokonzi. Liloba yango esalelamaka mpe mpo na kolobela moto oyo azali kotambwisa makambo na ndako ya mokonzi. Na ndenge ya elilingi elobelaka ‘mokube mpo na Bokonzi,’ moto oyo amipekisaka mpo amipesa mingi na mosala ya Nzambe.—Mt 19:12; Est 2:15; Mis 8:27.
Molangi ya vinyo ya mposo ya nyama.
Molangi yango ezalaki kosalema na mposo ya ntaba to ya mpate, mpe bazalaki kosalela yango mpo na kobomba vinyo. Bazalaki kotya vinyo na milangi ya mposo ya nyama ya sika, mpo ntango vinyo ezali kovimba, ebimisaka gaz carbonique oyo evimbisaka milangi yango. Milangi ya mposo ya nyama ya sika ebendanaka, nzokande milangi ya mposo ya nyama ya kala ebendanaka te mpe epanzanaka mpo na gaz ya vinyo.—Yos 9:4; Mt 9:17.
Molato ya etumba.
Biloko ndenge na ndenge oyo basoda bazalaki kolata mpo na komibatela. Na ndakisa ekɔti, kazaka ya bibende (ebateli-ntolo), mokaba, ebateli-makolo mpe nguba.—1Sa 17:39; Ef 6:13-17.
Moleke.
Azalaki nzambe ya Baamone; mbala mosusu mpe kaka Malakame, Milikome, mpe Moloke. Ekoki kozala titre, kasi nkombo mpenza te ya nzambe moko boye. Mobeko ya Moize elobaki ete moto nyonso oyo apesi bana na ye mbeka na Moleke asengelaki kozwa etumbu ya liwa.—Le 20:2; Yir 32:35; Mis 7:43.
Molimo.
Ezali ndenge oyo liloba ya Ebre nèphèsh mpe ya Grɛki psukhê endimamá kobongolama. Nakotalela ndenge maloba yango esalelami na Biblia, emonani polele ete ezali komonisa libosoliboso (1) bato, (2) banyama, to (3) bomoi ya moto to ya nyama. (Eb 1:20; 2:7; Mit 31:28; 1Pe 3:20; ná msl.) Na bokeseni na ndenge oyo liloba “molimo” esalelami na mangomba mingi, Biblia emonisaka ete nèphèsh, na boyokani na bikelamu awa na mabele, ezali komonisa eloko oyo bakoki kosimba, oyo ezali komonana polele mpe oyo ekoki kokufa. Na libongoli oyo, maloba wana ya Ebre mpe ya Grɛki, ebongolami mbala mingi na kotalela ndimbola na yango na bavɛrsɛ. Esaleli maloba lokola “bomoi,” “ekelamu,” “moto,” “mobimba ya moto” to mpe kaka na liloba moko, na ndakisa, “ngai,” mpo na “molimo na ngai.” Na bisika mosusu, maloba na nse ya lokasa emonisaka ete ekokaki mpe kokomama “molimo.” Ntango liloba “molimo” esalelami, ezala na likoló to na maloba na nse ya lokasa, esengeli eyokana na ndimbola oyo touti kolobela likoló. Ntango ezali kolobela kosala eloko moko na molimo mobimba, elakisi kosala yango na motema moko, na motema mobimba, to kosala yango bomoi mobimba. (Kob 6:5; Mt 22:37) Na bisika mosusu, maloba yango ya Ebre mpe ya Grɛki ekoki kosalelama mpo na kolobela mposa ya likambo to ya kolya oyo ekelamu ya bomoi ezalaka na yango. Ekoki mpe kolobela moto oyo akufi to ebembe.—Mit 6:6; Mas 23:2; Yis 56:11; Hag 2:13.
Moloke.—
Talá MOLEKE.
Molɔngɔ ya bangomba ya Liban.
Moko ya bangomba mibale oyo esali molɔngɔ ya bangomba na ekólo Liban. Yango ezalaka na wɛsti, mpe Anti-Liban ezalaka na ɛsti. Lobwaku ya molai, oyo ebotaka malamu ekaboli molɔngɔ ya bangomba yango mibale. Molɔngɔ ya bangomba yango ebandi pembeni ya Mediterane, mpe bansɔngɛ na yango ezali na molai kati na 1 800 mpe 2 100 m. Na ntango ya kala, Liban etondaki na banzete minene ya sɛdrɛ, oyo bikólo mosusu ya zingazinga ezalaki koluka mingi. (Mib 1:7; Nz 29:6; 92:12)—Talá Ap. B7.
Momoni-makambo.
Moto oyo Nzambe apesi ye likoki ya kososola mokano na ye, lokola nde azalaki kofongola miso na ye mpo amona makambo oyo bato mosusu bakokaki te komona to kokanga ntina. Liloba ya Ebre oyo basaleli awa elimboli “komona,” ezala soki ebongolami liloba na liloba to na ndenge ya elilingi. Momoni-makambo azalaki moto oyo basusu bazalaki koya koluka toli ya bwanya epai na ye mpo na mikakatano oyo bazalaki kokutana na yango.—1Sa 9:9.
Monazarete.
Na bantango mosusu bazalaki kobenga Yesu bongo, mpo abotamaki na engumba Nazarete. Nkombo yango ezali na boyokani na liloba ya Ebre oyo esalelami na Yisaya 11:1, oyo ebongolami na “mwa nzete ya sika.” Na nsima bakómaki mpe kobenga bayekoli ya Yesu bongo.—Mt 2:23; Mis 24:5.
Monaziri.
Euti na liloba ya Ebre oyo elimboli “moto oyo akabwani na basusu,” “moto oyo amipesi,” “moto oyo atyami pembeni.” Ezalaki na lolenge mibale ya monaziri: baoyo bamipesaki na bolingo na bango moko mpe baoyo Nzambe aponaki. Mobali to mwasi akokaki kosala elako moko ya ntina mingi epai ya Yehova ya kozala monaziri mpo na mwa ntango. Baoyo bazalaki kosala elako na bolingo na bango moko basengelaki kotosa mibeko misato oyo ya ntina mingi: 1) basengelaki te komɛla masanga oyo elangwisaka to kolya biloko oyo euti na nzete ya vinyo; 2) basengelaki te kokata nsuki; 3) basengelaki te kosimba ebembe. Banaziri oyo Nzambe aponaki basengelaki kotikala bongo bomoi mobimba, mpe Yehova apesaki mibeko ya sikisiki mpo na bango.—Mit 6:2-7; Bas 13:5.
Mongendu.
Liloba yango esalemaka mpo na milona ndenge na ndenge, mingimingi oyo ekolaka na bisika ya mai. Na Biblia, liloba yango emonisaka mbala mingi molona oyo nkombo na yango na monɔkɔ ya Latin ezali Arundo donax. (Yb 8:11; Yis 42:3; Mt 27:29; Em 11:1)—Talá MONGENDU YA KOMEKA.
Mongendu ya komeka.
Monzoto ya ntɔngɔ.
Mosakoli.
Mosala mosantu.
Mosala ya kosolola na bilimo.
Ezali mosala ya moto oyo alobaka ete asololaka na bato oyo bakufá.—Le 20:27; Mib 18:10-12; 2Ba 21:6.
Mosaleli na misala.
Liloba ya Grɛki diakonos, oyo mbala mingi ebongolami na “mosali” to “mosaleli.” “Mosaleli na misala” azali moto oyo asalaka lokola mosungi ya lisangani ya bankulutu ya lisangá. Asengeli kokokisa makambo oyo Biblia esɛngi mpo na kozwa mokumba yango.—1Ti 3:8-10, 12.
Mosantu; Bosantu.
Ezali ezaleli ya Yehova; azali pɛto na bizaleli mpe azali ata na lisumu te. (Kob 28:36; 1Sa 2:2; Mas 9:10; Yis 6:3) Ntango elobeli bato (Kob 19:6; 2Nt 4:9), banyama (Mit 18:17), biloko (Kob 28:38; 30:25; Le 27:14), bisika (Kob 3:5; Yis 27:13), eleko ya ntango (Kob 16:23; Le 25:12), mpe misala (Kob 36:4), liloba yango na Ebre epesaka likanisi ya kotya pembeni, kaka yango moko, to kosantisa mpo na Nzambe mosantu; kotyama pembeni mpo na mosala ya Yehova. Na Makomami ya Grɛki ya bokristo, maloba yango ebongolami na “mosantu” mpe “bosantu,” yango mpe ezali na likanisi ya kotyama pembeni mpo na Nzambe. Maloba yango elobelaka mpe bopɛto ya bizaleli ya moto.—Mr 6:20; 2Ko 7:1; 1Pe 1:15, 16.
Motɛmɛli ya Kristo.
Na Grɛki maloba yango ezali na ndimbola mibale: kotɛmɛla to koboya, Kristo. “Motɛmɛli ya Kristo” ekoki kolakisa Kristo ya lokuta, moto oyo azali na esika ya Kristo. Bato nyonso, ebongiseli nyonso, to etuluku nyonso oyo na lokuta nyonso balobaka ete bazali bamonisi ya Kristo to bazali Masiya, to mpe oyo batɛmɛlaka Kristo mpe bayekoli na ye babongi kobengama Batɛmɛli ya Kristo.—1Yn 2:22.
Moto mabe.
Moto oyo asakolaka makambo ekoya.
Ezali moto oyo alobaka ete azali na likoki ya koyebisa makambo ekoya. Banganga-nkisi ya maji, baoyo basakolaka makambo ekoya na nzela ya bademo, bato ya astroloji, mpe basusu oyo Biblia etángi.—Le 19:31; Mib 18:11; Mis 16:16.
Moto ya bonsomi; Moto oyo azwi bonsomi.
Na boyangeli ya Baroma, “moto ya bonsomi” ezalaki moto oyo abotami na bonsomi, azali na ntomo nyonso ya bana ya ekólo. Nzokande, “moto oyo azwi bonsomi” ezalaki moto oyo alongwaki na boombo. Moto oyo alongwaki na boombo akómaki mwana ya ekólo ya Baroma, kasi akokaki te kozwa mokumba moko ya politiki. Soki moto azwi bonsomi ezalaki kolongola ye na boombo, kasi ezalaki kopesa ye lotomo nyonso te ya bana ya ekólo.—1Ko 7:22.
Moyemi-mbɛki.
Mosali ya bambɛki ya mabele: banzungu, basaani mpe bambɛki mosusu. Liloba ya Ebre mpo na moyemi-mbɛki, soki ebongolami liloba na liloba elimboli “moto oyo asalaka.” Bokonzi oyo moyemi-mbɛki azalaka na yango likoló ya mabele, mbala mingi esalelamaka mpo na kolobela boyangeli ya Yehova epai ya bato.—Yis 64:8; Ro 9:21.
Moyokanisi.
Moyuda.
Liloba oyo emonisaka moto ya libota ya Yuda, nsima ya kokwea ya bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele. (2Ba 16:6) Nsima ya kolongwa na boombo na Babilone, bakómaki kosalela yango mpo na Bayisraele ya mabota nyonso oyo bazongaki na ekólo Yisraele. (Ezr 4:12) Na nsima, bakómaki kosalela yango mpo na kokesenisa Bayisraele na bato ya bikólo. (Es 3:6) Paulo mpe asalelaki liloba yango na ndenge ya elilingi mpo na kolimbola ete kozala Moyuda ezali na bopusi te na lisangá ya bokristo.—Ro 2:28, 29; Ga 3:28.
Mpaka ya malasi.
Bazalaki kosangisa matiti ya nsolo mpe mafuta ya nsolo kitoko (balsame) oyo bazalaki kotumba malɛmbɛmalɛmbɛ mpo ebimisa nsolo kitoko. Na tabernakle mpe na tempelo bazalaki kosalela mpaka ya malasi oyo esalemaki na biloko minei ya nsolo. Bazalaki kotumba yango na ntɔngɔ mpe na mpokwa na etumbelo ya mpaka ya malasi na eteni ya Esika Mosantu. Na mokolo ya kozipa masumu, bazalaki kotumba yango na eteni ya kati ya Esika Eleki Mosantu. Ezalaki elembo ya mabondeli ya basaleli ya sembo ya Nzambe oyo endimami. Bakristo basɛngisamaki te kosalela yango.—Kob 30:34, 35; Le 16:13; Em 5:8.
Mpako.
Mposo ya blé.
Mposo ya nyama.
Ezalaki mposo ya mpate, ya ntaba, to ya mwana-ngombɛ oyo bazalaki kosalela mpo na kokoma likoló na yango. Ezalaki koumela mingi koleka papirisi mpe bazalaki kosala na yango barulo ya Biblia. Mbala mosusu, mposo ya nyama oyo Paulo asɛngaki Timote amemela ye ezalaki biteni ya Makomami ya Ebre. Barulo mosusu ya Mbu Ekufá ekomamaki na mposo ya nyama.—2Ti 4:13.
Mute-labene.
Liloba oyo ezali maloba likoló ya Nzembo 9. Bato mosusu balobi ete elimboli “mpo na liwa ya mwana mobali.” Basusu mpe bakanisaka ete ezalaki titre to mbala mosusu maloba ya ebandeli ya mondule moko oyo eyebanaki, mpe bazalaki kozongela yango ntango bazali koyemba nzembo.
Mwa lingomba.
Etuluku ya bato oyo balandaka mateya ya lingomba moko to mokambi moko boye mpe balandaka bindimeli na bango moko. Na Biblia esalelami mpo na kolobela “lingomba ya bafarisai” mpe “lingomba ya basadukai”; ezalaki mangomba mibale ya lokumu epai ya Bayuda. Baoyo bazalaki bakristo te, bazalaki kobenga lisangá ya bokristo “mwa lingomba” to “mwa lingomba ya Banazarete,” mbala mosusu bazalaki kokanisa ete ebimaki na lingomba ya Bayuda. Kendekende, mwa mangomba ebimaki na lisangá ya bokristo; mokanda ya Emoniseli etángi nkombo ya “mwa lingomba ya Nikolausi.”—Mis 5:17; 15:5; 24:5; 28:22; Em 2:6; 2Pe 2:1.
Mwa ngomba.
Mwana ya Davidi.
Mwana ya liboso.
Azali libosoliboso mwana mobali ya liboso ya tata (kasi te ya mama). Na Biblia, mwana mobali ya liboso azalaki na esika ya lokumu na libota mpe bazalaki kopesa ye bokonzi ya kotambwisa libota nsima ya liwa ya tata. Liloba yango ezali mpe kolobela mwana ya liboso ya nyama, na bantango mosusu ebengami mpe “mwana mobali ya liboso ya etonga.”—Kob 11:5; 13:12; Eb 25:33; Kol 1:15.
Mwana ya moto.
Ezali maloba oyo tokokuta mbala soki 80 na Baevanzile. Elobelaka Yesu Kristo mpe emonisaka ete ndenge abotamaki na nzela ya mwasi, akómaki moto mpe azalaki kaka te ekelamu ya elimo na nzoto ya mosuni. Maloba mwana ya moto emonisaka mpe ete Yesu akokokisa esakweli oyo ezali na Danyele 7:13, 14. Na Makomami ya Ebre, maloba yango esalelamaki mpo na Ezekiele mpe Danyele, mpo na komonisa bokeseni kati bango, oyo bakoki kokufa mpe Nzambe, Moto oyo azalaki koyebisa bango makambo oyo basengelaki koloba.—Ezk 3:17; Da 8:17; Mt 19:28; 20:28.
Mwasi mosusu (Makango).
N
Narda.
Mafuta ya nsolo kitoko ya ntalo mingi, ya langi ya motane, ezalaki kouta na nzete ya narda (Nardostachys jatamansi ). Lokola narda ezalaki ntalo mingi, bazalaki kosangisa yango na mafuta ya ntalo mingi te. Na bantango mosusu bazalaki kosala mafuta ya monyato. Kasi, Marko ná Yoane balobaki ete basopelaki Yesu “narda ya solosolo.”—Mr 14:3; Yn 12:3.
Ndai.
Ezali maloba mpo na kondimisa ete likambo moko ezali solo, to elaka oyo moto apesi ete akosala to akosala te likambo moko boye. Mbala mingi, ezalaka elako oyo moto asali epai ya moto oyo aleki ye, mingimingi Nzambe. Yehova alapaki ndai mpo na kokómisa makasi kondimana oyo asalaki na Abrahama.—Eb 14:22; Ebr 6:16, 17.
Ndanga.
Soki moto azalaki na nyongo, azalaki kotika eloko na ye epai ya moto oyo adefisaki ye mbongo mpo na kondimisa ye ete akozongisela ye mbongo yango. Bazalaki kobenga eloko yango “ndanga.” Mobeko ya Moize ezalaki na malako etali ndanga mpo na kobatela matomba ya Bayisraele oyo bazalaki babola to oyo bazangaki moto ya kokɔtela bango.—Kob 22:26; Ezk 18:7.
Ndumba.
Moto oyo asangisaka nzoto na moto oyo azali mobali to mwasi na ye te, mingimingi mpo na mbongo. (Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ndumba” ezali pornê, euti na liloba “kotɛka.”) Mbala mingi, liloba yango esalemaka mpo na basi, kasi Biblia elobeli mpe mibali oyo bazalaki kosala bondumba. Atako bapakano bazalaki kosalela mbongo ya bondumba na tempelo, Mobeko ya Moize endimaki bondumba te mpe lifuti ya bondumba ezalaki kondimama te mpo ezala likabo na esika mosantu ya Yehova. (Mib 23:17, 18; 1Ba 14:24) Biblia esalelaka mpe liloba yango na ndenge ya elilingi mpo na kolobela bato, bikólo to bibongiseli oyo esalelaka lolenge moko ya losambo ya bikeko mpe elobaka ete basambelaka Nzambe. Na ndakisa, mokanda ya Emoniseli elobeli ebongiseli ya losambo oyo ebengami “Babilone Monene,” lokola mwasi ya ndumba oyo azali kosala elongo na bakonzi ya mokili oyo mpe kopesa bango mabɔkɔ mpo azwa nguya mpe bomɛngo.—Em 17:1-5; 18:3; 1Nt 5:25.
Nefilime.
Bana ya mobulu oyo Baanzelu oyo balataki nzoto ya bato babotaki na basi awa na mabele liboso ya Mpela.—Eb 6:4.
Nehilote.
Ezali na maloba ya ebandeli ya Nzembo 5, mpe ndimbola na yango eyebani mpenza te. Basusu bakanisaka ete euti esika moko na liloba ya Ebre halil (piololo) mpe ezali komonisa ebɛtɛli ya mopɛpɛ. Kasi ekoki mpe kolobela mondule.
Netinime.
Bato oyo bazalaki Bayisraele te, oyo bazalaki kosala na tempelo. Ezali liloba ya Ebre oyo, soki babongoli yango liloba na liloba, elimboli “bato oyo bapesami,” emonisi ete bapesamaki mpo na kosala na tempelo. Emonani ete Banetinime mingi bautaki na Bagibeone, oyo Yosua apesaki mosala ya kolɔkɔta nkɔni mpe ya kotoka mai “mpo na liyangani mpe mpo na etumbelo ya Yehova.”—Yos 9:23, 27; 1 Nt 9:2; Ezr 8:17.
Nganga-minzoto.
Nganga-nzambe.
Moto oyo Nzambe aponaki mpo azala momonisi na ye epai ya bato oyo azalaki kosalela, azalaki koteya bango makambo ya Nzambe mpe mibeko na ye. Banganga-nzambe bazalaki mpe komonisa bato liboso ya Nzambe, kopesa bambeka, ata mpe kobondela ete Nzambe alimbisa bato to andima bango. Liboso Mobeko ya Moize epesama, tata nyonso ya libota azalaki kosala lokola nganga-nzambe mpo na libota na ye. Na Mobeko ya Moize, bana mibali ya libota ya Arona ya libota ya Levi nde bazalaki kosala mosala ya bonganga-nzambe. Bana mibali oyo batikali ya Balevi bazalaki basungi na bango. Ntango kondimana ya sika ebandaki, Yisraele ya elimo ekómaki ekólo ya banganga-nzambe, elongo na Yesu Kristo, Nganga-nzambe monene.—Kob 28:41; Ebr 9:24; Em 5:10.
Nganga-nzambe mokonzi.
Na Makomami ya Ebre, yango ezali nkombo mosusu ya “nganga-nzambe monene.” Emonani ete na Makomami ya Grɛki ya bokristo, maloba “banganga-nzambe bakonzi” emonisaka bato ya lokumu mingi na mosala ya bonganga-nzambe. Mbala mosusu etuluku yango esangisaki banganga-nzambe oyo mosala esilaki mpe bakonzi ya bituluku 24 ya banganga-nzambe.—2Nt 26:20; Ezr 7:5; Mt 2:4; Mr 8:31.
Nganga-nzambe monene.
Na nse ya Mobeko ya Moize, azalaki momonisi ya bato liboso ya Nzambe mpe azalaki kotambwisa mosala ya banganga-nzambe. Abengami mpe “nganga-nzambe mokonzi.” (2Nt 26:20; Ezr 7:5) Kaka ye nde azalaki kokɔta na Esika Eleki Mosantu, eteni ya kati mpenza ya tabernakle mpe na nsima ya tempelo. Azalaki kosala yango mbala moko na mbula na mokolo ya Kozipa masumu. Liloba “nganga-nzambe monene” esalelami mpe mpo na Yesu Kristo.—Le 16:2, 17; 21:10; Mt 26:3; Ebr 4:14.
Ngɔtɔ.
Nisana.
Bapesaki nkombo yango nsima ya kolongwa na boombo na Babilone na sanza ya liboso na kalandriye ya losambo ya Bayuda mpe sanza ya nsambo na kalandriye sivile. Liboso bazalaki kobenga yango sanza ya Abibe. Ezalaki kobanda na katikati ya sanza ya misato tii katikati ya sanza ya minei. (Ne 2:1)—Talá Ap. B15.
Nkulutu.
Mobali oyo apusani na mbula, kasi na Makomami, emonisaka libosoliboso moto oyo azali na mwa bokonzi to mokumba na liyangani to na ekólo. Liloba yango esalelami mpe na mokanda ya Emoniseli mpo na kolobela bikelamu ya likoló. Liloba ya Grɛki présbutéros ebongolami na “nkulutu” ntango ezali kolobela baoyo bazali na mokumba ya kokamba lisangá.—Kob 4:29; Mas 31:23; 1Ti 5:17; Em 4:4.
Nkunda.
Nsango malamu.
Nsinga ya kolita.
Nsɔngɛ ya likonzí.
Nsɔngɛ ya mangenda.
Nsɔngɛ ya ebende na nsuka ya lingenda, oyo bazalaki kosalela mpo na kobɛtabɛta nyama. Biblia ekokanisi yango na maloba ya moto ya bwanya oyo etindaka moto asalela toli yango. “Kobɛtabɛta makolo na nsɔngɛ ya mangenda” ezali likambo oyo ngɔmbɛ ya motó makasi esalaka, ntango eboyaka kotambola wana ezali kobɛta makolo na nsɔngɛ ya lingenda mpe emizokisaka.—Mis 26:14; Bas 3:31.
Ntoma.
Nzambe ya solo.
Euti na liloba ya Ebre oyo elimboli “Nzambe.” Na bisika mingi, soki basaleli liloba yango ná artikle defini, na Ebre elingaka kokesenisa Yehova lokola Nzambe kaka moko ya solo na banzambe ya lokuta. Maloba “Nzambe ya solo” ebatelaka malamumalamu makanisi mobimba ya liloba yango ya Ebre na masolo ya ndenge wana.—Eb 5:22, 24; 46:3; Mib 4:39.
Nzela.
Biblia esalelaka liloba yango na ndenge ya elilingi mpo na kolobela ndenge ya kosala likambo to etamboli oyo Yehova andimi to aboyi. Baoyo bakómaki bayekoli ya Yesu Kristo, bazalaki koloba na bango ete bazali bato ya “Nzela,” elingi koloba, bakobaki kozala na bomoi oyo esimbamaki na kondima epai ya Yesu Kristo, mpe bazalaki kolanda ndakisa na ye.—Mis 19:9.
Nzembo.
Loyembo ya kosanzola Nzambe. Bazalaki koyemba maloba ya nzembo elongo na miziki mpe bato bazalaki koyemba yango, na ndakisa na losambo oyo bato nyonso bazalaki kopesa Yehova Nzambe na tempelo na ye, na Yerusaleme.—Lk 20:42; Mis 13:33; Yk 5:13.
Nzete.
Ezali nzete ya semba oyo bazalaki kobaka na yango bato. Na bikólo mosusu, bazalaki kosalela yango mpo na koboma bato to kotanda ebembe mpo na kokebisa basusu to mpo na kosambwisa moto na miso ya bato. Bato ya Asiri bayebanaki na makambo ya mabe bazalaki kosala na bitumba. Soki bakangi bato bazalaki kobaka bango na nsuka ya nzete ya nsɔngɛ oyo ezalaki kotɔbɔla bango libumu tii na ntolo. Nzokande na mobeko ya Bayuda, baoyo basali mabe mpenza, mingimingi baoyo bazalaki kotuka Nzambe to kosambela bikeko, bazalaki naino koboma bango na mabanga to na ndenge mosusu, mpe na nsima bazalaki kotya bibembe na bango na nzete mpo na kokebisa basusu. (Mib 21:22, 23; 2Sa 21:6, 9) Ntango mosusu Baroma bazalaki kosuka kaka na kobaka moto na nzete, mpe moto yango akonyokwama wana na mpasi, na nzala, na mposa ya mai, mpe kozika na moi liboso ete akufa. Bazalaki mpe kobɛta moto oyo afundami bansɛtɛ na mabɔkɔ ná makolo na nzete, ndenge basalaki Yesu. (Lk 24:20; Yn 19:14-16; 20:25; Mis 2:23, 36)—Talá NZETE YA MPASI.
Nzete ya bomoi.
Nzete ya koyeba malamu ná mabe.
Nzete ya losambo.
Liloba ya Ebre ʹashérah ekoki komonisa (1) Nzete ya losambo oyo ezali komonisa Ashera, nzambe-mwasi Mokanana ya kobota, to (2) elilingi ya nzambe-mwasi Ashera ye moko. Emonani ete banzete yango ezalaki kotɛlɛma semba mpe tokoki koloba ete ndambo na yango esalemaki na libaya. Ekokaki kozala banzete oyo bakataki te mayemi na yango, ata mpe nzete mosusu nyonso.—Mib 16:21; Bas 6:26; 1Ba 15:13.
Nzete ya mpasi.
Liloba ya Grɛki stauros, elimboli nzete oyo etɛlɛmi semba to nzete kaka, lokola nzete oyo babomaki na yango Yesu. Bambula mingi liboso Kristo aya na mabele, bapakano bazalaki kosalela elembo ya ekulusu na losambo na bango, kasi eloko moko te emonisi ete stauros ezali elembo ya ekulusu. Yesu asalelaki liloba wana mpo na komonisa mpasi, bwale mpe nsɔni oyo bayekoli na ye basengelaki kokutana na yango. Yango wana tobakisi liloba “mpasi” mpo na kobimisa likanisi mobimba ya liloba wana ya Grɛki. (Mt 16:24; Ebr 12:2)—Talá NZETE.
O
Olibana.
Mai oyo ekauki ya nzete (gɔme ya rezine), eutaka na banzete mpe mwa banzete oyo ezali na molɔngɔ ya Boswellia. Soki batumbi yango ebimisaka nsolo kitoko ya malasi. Ezalaki eloko oyo bazalaki kotya na mpaka malasi oyo bazalaki kosalela na tabernakle mpe na tempelo. Bazalaki kosangisa yango mpe na makabo ya bambuma mpe kotya yango na molɔngɔ ya mampa ya kolakisa na Esika Mosantu.—Kob 30:34-36; Le 2:1; 24:7; Mt 2:11.
Omɛrɛ.
Emekeli-kilo ya biloko ya kokauka oyo ekokani na moko ya bandambo zomi ya efa, elingi lokoba 2,2 L. (Kob 16:16, 18)—Talá Ap. B14.
Onikisi.
Mwa libanga ya motuya; ezali lolenge moko ya libanga ya makasi ya agate, to libanga ya kalsedwane oyo esali nsingansinga likoló ya langi ekeseni. Libanga ya onikisi ezali na biloko ya langi ya mpɛmbɛ oyo elandani nsima ya biloko ya balangi lokola: moindo, mwa shokola, motane, mwa mpɛmbɛ, to ya mai ya mpondu. Bazalaki kotya mabanga ya onikisi na bilamba ya nganga-nzambe monene.—Kob 28:9, 12; 1Nt 29:2; Yb 28:16.
Orgwiya.
P
Pantekote.
Fɛti ya mibale na kati ya bafɛti misato ya minene oyo esɛngisamaki ete Bayuda nyonso ya mibali básalaka na Yerusaleme. Pantekote elakisi “mokolo ya ntuku mitano,” ezali nkombo oyo esalelami na Makomami ya Grɛki ya bokristo mpo na kolobela fɛti ya Kobuka mbuma to fɛti ya Bapɔsɔ na Makomami ya Ebre. Bazalaki kosala fɛti yango na mokolo ya 50 kobanda na mokolo ya 16 Nisana.—Kob 23:16; 34:22; Mis 2:1.
Papirisi.
Molona ya mai oyo ezali lokola mongendu. Bazalaki kosala na yango biloko lokola bakitunga, bambɛki, mpe bamasuwa. Bazalaki mpe kosala na yango biloko ya kokomela oyo ezali lokola papye mpe barulo mingi esalemaki na papirisi.—Kob 2:3.
Paradiso.
Elanga moko ya kitoko, to parkɛ oyo baloni banzete. Paradiso ya liboso oyo Biblia elobeli ezalaki Edene, esika oyo Yehova abongisaki mpe atyaki mwasi mpe mobali ya liboso. Ntango Yesu azalaki koloba na moto mabe moko na nzete ya mpasi, amonisaki ete mabele ekokóma paradiso. Na ntembe te, liloba oyo ezali na 2 Bakorinti 12:4, elobeli paradiso oyo ekoya, mpe Emoniseli 2:7, elobeli paradiso ya likoló.—Loy 4:13; Lk 23:43.
Perse; Baperse.
Mokili mpe bato oyo mbala mingi bazalaki kotánga bango elongo na Bamede. Bamede ná Baperse bautá esika moko. Baperse bazalaki kaka kofanda na sudi-wɛsti ya eteni ya mokili patatalu esika Iran ezali lelo. Na boyangeli ya Siruse Monene (bato mosusu ya Istware ya kala balobi ete tata na ye azalaki moto ya Perse mpe mama na ye moto ya Mede), Baperse bakómaki koyangela Bamede, atako bongo bakobaki kozala na bokonzi kaka moko. Siruse alongaki bokonzi ya Babilone na 539 L.T.B. mpe apesaki nzela ete Bayuda oyo bamemamaki bakangami bázonga na mokili na bango. Bokonzi ya Perse ebandaki na Ebale Indus na ɛsti mpe ekendaki tii na Mbu Égée na wɛsti. Bayuda bazalaki na nse ya bokonzi ya Perse tii ntango Alezandre Monene alongaki Baperse na 331 L.T.B. Daniele amonaki bokonzi ya Perse na emonaneli; Biblia elobeli bokonzi ya Perse na babuku ya Ezera, Nehemia, mpe Estere. (Ezr 1:1; Da 5:28; 8:20)—Talá Ap. B9.
Pimi.
Ezalaki emekeli-kilo; motuya oyo Bafilistia bazalaki kofutisa bato mpo na kotya mino na biloko ndenge na ndenge ya ebende. Bimekeli-kilo ya mabanga ndenge na ndenge oyo bato ya arkeoloji bakundolaki na Yisraele ezalaki na balɛtrɛ ya kala ya Ebre ya liloba “pimi.” Pimi ezalaka kilo soki 7,8 g, oyo ekokani na shekele pene na 2/3.—1Sa 13:20, 21.
Pite.
Euti na liloba ya Grɛki pornéïa. Biblia esaleli yango mpo na kolobela misala ya kosangisa nzoto oyo Nzambe apekisi. Yango esangisi: ekobo, bondumba, kosangisa nzoto kati na bato oyo babalani te, kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, mpe kosangisa nzoto na nyama. Esalelami na ndenge ya elilingi na Emoniseli mpo na kolobela bondumba ya mangomba, oyo ebengami “Babilone Monene”; ezali komonisa ndenge oyo mangomba esalaka boyokani na bakonzi ya mokili mpo na kozwa bokonzi mpe biloko ya kobikela. (Em 14:8; 17:2; 18:3; Mt 5:32; Mis 15:29; Ga 5:19)—Talá NDUMBA.
Pornéïa.—
Talá PITE.
Prokonsule.
Prozelite.
Purime.
Fɛti ya Bayuda oyo ezalaki kosalema mbula na mbula na mokolo ya 14 mpe ya 15 ya sanza ya Adare. Bazalaki kokanisa mokolo oyo Bayuda babikaki na libebi na eleko ya mokonzi-mwasi Estere. Fɛti yango euti na liloba Pure, oyo elimboli “mbɛsɛ.” (Ezali liloba ya Ebre te) fɛti ya Purime, elingi koloba “fɛti ya Mbɛsɛ,” ebengamaki bongo mpo Amane abwakaki pure (elingi koloba mbɛsɛ) mpo na kotya mokolo oyo ebongaki mpo na kokokisa mokano na ye ya koboma Bayuda.—Est 3:7; 9:26.
R
Rahaba.
Ezali liloba oyo esalelami na ndenge ya elilingi na mokanda ya Yobo, Nzembo, mpe Yisaya (ezali te Rahaba, mwasi oyo mokanda ya Yosua elobeli). Na buku ya Yobo, ndenge oyo Rahaba elobelami esalisi biso tóyeba ete ezali nyama ya nsɔmɔ ya mbu; na bisika mosusu nyama yango ya nsɔmɔ ya mbu ezali elembo mpo na Ezipito.—Yb 9:13; Nz 87:4; Yis 30:7; 51:9, 10.
Rido.
Elamba moko ya kilo oyo etongami na mayemi ya bakeruba, oyo ezalaki kokabola Esika Eleki Mosantu ná Esika Mosantu na tabernakle mpe na tempelo. (Kob 26:31; 2Nt 3:14; Mt 27:51; Ebr 9:3)—Talá Ap. B5.
Rulo.
Eteni molai ya mposo ya nyama to ya papirisi, bazalaki kokoma likoló na yango na ngámbo moko, oyo bazalaki kolínga yango zingazinga ya mwa nzete. Bazalaki kosalela barulo mpo na kokoma Biblia mpe kosala bakopi na yango, basalelaki yango mingi na ntango oyo bakomaki Biblia.—Yir 36:4, 18, 23; Lk 4:17-20; 2Ti 4:13.
S
Sabata.
Euti na liloba ya Ebre oyo elimboli “kopema; kotika kosala.” Ezali mokolo ya nsambo na pɔsɔ ya Bayuda (Kobanda na kolala ya moi ya mokolo ya mitano tii na kolala ya moi ya mokolo ya pɔsɔ). Mikolo mosusu ya bafɛti na kati ya mbula ezalaki mpe kobengama basabata, ezala mpe mbula ya 7 mpe mbula ya 50. Na mokolo ya sabata, mosala moko te ezalaki kosalema longola kaka mosala oyo banganga-nzambe basengelaki kosala na esika mosantu. Na mbula ya sabata, epekisamaki kolona biloko na mabele to kofutisa Moyuda mosusu nyongo. Bipekiseli oyo Mobeko ya Moize etyaki na mokolo ya sabata ezalaki na bokatikati, nzokande bakonzi ya mangomba babakisaki mokemoke mibeko na bango moko, yango wana na mikolo ya Yesu ezalaki mpasi mpo bato bátosa yango.—Kob 20:8; Le 25:4; Lk 13:14-16; Kol 2:16.
Samaria.
Engumba-mokonzi ya ekólo Yisraele na boumeli ya mbula 200, bokonzi ya nɔrdi; teritware mobimba oyo mabota zomi ezalaki ebengamaki mpe Samaria. Engumba yango etongamaki na ngomba oyo ebengamaki kaka na nkombo wana. Na mikolo ya Yesu, Samaria ezalaki nkombo ya etúká oyo ezalaki kati na Galile, na nɔrdi mpe Yudea, na sudi. Mbala mingi na mibembo na ye, Yesu azalaki kokende kopema na etúká yango, kasi na bantango mosusu azalaki koleka kuna mpe kosolola na bato oyo bazalaki kofanda wana. Na ndenge ya elilingi Petro asalelaki fongola ya mibale ya Bokonzi ntango Basamaria bazwaki elimo santu. (1Ba 16:24; Yn 4:7; Mis 8:14)—Talá Ap. B10.
Sanduku ya kondimana.
Kɛsi moko oyo basalá na banzete ya akasia mpe bazipaki yango na wolo. Batyaki yango na Esika Eleki Mosantu na tabernakle mpe na nsima na Esika Eleki Mosantu na tempelo oyo Salomo atongaki. Ezalaki na ezipeli ya wolo mpe likoló na yango bakeruba mibale oyo batalani. Na kati na yango, ezalaki na bitanda mibale oyo Mibeko Zomi ekomamaki. (Mib 31:26; 1Ba 6:19; Ebr 9:4)—Talá Ap. B5 mpe B8.
Sanedrina.
Tribinale monene ya Bayuda oyo ezalaki na Yerusaleme. Na mikolo ya Yesu, ezalaki na basambisi 71, oyo esangisaki nganga-nzambe monene mpe bato mosusu oyo basalaki mosala ya nganga-nzambe monene liboso, bato ya mabota ya nganga-nzambe monene, bankulutu, bankumu mpe bakonzi ya mabota, mpe bakomeli.—Mr 15:1; Mis 5:34; 23:1, 6.
Sanza ya sika.
Mokolo ya liboso ya sanza nyonso na kalandriye ya Bayuda. Mokolo yango Bayisraele bazalaki koyangana, kosala fɛti, mpe kopesa bambeka oyo Mobeko esɛngaki na libaku wana. Kendekende, mokolo yango ekómaki mokolo ya fɛti mpo na ekólo, mpe bato bazalaki kosala mosala te.—Mit 10:10; 2Nt 8:13; Kol 2:16.
Satana.
Satrape.
Sea.
Sekele mosantu.
Sela.
Liloba ya miziki to maloba oyo tokokuta na mokanda ya Nzembo mpe ya Habakuku. Ekoki komonisa elembo ya kopema na miziki to ntango moto azali koyemba, na mokano ya kozwa ntango ya komanyola to mpo na kobimisa mayoki. Libongoli ya Grɛki oyo babengi Septante ebongoli yango na diapsalma, elimbolami lokola “kopema ya mokuse na miziki.”—Nz 3:4; Hab 3:3.
Shebate.
Shekele.
Na Ebre ezali emekeli oyo eyebani mingi ya kilo mpe ya mbongo. Ezalaki na kilo oyo ekokani na 11,4 g. “Shekele ya esika mosantu” ezali maloba oyo esalelami ntango mosusu mpo na kobɛta nsɛtɛ ete kilo esengeli ezala ya sikisiki mpe kokokana na emekeli-kilo oyo babombaki na tabernakle. Mbala mosusu ezalaki mpe na shekele ya bakonzi (yango ekesenaki na shekele ya bato nyonso) to emekeli-kilo oyo esalelami mingi, oyo babombaki na ndako ya mokonzi.—Kob 30:13.
Sheminite.
Liloba ya miziki, oyo soki ebongolami liloba na liloba, elimboli “ya mwambe”; mbala mosusu ezalaki komonisa mingongo ekeseni to mwa banɔti ya miziki oyo ezali kobɛta na mongongo ya likoló. Mpo na bibɛtɛlo ya miziki, mbala mosusu liloba yango emonisaka bibɛtɛlo oyo ebimisaka mingongo ya nse na miziki. Mpo na banzembo, ekoki kozala ete bazalaki kobɛta yango nzela moko na loyembo oyo ezalaki kobimisa mongongo ya likoló mpe koyemba yango kaka na mongongo moko wana.—1Nt 15:21; Nz 6:Mel; 12:Mel.
Sheole.
Sinagoga.
Liloba yango elimboli “koyanganisa; liyangani,” kasi na bavɛrsɛ mingi, ezali komonisa bandako to esika oyo Bayuda bazalaki koyangana mpo na kotánga makomami, malako, kosakola, mpe kobondela. Na mikolo ya Yesu, engumba nyonso ya monene na Yisraele ezalaki na sinagoga, mpe bingumba ya minene ezalaki na basinagoga ebele.—Lk 4:16; Mis 13:14, 15.
Sinzili (Mokɛngɛli).
Moto oyo azali kobatela bato to biloko, mingimingi na butu, mpe oyo akokaki kokebisa na ntango ya likama. Bazalaki kotya basinzili na bifelo ya engumba mpe na linɔ́ngi mpo na komona baoyo bazali koya liboso ete bákóma pene ya engumba. Mbala mingi, basoda babengaka sinzili, mokɛngɛli. Na ndenge ya elilingi, basakoli bazalaki bansinzili mpo na ekólo Yisraele, bazalaki kokebisa bango mpo na libebi oyo ezalaki koya.—2Ba 9:20; Ezk 3:17.
Siona; Ngomba ya Siona.
Nkombo ya engumba ya Bayebusi oyo ebatelami makasi, oyo ezalaki na sudi-ɛsti ya ngomba moke ya Yerusaleme. Davidi azwaki engumba yango, nsima atongaki ndako ya bokonzi na ye wana, mpe ekómaki kobengama “Sité ya Davidi.” (2Sa 5:7, 9) Siona ekómaki ngomba moko mosantu mingimingi mpo na Yehova ntango Davidi amemaki sanduku ya kondimana kuna. Na nsima, tempelo oyo ezalaki na Ngomba Moria ezwaki mpe nkombo yango, mpe na bantango mosusu engumba mobimba ya Yerusaleme. Makomami ya Grɛki ya bokristo esaleli yango mbala mingi na maloba ya elilingi.—Nz 2:6; 1Pe 2:6; Em 14:1.
Siri; Bato ya Siri.—
Talá ARAME; BAARAME.
Sirtisi.
Sité ya Davidi.
Nkombo oyo bapesaki engumba Yebusi ntango Davidi alongaki yango mpe atongaki ndako mpo na bokonzi na ye kuna. Ebengami mpe Siona. Ezali na ngámbo ya sudi-ɛsti ya Yerusaleme, engumba ya kalakala mpenza.—2Sa 5:7; 1Nt 11:4, 5.
Sivane.
T
Tabernakle.
Hema oyo bakoki komema. Bayisraele basalelaki yango mpo na losambo ntango babimaki na Ezipito. Sanduku ya kondimana ya Yehova ezalaki na kati ya tabernakle mpe ezalaki komonisa ete Yehova azali wana, mpe bazalaki kosalela yango lokola esika ya kopesa bambeka mpe kosambela. Bazalaki mpe ntango mosusu kobenga yango “hema ya kokutana.” Esalemaki na bakadrɛ ya mabaya mpe bazipaki yango na bilamba ya lini, oyo basalaki mayemi ya bakeruba. Tabernakle ekabolamaki na bashambrɛ mibale. Ya liboso ebengamaki Esika Mosantu mpe ya mibale Esika Eleki Mosantu. (Yos 18:1; Kob 25:9)—Talá Ap. B5.
Talanta.
Emekeli oyo eleki monene ya kilo mpe ya mbongo epai ya Baebre. Ezalaki na kilo ya 34,2 kg. Kasi talanta ya Bagrɛki ezalaki moke mpenza, ezalaki na kilo soki 20,4 kg. (1Nt 22:14; Mt 18:24)—Talá Ap. B14.
Tamuze.
(1) Nkombo ya nzambe oyo basi Baebre bazalaki kosalela mpo na kolela na Yerusaleme, ntango bakómaki bapɛngwi. Bato mosusu ya istware balobi ete na ebandeli, Tamuze azalaki mokonzi oyo nsima ya liwa na ye bato bakómaki kotalela ye lokola nzambe. Nakotalela makomi ya monɔkɔ ya Sumérien, Tamuze ebengamaka Dumuzi mpe bazalaki kobenga ye mobali to bolingo ya Inanna (Ishtar ya Babilone), nzambe-mwasi ya kobota. (Ezk 8:14) (2) Nkombo bapesaki nsima ya kobima na Ezipito, ezalaki nkombo ya sanza ya minei na kalandriye ya losambo ya Bayuda mpe ya sanza ya zomi na kalandriye sivile. Ezalaki kobanda na katikati ya sanza ya motoba tii katikati ya sanza ya nsambo.—Talá Ap. B15.
Tarasisi (bamasuwa ya).
Na ebandeli, maloba “bamasuwa ya Tarasisi” ezalaki komonisa bamasuwa oyo na ntango ya kala, ezalaki kosala mibembo na Tarasisi ya kala (lelo oyo ezali Espagne). Emonani ete nsukansuka ekómaki komonisa bamasuwa minene oyo ezalaki kosala mibembo ya milai. Salomo ná Yehoshafate basalelaki bamasuwa ya bongo mpo na kosala mombongo.—1Ba 9:26; 10:22; 22:48.
Tartare.
Na Makomami ya Grɛki ya bokristo, liloba wana ezali komonisa kokitisama, oyo ezali lokola bolɔkɔ. Na mikolo ya Noa, Nzambe abwakaki na “Tartare” baanzelu oyo bazangaki botosi. Liloba tartaroô (to “kobwaka na Tartare”) oyo esalelami na 2 Petro 2:4, elimboli te ete “baanzelu oyo basalaki lisumu” babwakamaki na Tartare na kotalela masapo ya bapakano (elingi koloba, bolɔkɔ ya nse ya mabele mpe esika ya molili mpo na banzambe ya mike). Kasi, ezali nde komonisa ete Nzambe alongolaki bango na likoló, na libaku oyo bazalaki na yango, abwakaki bango na nse mpe atyaki bango na molili makasi ya makanisi mpo báyeba te mikano ya nkembo ya Nzambe. Mikolo ezali koya ezali mpe molili mpo na bango, mpo Makomami emonisi ete bango ná mokonzi na bango Satana Zabolo, bakobebisama mpo na libela. Na yango, Tartare ezali komonisa kokitisama mpenza mpo na baanzelu batomboki. Tartare ekeseni na “libulu mozindo” oyo elobelami na Emoniseli 20:1-3.
Tebete.
Nsima ya kobima na Babilone, Tebete ezali nkombo oyo bapesaki na sanza ya zomi na kalandriye ya losambo ya Bayuda mpe sanza ya minei na kaladriye sivile. Ezalaki kobanda na katikati ya sanza ya zomi na mibale tii katikati ya sanza ya yambo. Mbala mingi ebengamaka kaka “sanza ya zomi.” (Ezr 2:16)—Talá Ap. B15.
Tempelo.
Ndako oyo etongamaki na Yerusaleme, esika ya losambo mpo na Bayisraele, oyo ezwaki esika ya tabernakle oyo bazalaki komema. Tempelo ya liboso etongamaki epai ya Salomo mpe ebebisamaki epai ya bato ya Babilone. Tempelo ya mibale etongamaki epai ya Zorobabele nsima ya kolongwa ya Bayuda na boombo na Babilone mpe etongamaki lisusu epai ya Erode Monene. Na Makomami, tempelo ezalaki kobengama kaka “ndako ya Yehova.” (Ezr 1:3; 6:14, 15; 1Nt 29:1; 2Nt 2:4; Mt 24:1)—Talá Ap. B8 mpe B11.
Tirba.
Eteni ya elamba oyo bazalaki kolínga to kolata na motó. Nganga-nzambe monene azalaki kolata elamba ya lini ya kitoko, ná linzanza ya wolo oyo bakangisi na liboso na nsinga ya bulé. Mokonzi azalaki kolata tirba na nse ya motole na ye. Yobo asalelaki maloba ya elilingi ntango akokanisaki bosembo na ye na tirba.—Kob 28:36, 37; Yb 29:14; Ezk 21:26.
Tishiri.—
U
Urime ná Tumime.
Bisaleli oyo nganga-nzambe azalaki kosalela ndenge kaka bazalaki kobwaka mbɛsɛ, mpo na koluka koyeba mokano ya Nzambe na likambo moko ya ntina oyo ekólo ezalaki na mposa ya eyano ya Yehova. Urime ná Tumime ezalaki kotyama na libenga ya ntolo ya nganga-nzambe monene ntango azalaki kokɔta na tabernakle. Emonani ete batikaki kosalela yango ntango bato ya Babilone babebisaki Yerusaleme.—Kob 28:30; Ne 7:65.
V
Veranda ya Salomo.
Na mikolo ya Yesu, na tempelo, ezalaki esika ya koleka oyo ezipamaki na likoló na ɛsti ya lopango ya libándá, bato mingi bazalaki kokanisa ete na kati ya biloko ya tempelo ya Salomo yango nde etikalaki. Kuna Yesu atambolaki na “eleko ya malili makasi,” mpe bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kokutana kuna mpo na kosambela Nzambe. (Yn 10:22, 23; Mis 5:12)—Talá Ap. B11.
W
Wadi.
Lobwaku to nse ya mai ya mokɛli oyo mbala mingi ezalaka ya kokauka, longola kaka na eleko ya mbula; liloba yango ekoki mpe kolobela mokɛli. Mai ya mikɛli mosusu ezalaki kouta na maziba mpe ezalaki kotíyola ntango nyonso. Na bavɛrsɛ mosusu, wadi ebengami mpe “lobwaku.”—Eb 26:19; Mit 34:5; Mib 8:7; 1Ba 18:5; Yb 6:15.
Y
Yakobo.
Mwana ya Yisaka ná Rebeka. Na nsima Nzambe apesaki ye nkombo Yisraele, mpe akómaki tata ya mabota ya bato ya ekólo Yisraele (babengamaki mpe Bayisraele, mpe na nsima Bayuda). Azalaki tata ya bana mibali 12, oyo elongo na bana na bango basalaki mabota 12 ya ekólo Yisraele. Bakobaki kosalela nkombo Yisraele mpo na ekólo to bato ya Yisraele.—Eb 32:28; Mt 22:32.
Yedutune.
Liloba oyo ezali likoló ya Nzembo 39, 62, mpe 77, kasi ndimbola na yango eyebani mpenza te. Emonani ete maloba yango ezali malako mpo na nzembo, mbala mosusu emonisaka lolenge to ebɛtɛlo moko ya miziki. Yedutune ezalaki nkombo ya Molevi moko oyo azalaki kobɛta miziki, yango wana lolenge to ebɛtɛli oyo ya miziki ezali na boyokani na ye to bana na ye.
Yehova.
Yisraele.
Nkombo oyo Nzambe apesaki Yakobo. Na nsima ekómaki komonisa bana na ye nyonso, ezala na eleko nini. Bana ya bana 12 ya Yakobo bazalaki mbala mingi kobengama: bana ya Yisraele, ndako ya Yisraele, bato ya ekólo Yisraele to Bayisraele. Bazalaki mpe kosalela nkombo Yisraele mpo na mabota zomi ya bokonzi ya nɔrdi oyo ekabwanaki na bokonzi ya sudi, mpe na nsima ekómaki nkombo mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, “Yisraele ya Nzambe.”—Ga 6:16; Eb 32:28; 2Sa 7:23; Ro 9:6.
Yubilé.
Mbula nyonso ya 50, oyo Bayisraele bazalaki kotánga banda bakɔtaki na mokili ya elaka. Na mbula yango, basengelaki kopemisa mabele, mpe basengelaki kopesa baombo oyo bazalaki Bayuda bonsomi. Bazalaki mpe kozongisa mabele ya bankɔkɔ oyo batɛkaki. Tokoki koloba ete Yubilé ezalaki mbula ya fɛti, mbula ya bonsomi oyo ezalaki kozongisa mabele na ndenge oyo Nzambe apesaki bango na ebandeli.—Le 25:10.
Yuda.
Mwana mobali ya minei ya Yakobo oyo abotaki na Lea. Ntango alingaki kokufa, Yakobo asakolaki ete mokonzi moko monene oyo akoumela akobotama na libota ya Yuda. Na mabele, Yesu abotamaki na libota ya Yuda. Nkombo Yuda ezalaki mpe komonisa libota, mpe na nsima bokonzi ya mabota mibale, oyo ebengami bokonzi ya Yuda. Yuda, oyo ezalaki bokonzi ya sudi esalemaki na mabota mibale ya Yisraele: Yuda mpe Benyamina, bakisa mpe banganga-nzambe ná Balevi. Yuda ezalaki na eteni ya sudi ya ekólo mpe Yerusaleme ná tempelo ezalaki na kati na yango.—Eb 29:35; 49:10; 1Ba 4:20; Ebr 7:14.
Z
Zabolo.
Zeusi.
Bagrɛki bazalaki kosambela banzambe mingi, kasi Zeusi nde alekaki bango nyonso. Na Listra, bakanisaki ete Barnabasi azalaki Zeusi. Makomi moko ya kala oyo bamonaki pene na Listra elobelaki “banganga-nzambe ya Zeusi” mpe “nzambe-moi Zeusi.” Masuwa oyo Paulo asalaki na yango mobembo mpo na kolongwa na esanga ya Malta ezalaki na elembo ya “Bana ya Zeusi,” elingi koloba, mapasa mibali, Castor ná Pollux.—Mis 14:12; 28:11.
Zive.
Nkombo ya ebandeli ya sanza ya mibale na kalandriye ya losambo ya Bayuda, mpe sanza ya mwambe na kalandriye sivile. Ezalaki kobanda na katikati ya sanza ya minei tii na katikati ya sanza ya mitano. Talmud mpe mikanda mosusu oyo ekomamaki nsima ya kolongwa na boombo na Babilone ebengaka yango Iyare. (1Ba 6:37)—Talá Ap. B15.